Makomi
3 Nefi 26


Mokapo 26

Yesu alimboli makambo nyonso uta na ebandeli kino na nsuka—Bana babotami sika mpe bana mike balobi makambo ya kokamwa oyo makoki kokomama te—nyonso kati na Eklezia ya Klisto bazali na biloko nyonso na lisanga na kati na bango. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu ayebisaki makambo oyo alimbolaki yango epayi ya ebele ya bato; mpe alimbolaki makambo nyonso epayi na bango, makambo minene mpe make lokola.

2 Mpe alobaki: Makomi oyo, oyo bozali na yango te, Tata atindi ete napesa epayi na bino; mpo ezali bwania epayi na ngai ete mapesama epayi na bankola ekoya nsima.

3 Mpe alimbolaki makambo nyonso, kutu uta na ebandeli kino na ntango oyo akoya kati na nkembo na ye—iyo, kutu makambo nyonso oyo ekoya likolo ya etando ya mabele mobimba, kutu kino ekoniangwama biloko na moto makasi, mpe mabele makolingama esika moko lokola mokanda oyo elingami, bongo lola mpe mabele ekoleka;

4 Mpe kutu kino na mokolo monene mpe ya nsuka, ntango bato nyonso bakotelema liboso ya Nzambe, mpe mabota nyonso, bikolo nyonso, minoko nyonso, ete basambisama mpo na misala na bango, soki ezali malamu to mabe—

5 Soki ezali malamu, mpo na bosekwi ya bomoi ya libela; kasi soki ezali mabe, mpo na bosekwi ya bokweisami; oyo kozalaka nzela oyo ekutanaka te, moko na ngambo moko mpe mosusu na ngambo mosusu, engebene na boboto, mpe boyengebene, mpe bosantu boye ezali na Klisto, oyo azalaki liboso ete mokili ebanda.

6 Mpe sikawa ekoki kokomama kati na buku oyo te ata eteni ya monkama ya makambo oyo Yesu ateyaki mpenza bato;

7 Kasi tala, bapalaki ya Nefi ezali na eteni eleki mingi koleka ya makambo oyo ateyaki bato.

8 Mpe makambo oyo nakomaki, oyo ezali eteni eleki moke ya makambo oyo ateyaki bato; mpe nakomaki yango na ntina ete makoka komemama lisusu epayi ya bato oyo, uta na Bayuda-te, engebene na maloba oyo Yesu alobaki.

9 Mpe ntango bakozwa makomi oyo, oyo elongobani ete bazwa yambo, mpo na komeka bondimi na bango, mpe soki ekozala bongo ete bandimi makambo oyo bongo nde ekomonisama makambo maleki minene epayi na bango.

10 Mpe soki ezali ete bandimi makambo oyo te, nde makambo oyo maleki minene makobotolama uta na bango, mpo na bokweisami na bango.

11 Tala, nazalaki mpembeni na kokoma yango, nyonso oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya Nefi, kasi Nkolo apekisaki yango kolobaka: Nakomeka bondimi ya bato na ngai.

12 Boye ngai, Mormon, nakomi makambo oyo natindamaki na Nkolo. Mpe sikawa ngai, Mormon natie nsuka na maloba na ngai, mpe nabandi kokoma makambo oyo natindamaki.

13 Boye, nalingi ete bomona ete na ntembe te Nkolo ateyaki bato, mpo na ntaka ya mikolo misato; mpe nsima ya komilakisa epayi na bango, akataki lipa biteni na biteni, mpe apambolaki yango, mpe apesaki yango epayi na bango.

14 Mpe esalemaki ete ateyaki mpe asalelaki bana ya ebele ya bato oyo balobami, mpe afungolaki lolemo na bango, mpe balobaki epayi ya batata na bango makambo minene mpe ya kokamwa, kutu monene koleka oyo abimisaki epayi ya bato, mpe afungolaki lolemo na bango ete bakokaki koloba.

15 Mpe esalemaki ete esilaki Yesu kobuta na lola—mbala ya mibale oyo amilakisaki epayi na bango, mpe akendaki epayi na Tata, nsima ya kobikisa bakoni na bango nyonso, mpe batengoli na bango, mpe nsima ya kofungola miso ya bato bakufa miso mpe ya kozipola matoyi ya bato bakufa matoyi, mpe kutu kobikisa bokono ya ndenge nyonso, mpe kosekwisa moto moko uta na bakufi, mpe alakisaki nguya na ye epayi na bango, mpe abutaki epayi na Tata—

16 Tala, esalemaki ete na mokolo ya nsima, oyo ebele ya bato basanganaki bango moko elongo, bamonaki mpe bayokaki lokola bana oyo, iyo, kutu bana babotami sika kofungola minoko na bango mpe balobaki makambo ya kokamwa; mpe makambo oyo balobaki mapekisamaki ete moto akoma yango.

17 Mpe esalemaki ete bayekoli oyo yesu aponaki babandaki mbala na mbala kobatisa mpe koteya mingi lokola bayaki epayi na bango; mpe mingi lokola babatisamaki na nkombo ya Yesu batondisamaki na Molimo Mosantu.

18 Mpe mingi kati na bango bamonaki mpe bayokaki makambo makoki kolobama te, oyo mazangi ndingisa mpo na kokoma.

19 Mpe bateyaki, mpe basalisanaki; mpe bazalaki na biloko nyonso na lisanga na kati na bango, moto na moto kosalaka na boyengebene, moko na mosusu.

20 Mpe esalemaki ete basalaki makambo nyonso kutu lokola Yesu atindaki bango.

21 Mpe bango oyo babatisamaki na nkombo ya Yesu babiangamaki eklezia ya Klisto.

Bimisa na lokasa