Makomi
Alma 1


Buku ya Alma
Mwana mobali ya Alma

Lisitwale ya Alma, oyo azalaki mwana mobali ya Alma, mosambisi mokonzi ya yambo likolo ya bato ya Nefi, mpe lisusu nganganzambe monene likolo ya eklezia. Ezali na lisitwale ya boyangeli ya basambisi, mpe bitumba mpe boweli na kati ya bato. Mpe ezali lisusu na lisitwale ya etumba yoko kati na Banefi mpe Balamani, engebene na lisolo ya makomi ya Alma, mosambisi mokonzi mpe ya yambo.

Mokapo 1

Newolo ateyi malongi ya lokuta, asali eklezia, akotisi poloso ya banganga, mpe abomi Gideona—Newolo abomami mpo na mabe na ye—Poloso ya banganga mpe bonyokoli epanzani na kati ya bato—Banganganzambe bamisalisi, bato babateli babola, mpe eklezia efuluki. Penepene na mibu 91–88 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete na mobu ya yambo ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, uta na ntango wana kokende liboso, mokonzi Mosiya ekendaki ye nzela ya mabele nyonso, nsima ya kobunda etumba malamu, na kotambolaka alima liboso ya Nzambe, wana etikaki ye moto moko te kokonza na esika na ye; nzokande atiaki mibeko, mpe oyo mindimamaki na bato; boye basengelaki kotosa mibeko oyo asalaki.

2 Mpe esalemaki ete na mobu ya yambo ya boyangeli ya Alma na kiti ya bosambisi, ezalaki na moto moko oyo bamemaki liboso na ye mpo ete asambisama, moto moko molai, mpe ayebanaki mpo na bokasi boike na ye.

3 Mpe akendaki nzinganzinga na kati ya bato, koteyaka bango oyo abiangaki liloba ya Nzambe, kotelemelaka eklezia; kolobaka epayi ya bato ete nganganzambe moko moko mpe moteyi moko moko asengeli koyebana mingi na bato; mpe basengeli te kosala na maboko na bango, kasi basengeli kosalisama na bato.

4 Mpe lisusu atatolaki epayi ya bato ete bato nyonso bakobikisama na mokolo ya nsuka, mpe ete basengeli te kobanga soki te kolenge, kasi ete bakokaki kotombolamitu na bango mpe kosepela; mpo Nkolo asalaki bato nyonso, mpe lisusu asikolaki bato nyonso; mpe, na nsuka, bato nyonso bakozwa bomoi ya seko.

5 Mpe esalemaki ete ateyaki makambo oyo mingi koleka ete bato mingi bandimaki maloba na ye, kutu mingi koleka ete babandaki kosalisa ye mpe kopesa ye mosolo.

6 Mpe abandaki kotombwana likolo na lolendo ya motema na ye, mpe kolata monzele ya ntalo mpenza, iyo, mpe kutu abandaki kotia eklezia moko na lolenge ya mateya na ye.

7 Mpe esalemaki ete ntango azalaki kokende, mpo na koteya bato oyo bandimaki liloba na ye, akutanaki na moto moko oyo azalaki ya eklezia ya Nzambe, iyo, kutu moko ya bateyi na bango; mpe abandaki kowela na ye na elulu, ete akoka kobungisa bato ya eklezia; kasi moto yango atelemelaki ye, kokebisaka ye na maloba ya Nzambe.

8 Sikawa nkombo ya moto yango ezalaki Gideona; mpe ezalaki ye oyo azalaki esalelo yoko na maboko ya Nzambe na kobikisaka bato ya Limiyi uta na boumbu.

9 Sikawa, mpo Gideona atelemelaki ye na maloba ya Nzambe ye adasukaki na Gideona, mpe abendaki mompanga na ye mpe abandaki kobeta ye. Sikawa lokola Gideona azalaki na mibu mingi, yango wana akokaki te kotelemela mbete na ye, boye abomamaki na mompanga.

