Makomi
Alma 10


Mokapo 10

Lehi abotamaki uta na Manase—Amuleki asangeli etinda ya anjelu ete abatela Alma—Sambo ya basembo esali ete bato babikisama—Balobeli mpe basambisi bazangi bosembobatie moboko ya bobebisami ya bato. Penepene na mobu 82 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa, oyo ezali maloba oyo Amuleki ateyaki epayi ya bato oyo bazalaki na mboka ya Amoniya, kolobaka:

2 Nazali Amuleki; nazali mwana mobali ya Gidona, oyo azalaki mwana mobali ya Yisamaele, oyo azalaki eboto ya Aminadi; mpe ezalaki se Aminadi moko oyo alimbolaki nkoma oyo ezalaki likolo ya efelo ya tempelo, oyo nkoma ekomamaki na mosapi ya Nzambe.

3 Mpe Aminadi azalaki eboto ya Nefi, oyo azalaki mwana mobali ya Lehi, oyo ayaki uta na mboka ya Yelusaleme, oyo azalaki eboto ya Manase, oyo azalaki mwana mobali ya Yosefe oyo atekamaki kati na Ejipito na maboko ya bandeko na ye.

4 Mpe tala, nazali moto ya lokumu ya moke te na kati na bango nyonso oyo bayebi ngai; iyo, mpe tala, nazali na mabota mpe baninga mingi, mpe lisusu nazwaki bozwi boike na mosala makasi ya loboko na ngai.

5 Nzokande, nsima ya oyo nyonso, nayebaki mokolo moko te banzela ya Nkolo, mpe mibombamo na ye mpe nguya na ye ya kokamwa. Nalobaki ete nayebaki mokolo moko te mingi ya makambo oyo; kasi tala, nabungi, mpo namonaki mingi ya mibombamo na ye mpe nguya na ye ya kokamwa; iyo, kutu na kobatelaka bomoi ya bato oyo.

6 Nzokande, nayeisaki motema na ngai makasi, mpo nabiangamaki mbala mingi mpe nalingaki koyoka te; boye nayebaki mpo na oyo etali makambo oyo, nzokande nalingaki te koyeba; boye nakobaki kotomboka na Nzambe, na nkuna ya motema na ngai, kutu kino na mokolo ya minei ya sanza oyo ya sambo, oyo ezali na mobu ya zomi ya boyangeli ya basambisi.

7 Lokola nazalaki kokende mobembo mpo na kotala ndeko moko ya mpembeni mpenza, tala anjelu ya Nkolo amonanaki epayi na ngai mpe alobaki: Amuleki, zonga na ndako na yo moko, mpo okoleisa profeta moko ya Nkolo; iyo, moto moko mosantu, oyo aponami na Nzambe; mpo akili mikolo mingi na ntina ya masumu ya bato oyo, mpe azali na nzala, mpe okoyamba ye kati na ndako na yo mpe okoleisa ye, mpe akopambola yo mpe ndako na yo; mpe lipamboli ya Nkolo ekotikala likolo na yo mpe ndako na yo.

8 Mpe esalemaki ete natosaki mongongo ya anjelu, mpe nazongaki na ndako na ngai. Mpe lokola nazalaki kokende kuna nakutaki moto oyo anjelu alobelaki ngai: Okoyamba ye kati na ndako na yo—mpe tala ezali moto se moko oyo azalaki kolobela bino mpo na oyo etali makambo ya Nzambe.

9 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai ete azali moto moko mosantu; yango wana nayebi ete azali moto moko mosantu mpo elobamaki na anjelu ya Nzambe.

10 Mpe lisusu, nayebi ete makambo oyo atatolaki ezali solo; mpo tala nalobi epayi na bino, ete lokola Nkolo azali na bomoi, kutu boye atindi anjelu na ye mpo na kosala ete makambo oyo mamonisama epayi na ngai; mpe oyo asalaki yango wana ezalaki Alma oyo kofanda na ndako na ngai.

11 Mpo tala, apamboli ndako na ngai, apamboli ngai, mpe basi ya ndako na ngai, mpe bana na ngai, mpe tata na ngai mpe bandeko na ngai; iyo, kutu libota na ngai nyonso apamboli, mpe lipamboli ya Nkolo etikali likolo na biso engebene na maloba oyo alobaki.

12 Mpe sikawa, ntango Amuleki alobaki maloba oyo bato bakamwaki, mpo bamonaki ete banzeneneke bazalaki koleka moko oyo atatolaki makambo oyo wapi bafundamaki, engebene na molimo ya masakoli oyo ezalaki na bango.

13 Nzokande, ezalaki na boko bato na kati na bango oyo bakanisaki kotuna bango, ete na nzela ya miango na bango ya mabe bakokaki kokanga bango na maloba na bango, ete bakoka kozwa litatoli ya kofunda bango, ete bakoka kotika bango na basambisi na bango ete bakoka kosambisama engebene na mobeko, mpe ete bakoka kobomama soki te kobwakama kati na boloko, engebene na mabe oyo bakokaki kosala ete mamonana soki te matatola na kofundaka bango.

14 Sikawa ezalaki nde bato wana oyo balukaki kobebisa bango, oyo bazalaki balobeli, baye bafutamaki soki te baponamaki na bato mpo na kosalela mobeko na ntango na bango ya masambisi, soki te na masambisi ya mabe ya bato liboso ya basambisi.

