Makomi
Alma 14


Mokapo 14

Alma mpe Amuleki bakangemi na boloko mpe babetami—Bandimi mpe makomi masantu na bango batumbami na moto—Bamartiru oyo bayambami na Nkolo kati na nkembo—Bifelo ya boloko bipasuki mpe bikwei—Alma mpe Amuleki bakangolami mpe banyokoli na bango babomami. Penepene na mibu 82–81 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilaki ye kotia nsuka ya koloba na bato yango, mingi kati na bango bandimaki maloba na ye, mpe babandaki koyambola, mpe koluka kososola makomi.

2 Kasi ndambo koleka mingi kati na bango bazalaki na mposa ya kobebisa Alma mpe Amuleki; mpo bazalaki na nkanda na Alma, na ntina ya polele ya maloba na ye epayi ya Zezilomi; mpe balobaki lisusu ete Amuleki akosaki bango, mpe afingaki mobeko na bango mpe lisusu balobeli mpe basambisi na bango.

3 Mpe bazalaki lisusu na nkanda na Alma mpe Amuleki; mpe lokola batatolaki polele na kotelemelaka nkuna na bango, balukaki koboma bango na nkuku.

4 Kasi esalemaki ete basalaki yango te; kasi bakamataki bango mpe bakangaki bango na singa makasi, mpe bamemaki bango liboso ya mosambisi mokonzi ya mboka.

5 Mpe bato bakendaki mpe batatolaki na kofundaka bango—kotatolaka ete bafingaki mobeko, mpe balobeli mpe basambisi ya mboka, mpe lisusu bato nyonso oyo bazalaki na mboka; mpe batatolaki lisusu ete balobaki ete ezali se na Nzambe moko, mpe akotinda Mwana na ye na kati ya bato, kasi akobikisa bango te; mpe makambo mingi ya lolenge oyo nde etatolaki bato yango na kofundaka Alma mpe Amuleki. Sikawa oyo esalemaki liboso ya mosambisi mokonzi ya mboka.

6 Mpe esalemaki ete Zezilomi akamwaki na maloba oyo bato yango bazalaki koloba; mpe ayebaki lisusu likambo na ntina ya bokufi miso ya mayele na ye, boye asalaki na kati ya bato na maloba na ye ya lokuta; mpe molimo na ye ebandaki kopasolama na nse ya makanisi ya elindo ya ye moko; iyo, abandaki kozingama penepene na bolozi ya lifelo.

7 Mpe esalemaki ete Zezilomi abandaki kobelela epayi ya bato, kolobaka: Tala, nazali moto na elindo, mpe bato oyo bazali na mbindo liboso ya Nzambe te. Mpe abandaki kosamba mpo na bango uta na ntango wana; kasi bato bafingaki ye, kolobaka: Yo mpe ozwami na zabulu? Mpe babwakaki nsoi likolo na ye, mpe babenganaki ye uta na kati na bango, mpe lisusu bango nyonso oyo bandimaki maloba elobamaki na Alma mpe Amuleki; mpe babwakaki bango libanda, mpe batindaki bato mpo na kobamba bango mabanga.

8 Mpe bamemaki basi mpe bana na bango elongo, mpe nyonso oyo bandimaki soki te bateyamaki mpo na kondima liloba ya Nzambe basalaki ete babwakama kati na moto; mpe lisusu bamemaki masolo ya makomi na bango oyo ezalaki na makomi masantu, mpe babwakaki yango kati na moto mpe lokola, ete makoka kozika mpe kobebisama na moto.

9 Mpe esalemaki ete bakamataki Alma mpe Amuleki, mpe bamemaki bango na esika ya bomartiru, ete bakoka kozala banzeneneke ya bobebisami na bango oyo bazikaki nie na moto.

10 Mpe ntango Amuleki amonaki bolozi ya basi mpe bana oyo bazikaki nie na moto, ye mpe lokola ayokaki mpasi; mpe alobaki epayi na Alma: Lolenge boni ekoki biso kozala banzeneneke na likambo oyo ya nsomo? Boye tika tosembola maboko na biso, mpe tosalela nguya ya Nzambe oyo ezali kati na biso, mpe tobikisa bango uta na moto.

11 Kasi Alma alobaki epayi na ye: Molimo asengisi ngai ete nasengeli te kosembola loboko na ngai; mpo tala, Nkolo ye moko ayambi bango epayi na ye, na nkembo; mpe apesi nzela ete bakoka kosala likambo oyo, soki te ete bato bakoka kosala likambo oyo epayi na bango, engebene na bokasi ya mitema na bango, ete masambisi oyo akosala likolo na bango na nkele na ye makoka kozala ya alima; mpe makila ya bato bazanga ekweyeli matelema lokola litatoli likolo na bango, iyo, mpe makobelela makasi na kofundaka bango na mokolo ya nsuka.

12 Sikawa Amuleki alobaki epayi ya Alma: Tala, mbele bakotumba biso mpe lokola.

13 Mpe Alma alobaki: Tika ezala engebene na bolingi ya Nkolo. Kasi, tala, mosala na biso mosili naino te; yango wana bakotumba biso te.

14 Sikawa esalemaki ete ntango nzoto na bango oyo babwakamaki kati na moto ezikaki nie, mpe lisusu masolo ya makomi oyo ebwakamaki na kati elongo na bango, mosambisi mokonzi ya mboka ayaki mpe atelemaki liboso ya Alma mpe Amuleki, wana ezalaki bango ya kokangama; mpe abetaki bango na loboko na ye likolo ya matama na bango, mpe alobaki epayi na bango: Nsima ya oyo bomoni, ekoteya bino lisusu bato oyo, ete babwakama kati na liziba ya moto mpe libanga ya fofolo?