10 Mpe moto oyo abomaki ye bakamataki ye na bato ya eklezia, mpe bamemaki ye liboso ya Alma, mpo na kosambisama engebene na mabe asalaki.

11 Mpe esalemaki ete atelemaki liboso ya Alma mpe asambaki mpo na ye moko na mpiko mpenza.

12 Kasi Alma alobaki epayi na ye: Tala, oyo ezali mbala ya yambo wapi poloso ya banganga ekotisami na kati ya bato oyo. Mpe tala, ozali kaka te na elindo ya poloso ya banganga, kasi osali makasi ya kolendisa yango na mompanga; mpe soki poloso ya banganga elendisami na kati ya bato oyo yango ekosuka na bobebisami na bango mobimba.

13 Mpe osopi makila ya moto moko ya sembo, iyo, moto oyo asalaki bolamu boike na kati ya bato oyo; mpe soki totiki yo makila na ye ekoya likolo na biso mpo na bobekoli.

14 Boye opesami etumbu ya kufa, engebene na mobeko oyo mopesamelaki biso na Mosiya, mokonzi na biso ya nsuka; mpe mondimamaki na bato oyo; boye bato oyo basengeli kotosa mobeko.

15 Mpe esalemaki ete bakamataki ye; mpe nkombo na ye ezalaki Newolo; mpe bamemaki ye likolo ya nsonge ya ngomba ya moke ya Manti, mpe kuna asengisamaki, na koloba malamu andimaki, katikati ya lola mpe mabele, ete nini ateyaki na bato ezalaki ya bokeseni na liloba ya Nzambe; mpe kuna ayokaki mpasi ya liwa ya nsoni.

16 Nzokande, oyo etiaki nsuka te na bopanzani ya poloso ya banganga na mboka; mpo ezalaki na mingi baoyo balingaki makambo ya mpamba mpamba ya mokili, mpe bakendaki koteyaka malongi ya lokuta; mpe basalaki oyo mpo na ntina ya bozwi mpe lokumu.

17 Nzokande, bamekaki kokosa te, soki eyebanaki, mpo na bobangi mobeko, mpo bato ya lokuta bazalaki kopesama etumbu; yango wana balobaki bateyaki engebene na boyambi na bango; mpe sikawa mobeko mokokaki te kozala na nguya likolo ya moto mpo na boyambi na ye.

18 Mpe bamekaki koyiba te, mpo na bobangi mobeko, mpo bato ya lolenge oyo bazalaki kopesama etumbu; mpe bamekaki te koyongola, to koboma te, mpo oyo abomaki, apesamaki etumbu ya liwa.

19 Kasi esalemaki ete moto nyonso oyo azalaki ya eklezia ya Nzambe te abandaki konyokola baoyo bazalaki ya eklezia ya Nzambe, mpe bakamataki likolo na bango nkombo ya Klisto.

20 Iyo, banyokolaki bango, mpe batungisaki bango na ndenge nyonso ya maloba, mpe oyo na ntina ya bomikitisi na bango; mpo bazalaki na lolendo te na miso na bango moko, mpe mpo bakabolaki liloba ya Nzambe, moko na mosusu, na mosolo te, na ntalo mpe te.

21 Sikawa ezalaki na mobeko moko ya sikisiki, na kati ya bato ya eklezia, ete moto moko te, ya eklezia, akotelema mpe akonyokola bango oyo bazalaki te bato ya eklezia, mpe ete bonyokoli esengeli te kozala na kati na bango moko.

22 Nzokande, ezalaki na bato mingi na kati na bango oyo babandaki kozala na lolendo, mpe babandaki kowela makasi na bayini na bango, kutu kino na kobetama mbata; iyo, balingaki kobetama makofi.

23 Sikawa oyo ezalaki na mobu ya mibale ya boyangeli ya Alma, mpe ezalaki ntina ya mitungisi mingi na eklezia; iyo, ezalaki ntina ya komekama mingi na eklezia.

