Makomi
Alma 15


Mokapo 15

Alma mpe Amuleki bakei na Sidomi mpebatie eklezia yoko—Alma abikisi Zezilomi, oyo akangani na Eklezia—Mingi babatisami, mpe Eklezia efuluki—Alma mpe Amuleki bakei na Zalayemila. Penepene na mobu 81 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Alma mpe Amuleki batindamaki mpo na kokende libanda ya engumba wana; mpe bakendaki, mpe bayaki libanda kutu kati na mboka ya Sidomi; mpe tala, kuna bamonaki bato nyonso oyo balongwaki uta na mboka ya Amoniya, baoyo babenganamaki mpe babambamaki mabanga, mpo bandimaki maloba ya Alma.

2 Mpe basangelaki epayi na bango makambo nyonso oyo ekomelaki basi mpe bana na bango, mpe lisusu oyo etali bango moko, mpe oyo etali nguya ya bokangoli na bango.

3 Mpe lisusu Zezilomi alalaki na bokono na Sidomi, na nzoto moto, oyo esalemaki mpo na mitungisi minene ya mayele na ye na ntina ya nkuna na ye, mpo abanzaki ete Alma mpe Amuleki bazalaki lisusu te; mpe abanzaki ete Alma mpe Amuleki babomamaki na ntina ya mabe na ye. Mpe lisumu monene oyo, mpe mingi ya masumu na ye, manyokolaki mayele na ye kino makomaki koswa mpenza, kozangaka bokangoli; boye abandaki kozika na moto makasi.

4 Sikawa, eyokaki ye ete Alma mpe Amuleki bazalaki na mboka ya Sidomi, motema na ye ebandaki kozwa mpiko; mpe atindaki noki maloba epayi na bango, ete azalaki na mposa na bango koya epayi na ye.

5 Mpe esalemaki ete bakendaki noki, kotosaka maloba oyo atindaki epayi na bango; mpe bakotaki na ndako epayi ya Zezilomi; mpe bakutaki ye likolo ya mbeto na ye, na bokono, kozalaka ya kolemba mpenza na nse ya fiefele ya kozikisa nzoto; mpe mayele na ye ezalaki koswa mpenza na ntina ya mabe na ye; mpe ntango amonaki bango asembolaki na ye, mpe abondelaki bango ete babikisa ye uta na bokono.

6 Mpe esalemaki ete Alma alobelaki ye, kosimbaka ye na loboko; Ezali yo kondima na nguya ya Klisto mpo na lobiko?

7 Mpe ye ayanolaki mpe alobaki: Iyo, nazali kondima maloba nyonso oyo oteyaki.

8 Mpe Alma alobaki: Soki ozali na bondimi na bosikoli ya Klisto okoki kobika.

9 Mpe alobaki: Iyo, nazali kondima engebene na maloba na yo.

10 Mpe nde Alma abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo Nzambe na biso, lakisa boboto na moto oyo, mpe bikisa ye engebene na bondimi na ye na Klisto.

11 Mpe esilaki Alma koloba maloba oyo, Zezilomi atelemaki na makolo na ye, mpe abandaki kotambola; mpe oyo esalemaki na bokamwi ya bato nyonso; mpe boyebi ya likambo oyo ekendaki epayi nyonso na mboka mobimba ya Sidomi.

12 Mpe Alma abatisaki Zezilomi mpo na Nkolo; mpe abandaki uta ntango wana kokende liboso koteya bato.

13 Mpe Alma atiaki eklezia yoko na mboka ya Sidomi, mpe abulisaki banganganzambe mpe balakisi na mboka, mpo na kobatisa mpo na Nkolo nyonso oyo bazalaki na mposa ya kobatisama.

14 Mpe esalemaki ete bazalaki mingi; mpo bayaki ebele kuna uta na etuka nzinganzinga mpembeni na Sidomi, mpe babatisamaki.

15 Kasi mpo na oyo etali bato oyo bazalaki na mboka ya Amoniya, batikalaki kaka bato ya mitema makasi mpe ya matoyi mangongi; mpe bayambolaki te uta na masumu na bango, kopesaka nguya nyonso ya Alma mpe Amuleki na zabulu; mpo bazalaki ya boyambi ya Newolo, mpe bandimaki te boyamboli ya masumu na bango.

16 Mpe esalemaki ete Alma mpe Amuleki, mpo Amuleki atikaki wolo na ye, mpe mpauni na ye, mpe biloko na ye nyonso ya motuya, oyo ezalaki na mboka ya Amoniya, mpo na liloba ya Nzambe, ye kobwakamaka na bango oyo bazalaki kala baninga na ye mpe lisusu na tata na ye mpe na libota na ye;

17 Boye, esilaki Alma kotia eklezia na Sidomi, komonaka botangi monene, iyo, komonaka ete bato batangamaki mpo na oyo etali lolendo ya mitema na bango, mpe babandaki komikitisa liboso ya Nzambe, mpe babandaki kosangana esika moko na bandako esantu na bango mpo na kokumbamela Nzambe liboso ya etumbelo, kokengeleka mpe kosambelaka ntango nyonso, ete bakoka kokangolama uta na Satana, mpe uta na liwa, mpe uta na bobebisami—

18 Sikawa lokola nalobaki, Alma nsima ya komonaka makambo oyo nyonso, boye akamataki Amuleki mpe ayaki na mboka ya Zalayemila, mpe akamataki ye na ndako na ye moko, mpe asalisaki ye na mikakatano na ye, mpe alendisaki ye kati na Nkolo.

19 Mpe boye nde esilaki mobu ya zomi ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa