Makomi
3 Nefi 8


Mokapo 8

Ekumbaki, boningani ya mabele, moto, mopepe ya kaina, mobulungano ya mokili etatoli bobakami ya Klisto na ekulusu—Bato mingi babebisami—Molili ezipi mboka mikolo misato—Bango oyo batikali na bomoi bamileli mpo na oyo ekoyela bango. Penepene na mibu 33–34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Sikawa esalemaki ete engebene na lisolo ya makomi na biso, mpe toyebi lisolo ya makomi na biso ezali ya solo; mpo tala, ezalaki moto moko moyengebene oyo abombaki lisolo ya makomi—mpo solo asalaki makamwisi mingi na nkombo ya Yesu; mpe ezalaki na moto moko te oyo akokaki kosala likamwisi moko na nkombo ya Yesu longola se soki apetolami eteni na eteni uta na mabe na ye—

2 Mpe sikawa esalemaki, soki libunga esalemaki te na moto oyo na botangi ya ntango na biso, ete mobu ya ntuku misato na misato elekaki;

3 Mpe bato babandaki kotalela na bokebi monene elembo oyo epesamaki na profeta Samwele, Molamani, iyo, kokanisaka ntango ete molili ekozala mpo na ntaka ya mikolo misato likolo ya etando ya mboka.

4 Mpe ntembe mpe boswani monene ebandaki se kozala na kati ya bato, ata bilembo epesamaki mingi mpenza.

5 Mpe esalemaki na mobu ya ntuku misato na minei, na sanza ya yambo, na mokolo ya minei ya sanza, ekumbaki moko ya monene, ya lolenge moko lokola eyebanaki ata mokolo moko na mboka mobimba te.

6 Mpe ezalaki lisusu na ekumbaki monene mpe ya nsomo; mpe ezalaki kake ya nsomo, mpenza ete eningisaki mabele nyonso lokola soki ezalaki penepene na kokabwana na katikati.

7 Mpe ezalaki na minkalikali makasi mpenza, ya lolenge moko lokola eyebanaki ata mokolo moko na mboka mobimba te.

8 Mpe engumba ya Zalayemila ekamataki moto.

9 Mpe engumba ya Moroni ezindaki kati na bozindo ya mbu, mpe bafandi na yango bazindaki.

10 Mpe mabele mamemamaki likolo ya engumba ya Moroniya, ete na esika ya engumba ekomaki ngomba moko ya monene.

11 Mpe ezalaki na bobebisami monene na mboka epayi na sudi.

12 Kasi tala, ezalaki na bobebisami moko monene mpe ya nsomo mingi koleka na mboka epayi na nordi; mpo tala, etando nyonso ya mboka ebongwanaki, na ntina ya ekumbaki mpe mopepe ya kaina, mpe kake mpe minkalikali, mpe boningani monene mingi koleka ya mabele;

13 Mpe balabala ya minene ebukanaki, balabala esembolama ya mikemike ebebaki, mpe bisika mingi bipatala bikomaki bibukana-bukana.

14 Mpe bingumba mingi minene mpe ya lokumu ezindaki, mpe mingi bizikaki, mpe mingi bininganaki kino bandako na yango ekweyaki na mabele, mpe bafandi ya yango babomamaki, mpe bisika bitikalaki mpamba.

15 Mpe ezalaki na boko bingumba oyo bitikalaki; kasi bobebi na yango ezalaki monene koleka, mpe ezalaki na bato mingi kati na yango oyo babomamaki.

16 Mpe ezalaki na boko bato oyo bamemamaki na mopepe ya kaina, wapi bakendaki moto moko ayebi te; longola se bayebi ete bamemamaki mosika.

17 Mpe boye etando ya mabele mobimba ekomaki lolenge mosusu, na ntina ya ekumbaki, mpe kake, mpe minkalikali, mpe boningani ya mabele.

18 Mpe tala, mabanga mapasukaki na biteni mibale, mpe ebukanaki likolo ya etando ya mabele mobimba, na lolenge ete mamonanaki biteni biteni, mpe bipasuka-pasuka mpe na biteni bibukana, likolo ya etando mobimba ya mboka.

19 Mpe esalemaki ete ntango kake, mpe minkalikali, mpe moketi, mpe ekumbaki, boningani ya mabele etikaki—mpo tala, ewumelaki mpo na penepene na ntaka ya ngonga misato—mpe boko bato balobaki ete ntango ewumelaki molai koleka; nzokande, solo makambo minene wana mpe ya nsomo masalemaki na ntaka penepene ya ngonga misato—mpe nsima tala, ezalaki na molili likolo ya etando ya mboka.

20 Mpe esalemaki ete ezalaki na molili monene likolo ya etando mobimba ya mboka, na lolenge ete, bafandi ya yango oyo bakufaki te bakokaki koyoka mbongi ya molili.

21 Pole ekokaki kozala te, na ntina ya molili makasi, buji mpe te, esungi mpe te; moto oyo bapelisi ekokaki kozala mpe te ata na libaya ya malamu mpe likawuka mingi koleka ya bango, boye ete pole ekokaki kozala te.

22 Mpe pole emonanaki te, moto mpe te, soki nzenimoto mpe te, moi mpe te, soki sanza mpe te, soki minzoto mpe te, mpo londende ya molili oyo ezalaki likolo ya etando ya mboka ezalaki monene mpenza.

23 Mpe esalemaki ete ewumelaki mpo na ntaka ya mikolo misato ete pole ekokaki komonana te; mpe ezalaki ntango nyonso na matanga mpe bogangi mpe kolela monene na kati ya bato nyonso, iyo, minkime ya bato ezalaki minene, na ntina ya molili mpe bobebisami monene boye eyaki likolo na bango.

24 Mpe na esika moko bayokaki bato koganga, kolobaka: O soki toyambolaka yambo ya mokolo monene mpe ya nsomo oyo, mpe nde bandeko na biso balingaki kobikisama, mpe balingaki kozikisama te na engumba monene ya Zalayemila.

25 Mpe na esika mosusu, bayokaki bato koganga mpe kolela, kolobaka: O soki toyambolaka liboso ya mokolo monene mpe ya nsomo oyo, mpe soki tobomaka te mpe tobambaka baprofeta mabanga te mpe soki tobenganaka bango libanda te; nde bamama na biso mpe bana basi kitoko na biso, bana na biso, balingaki kobikisama, mpe kokundama te na engumba monene Moroniya. Mpe bogangi ya bato ezalaki monene mpe ya nsomo.

Bimisa na lokasa