24 Mpo mitema ya mingi ezalaki makasi, mpe nkombo na bango elongolamaki mpenza, ete bakundolamaki lisusu te na kati ya bato ya Nzambe. Mpe lisusu mingi bamilongolaki uta na kati na bango.

25 Sikawa oyo ezalaki komekama monene na bango oyo batelemaki ngwi kati na bondimi; nzokande, bazalaki ngwi mpe elonga na kobatelaka mitindo ya Nzambe, mpe bandimaki na bompikiliki bonyokoli boye bobakisamaki likolo na bango.

26 Mpe ntango banganganzambe batikaki mosala makasi na bango mpo na kokaba liloba ya Nzambe na bato, bato mpe lokola batikaki misala na bango mpo na koyoka liloba ya Nzambe. Mpe esilaki banganganzambe kokaba na bango liloba ya Nzambe bango nyonso bazongaki lisusu na molende na misala na bango; mpe nganganzambe, amikanisaki te likolo ya bayoki na ye, mpo molakisi azalaki te malamu koleka bayekoli, mpe boye bazalaki nyonso bato bakokani; mpe bazalaki nyonso kosala, moto na moto engebene na bokasi na ye.

27 Mpe bakabaki biloko na bango, moto na moto engebene na oyo wana azwaka, na babola, mpe na bakeleli, mpe na bakoni, mpe na baoyo batungisami; mpe balataki te monzele ya ntalo, nzokande bazalaki peto mpe kitoko.

28 Mpe boye bavandisaki makambo ya eklezia; mpe boye babandaki lisusu kozala na kimia ya ntango nyonso, ata minyoko na bango nyonso.

29 Mpe sikawa, na ntina ya molende ya eklezia bakomaki bato na bozwi mpenza, kozalaka na kotondana ya biloko nyonso oyo bazalaki kati na mposa—kotondana ya bibwele mpe bitonga, mpe banyama ya mafuta ya ndenge na ndenge, mpe lisusu kotondana ya mboto, mpe wolo, mpe mpauni, mpe ya biloko ya motuya, mpe kotondana ya bilamba ya swa mpe lino ya kilo mpe ya malonga, mpe ndenge nyonso ya bilamba ya ntalo te.

30 Mpe boye, na ntango ya bofuluki na bango, babenganaki moto moko te oyo azalaki bolumbu, to oyo azalaki na nzala, to oyo azalaki na mposa ya mai, to oyo azalaki na bokono, to oyo aleisamaki te; mpe batiaki te mitema na bango likolo ya bozwi; boye bazalaki nyonso bato ya motema ya kokaba, mobange mpe elenge lokola, moumbu mpe nsomi lokola, mwasi mpe mobali lokola, ezala libanda ya eklezia to kati na eklezia, koponaka bato te na kotalaka bango oyo bazalaki kati na mposa.

31 Mpe boye bafulukaki mpe bakomaki na bozwi mingi koleka bango oyo bazalaki bato ya eklezia na bango te.

32 Mpo na bango oyo bazalaki bato ya eklezia na bango te bamisepelaki na bondoki, mpe na losambo ya banzambe ya bikeko to na goigoi, mpe na biloba-loba, mpe na boluli, mpe na songisongi; kolataka monzele ya ntalo; kotombwanaka likolo na lolendo ya miso na bango moko; konyokolaka, kokosaka, koyibaka, koyongolaka, kosalaka pite, mpe kobomaka, mpe ndenge nyonso ya nkuna; nzokande, mobeko etiamaki na bokasi likolo na bango nyonso oyo babukaki mwango, mbala mingi lokola ekokaki.

33 Mpe esalemaki ete na kosalelaka boye mobeko likolo na bango, moto na moto ayokaki mpasi engebene na oyo asalaki, bakomaki kimia koleka, mpe bamekaki te kosala nkuna soki eyebanaki; boye, kimia ezalaki mingi na kati ya bato ya Nefi kino na mobu ya mitano ya boyangeli ya basambisi.

Bimisa na lokasa