15 Sikawa balobeli baoyo bayekolaki mingi na misala nyonso ya ntoki nyonso mpe na misala ya mayele mabe ya bato; mpe oyo ezalaki mpo na kokokisa bango ete bakoka kozala na mayele na mosala na bango.

16 Mpe esalemaki ete babandaki kotuna Amuleki, ete na nzela wana basala ete abongola maloba na ye, soki te aloba maloba oyo akoloba na minoko mibale.

17 Sikawa bayebaki te ete Amuleki akokaki koyeba miango na bango. Kasi esalemaki ete lokola babandaki kotuna ye, ayebaki makanisi na bango, mpe alobaki epayi na bango: O bino nkola ya nkuna mpe oyo ebeba, bino balobeli mpe bakibisi, mpo bozali kotiaka moboko ya zabulu; mpo bozali kotiaka miniama mpe mitambo mpo na kokanga boko basantu ya Nzambe.

18 Bozali kosalaka miango mpo na kobebisa banzela ya basembo, mpe mpo na kokitisa nkele ya Nzambe likolo ya mitu na bino, kutu mpo na bobebisami nie ya bato oyo.

19 Iyo, alobaki yango malamu Mosiya, oyo azalaki mokonzi na biso ya nsuka, ntango azalaki penepene na kotika bokonzi na moto mosusu, mpo azalaki na moto moko te mpo na kopesa yango likolo na ye, asalaki ete bato oyo bayangelama engebene na kopona na bango moko—iyo, alobaki malamu ete soki ntango ekoya ete kopona ya bato oyo ekopona mabe, elingi koloba, soki ntango ekoya ete bato oyo bakweya kati na bobuki mobeko, bakozala ya kokomela mpo na bobebisami.

20 Mpe sikawa nalobi epayi na bino ete Nkolo asambisaka malamu mpo na oyo etali mabe na bino; ezali na ntina malamu oyo abelelaka epayi ya bato oyo, na nzela ya mongongo ya banjelu na ye ete: Boyambola, boyambola, mpo bokonzi ya lola ezali mpembeni.

21 Iyo, abeleli malamu, na mongongo ya banjelu na ye ete: Nakokita na kati ya bato na ngai, na alima mpe boyengebene na maboko na ngai.

22 Iyo, mpe nalobi epayi na bino ete soki ezalaki mpo na sambo ya basembo te, baoyo bazali sikawa na mboka, ete bolingaki kutu kobimelama sikawa na bobebisami nie; nzokande ekozala na mpela te, lokola ezalaki bato na mikolo ya Noa, kasi ekozala na nzala, mpe na bokono, mpe na mompanga.

23 Kasi ezali na nzela ya sambo ya basembo ete bobikisami; sikawa yango wana, soki bobwaki libanda basembo uta na kati na bino nde Nkolo akopekisa te loboko na ye; kasi na nkanda makasi na ye akokitela bino; nde bokobetama na nzala, mpe na bokono, mpe na mompanga; mpe ntango esili kala mingi te kobelema longola se soki boyamboli.

24 Mpe sikawa esalemaki ete bato bazalaki na nkanda mingi koleka na Amuleki, mpe bagangaki, kolobaka: Moto oyo afingi mibeko na biso oyo ezali semba, mpe balobeli na biso ya bwania baoyo toponaki.

25 Kasi Amuleki asembolaki loboko na ye, mpe agangaki makasi mingi epayi na bango, kolobaka: O bino nkola ya nkuna mpe oyo ebeba, mpo na nini Satana azwi nguya monene ya lolenge oyo likolo ya mitema na bino? Mpo na nini emitiki bino epayi na ye ete akoka kozala na nguya likolo na bino, ya koboma miso na bino, ete bososola te maloba oyo malobami, engebene na bosolo na yango?

26 Mpo tala, etatolaki ngai mabe ya mobeko na bino? Bososoli te; bolobi ete nalobaki mabe ya mobeko na bino; kasi nasalaki yango te, kasi nalobaki bolamu ya mobeko na bino, mpo na bokweisami na bino.

27 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino, ete moboko ya bobebisami ya bato oyo ezali kobanda kotiama na bozangi bosembo ya balobeli na bino mpe kobelema balobeli na bino.

28 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Amuleki alobaki maloba oyo bato bagangaki na ye, kolobaka: Sikawa toyebi ete moto oyo azali mwana ya zabulu, mpo akosi biso; mpo alobi mabe mpo na mobeko na biso. Mpe sikawa alobi ete alobi mabe te mpo na yango.

29 Mpe lisusu, afingi balobeli na biso, mpe basambisi na biso.

30 Mpe esalemaki ete balobeli batiaki yango kati na mitema na bango ete bamikundola makambo oyo likolo na ye.

31 Mpe ezalaki na moto moko na kati na bango nkombo na ye ezalaki Zezilomi. Sikawa azalaki moto ya liboso mpo na kofunda Amuleki mpe Alma, mpe azalaki moko ya nganga mayele koleka na kati na bango, mpo azalaki na mombongo mingi ya kosala na kati ya bato.

32 Sikawa, ntina ya balobeli baye ezalaki se mpo na kozwa mosolo; mpe bazwaki yango, bazwaki matabisi, engebene na mosala na bango.

Bimisa na lokasa