Makomi
3 Nefi 24


Mokapo 24

Ntoma ya Nkolo akolengela nzela mpo na Boyei ya Mibale—Klisto akofanda na bosambisi—Yisalaele atindami kofuta moko na zomi mpe mabonza—Buku ya Kokanisa ebombami—Meka na Malaki 3. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete atindaki bango ete bakoma maloba oyo Tata apesaki epayi ya Malaki, oyo asengelaki koyebisa bango. Mpe esalemaki ete ntango esilaki kokomama alimbolaki yango. Mpe oyo ezali maloba oyo ayebisaki epayi na bango, kolobaka: Boye elobaki Tata epayi ya Malaki—Tala, nakotinda ntoma na ngai, mpe akolengela nzela liboso na ngai, mpe Nkolo oyo bozali koluka akoya na mbalakaka na tempelo na ye, kutu ntoma ya liyokani, oyo bosepeli mingi na ye, tala, akoya, elobi Nkolo na Bibele.

2 Kasi nani akoki kotikala na mokolo ya boyei na ye, mpe nani akotelema ntango akomonana? Mpo azali lokola moto ya mopetoli ya ebende, mpe lokola sabuni ya mosukoli bilamba.

3 Mpe akofanda lokola mopetoli ya ebende mpe molongoli ya mbindo na mpauni; mpe akopetola bana mibali ya Lewi mpe akosukola bango lokola wolo mpe mpauni, ete bakoka kobonzela Nkolo libonza ya bosembo.

4 Na ntango wana libonza ya Yuda mpe ya Yelusaleme ekosepelisa Nkolo, lokola na mikolo ya kala, mpe lokola na mibu oyo eleka.

5 Mpe nakoya penepene na bino mpo na bosambisi; mpe nakozala nzeneneke mpo na kotelemela bandoki mpe bato ya ekobo, mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta, mpe baye baniokolaka basali mpo na lifuta na bango, mokufeli mobali mpe baoyo bitike ya tata, mpe baoyo babalukaka mokongo na mopaya, mpe babangaka ngai te, elobi Nkolo na Bibele.

6 Mpo nazali Nkolo, nabongwani te; boye bino bana mibali ya Yakobo bozikisami te.

7 Kutu uta na mikolo ya batata na bino bokendaki mosika uta na makuli na ngai, mpe bobatelaki yango te. Bozonga epayi na ngai mpe nakozonga epayi na bino, elobi Nkolo na Bibele. Kasi bolobi: Na nzela kani ekozonga biso?

8 Ekoyongola moto Nzambe? Nzokande boyongoli ngai. Kasi bolobi: Lolenge boni eyongoli biso yo? Na biteni moko kati na zomi mpe na mabonza.

9 Bolakelami mabe na bolakeli moko, mpo boyongoli ngai, kutu ekolo oyo mobimba.

10 Bomema biteni moko kati na zomi na bino nyonso kati na ebombelo, ete bilei ekoka kozala na ndako na ngai; mpe bomeka ngai sikawa na lolenge oyo, elobi Nkolo na Bibele, soki nakofungolela bino maninisa ya lola te, mpe nakosopela bino lipamboli ete esika ya kobomba yango ekozala te.

11 Mpe nakopamela modundi mpo na ntina na bino, mpe akobebisa mbuma ya mabele na bino te; mpe vinyo na bino ekobwaka mbuma te liboso ya ntango ya bokomeli kati na bilanga na bino, elobi Nkolo na Bibele.

12 Bikolo nyonso bikobianga bino bapambolami, mpo bokozala mboka moko ya elengi, elobi Nkolo na Bibele.

13 Maloba na bino ezali makasi na ngai, elobi Nkolo. Kasi bolobi: Nini tolobi ya mabe na yo?

14 Bolobi: Ezali mpamba kosalela Nzambe, mpe litomba nini ezwaki biso ete tobatelaki makuli na ye mpe ete totambolaki na kolela liboso ya Nkolo na Bibele?

15 Mpe sikawa tobiangi bato ya lolendo bato ya esengo; iyo, bango oyo basalaka nkuna nde bazali kofuluka; iyo, bango oyo bamekaka Nzambe bango nde kutu babikisami.

16 Na ntango wana bango oyo babangaki Nkolo balobaki mbala na mbala moko na mosusu, mpe Nkolo atiaki bokebi mpe ayokaki; Mpe buku ya bokundoli ekomamaki liboso na ye mpo na bango oyo babangaki Nkolo, mpe bakanisaki nkombo na ye.

17 Mpe bakozala na ngai, elobi Nkolo na Bibele, na mokolo wana ntango nakosangisa mpauni na ngai; nakobatela bango lokola moto abatelaka mwana mobali na ye moko oyo asalelaka ye.

18 Na ntango wana nde bokozonga mpe bokososola kati na moto ya sembo mpe moto ya nkuna, kati na ye oyo asalelaka Nzambe mpe ye oyo asalelaka ye te.

Bimisa na lokasa