15 Tala, bomoni ete bozalaki te na nguya ya kobikisa bango oyo babwakamaki kati na moto; mpe Nzambe abikisi bango te mpo bazalaki bato na bondimi na bino. Mpe mosambisi abetaki bango lisusu na matama na bango, mpe atunaki: Bolobi nini mpo na bino moko?

16 Sikawa mosambisi oyo azalaki na molongo mpe bondimi ya Newolo, oyo abomaki Gideona.

17 Mpe esalemaki ete Alma mpe Amuleki bayanolaki ye eloko moko te; mpe abetaki bango lisusu, mpe apesaki bango na basali mpo na kobwakama kati na boloko.

18 Mpe ntango babwakamaki kati na bolokna mikolo misato, balobeli mingi bayaki, mpe basambisi, mpe banganganzambe, mpe bateyi mingi, oyo bazalaki bato ya boyambi ya Newolo; mpe bayaki epayi na boloko kotala bango; mpe batunaki bango mpo na oyo etali maloba mingi; kasi bayanolaki bango eloko moko te.

19 Mpe esalemaki ete mosambisi atelemaki liboso na bango, mpe alobaki: Ntina nini boyanoli maloba ya bato oyo te? Boyebi te ete nazali na nguya ya kobwaka bino epayi na moto? Mpe atindaki bango koloba; kasi bayanolaki eloko moko te.

20 Mpe esalemaki ete balongwaki mpe bakendaki nzela na bango, kasi bayaki lisusu na mokolo ya nsima; mpe mosambisi abetaki bango lisusu na matama na bango. Mpe bato mingi babimaki liboso mpe lokola, mpe babetaki bango, kolobaka: Bokotelama lisusu mpe bokosambisa bato oyo, mpe bokokitisa mobeko na biso? Soki bozali na nguya monene ya lolenge oyo ntina nini ekoki bino komibikisa te?

21 Mpe balobelaki bango makambo mingi ya lolenge oyo, kopelisaka bango mino na bango, mpe kobwakaka nsoi epayi na bango, mpe kolobaka: Lolenge boni ekozala biso ntango tokokweisama?

22 Mpe makambo mingi ya lolenge oyo, iyo, makambo nyonso ya lolenge oyo balobelaki bango; mpe boye basekaki bango mpo na mikolo mingi. Mpe bapekisaki bango bilei ete bakoka kozala na nzala, mpe mai ete bakoka kozala na mposa; mpe balongolaki bango bilamba na bango ete batikala bolumbu; mpe boye bakangaki bango na singa makasi, mpe bakangamaki na boloko.

23 Mpe esalemaki ete esilaki bango koyoka mpasi mikolo mingi, (mpe ezalaki na mokolo ya zomi na mibale, na sanza ya zomi, na mobu ya zomi ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi) ete mosambisi mokonzi likolo ya mboka ya Amoniya mpe mingi ya bateyi na bango mpe balobeli na bango bakotaki kati na boloko wapi Alma mpe Amuleki bakangamaki na singa.

24 Mpe mosambisi mokonzi atelemaki liboso na bango, mpe abetaki bango lisusu, mpe alobaki epayi na bango: Soki bozali na nguya ya Nzambe bomikangola uta na nkanga oyo, mpe nde tokondima ete Nkolo akobebisa bato oyo engebene na maloba na bino.

25 Mpe esalemaki ete bango nyonso bakendaki mpe babetak i bango, kolobaka maloba se wana, kutu kino moto ya nsuka; mpe ntango moto ya nsuka alobelaki bango nguya ya Nzambe ezalaki likolo ya Alma mpe Amuleki, mpe batelemaki likolo ya makolo na bango.

26 Mpe Alma agangaki, kolobaka: Kino ntango boni ekoyoka biso mpasi ya mitungisi minene oyo, O Nkolo? O Nkolo, pesa biso makasi engebene na bondimi na biso boye ezali na Klisto, kutu mpo na bokangoli. Mpe bakataki singa oyo wapi bakangamaki; mpe ntango bato bamonaki oyo, babandaki kokima, mpo bobangi ya bobebisami eyaki likolo na bango.

27 Mpe esalemaki ete bobangi na bango ezalaki ya mingi mpenza ete bakweyaki na mabele, mpe bakomaki te na ekuke ya libanda ya boloko; mpe mabele maninganaki makasi, mpe bifelo ya boloko bibukanaki na mibale, na lolenge ete ekweyaki na mabele; mpe mosambisi mokonzi, mpe balobeli, mpe banganganzambe, mpe bateyi, baoyo babetaki Alma mpe Amuleki babomamaki na bokwei na yango.

28 Mpe Alma mpe Amuleki babimaki uta na boloko, mpe bazokisamaki te; mpo Nkolo apesaki bango nguya, engebene na bondimi na bango na Klisto. Mpe babimaki mbala moko uta na boloko; mpe bakangolamaki uta na singa na bango; mpe ndako ya boloko ekweyaki na mabele, mpe moto moko moko oyo azalaki kati na bifelo na yango, longola se Alma mpe Amuleki, mobomamaki, mpe na mbala moko bayaki na engumba.

29 Sikawa bato lokola bayokaki makelele monene bayaki kokimaka mbangu elongo na ebele ya bato mpo na koyeba ntina na yango; mpe ntango bamonaki Alma mpe Amuleki kobimaka libanda ya boloko, mpe bifelo na yango ya kokweya na mabele, bazwamaki na bobangi monene, mpe bakimaki uta na miso ya Alma mpe Amuleki lokola ntaba akokimaka elongo na elenge na ye uta na bankosi mibale; mpe boye bakimaki uta na miso ya Alma mpe Amuleki.

Bimisa na lokasa