Makomi
Alma 20


Mokapo 20

Nkolo atindi Amona na Midoni mpo na kokangola bandeko na ye bandimi baoyo bakangamaki na boloko—Amona mpe Lamoni bakutani na tata ya Lamoni, oyo azali mokonzi likolo ya mboka mobimba—Amona asengisi mokonzi oyo azalaki mobange andima kotika bandeko na ye. Penepene na mobu 90 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete etiaki bango eklezia moko na mboka wana, mokonzi Lamoni azalaki na mposa ete Amona akende elongo na ye na mboka ya Nefi, ete akoka kolakisa ye epayi ya tata na ye.

2 Mpe mongongo ya Nkolo eyaki na Amona, kolobaka: Okomata te na mboka ya Nefi, mpo tala, mokonzi akoluka bomoi na yo; kasi osengeli kokende na mboka ya Midoni; mpo tala, ndeko na yo Alona, mpe lisusu Muloki mpe Ama bazali na boloko.

3 Sikawa esalemaki ete eyokaki Amona makambo oyo, alobaki epayi ya Lamoni: tala, ndeko na ngai ya mobali mpe bandeko na ngai bandimi bazali na boloko na Midoni, mpe nakeyi ete nakoka kokangola bango.

4 Sikawa Lamoni alobaki epayi na Amona: Nayebi, na bokasi ya Nkolo okoki kosala makambo nyonso. Kasi tala, nakokende elongo na yo na mboka ya Midoni; mpo mokonzi na mboka ya Midoni, oyo kani nkombo ezali Atiomino, azali moninga na ngai; boye nakokende na mboka ya Midoni, ete nabondela mokonzi ya mboka, mpe akobimisa bandeko na yo uta na boloko. Sikawa Lamoni alobaki epayi na ye: Nani alobeli yo ete bandeko na yo bazali na boloko?

5 Mpe Amona alobaki epayi na ye: Moto moko ayebisaki ngai te, longola se soki ezali Nzambe; mpe alobaki epayi na ngai—Kende kokangola bandeko na yo bandimi, mpo bazali na boloko na mboka ya Midoni.

6 Sikawa eyokaki Lamoni oyo asalaki ete basali na ye babongisa bampunda mpe makalo na ye.

7 Mpe alobaki epayi ya Amona: Yaka, nakokende elongo na yo na mboka ya Midoni, mpe kuna nakosamba na mokonzi ete abimisa bandeko na yo uta na boloko.

8 Mpe esalemaki ete lokola Amona mpe Lamoni bazalaki na mobembo kuna, bakutanaki na tata ya Lamoni, oyo azalaki mokonzi likolo ya mboka mobimba.

9 Mpe tala, tata ya Lamoni alobaki epayi na ye: Mpo na nini oyaki te na lipati na mokolo monene mona ntango nasalaki lipati mpo na bana mibali na ngai, mpe mpo na bato na ngai?

10 Mpe alobaki lisusu: Wapi ozali kokende elongo na Monefi oyo, oyo azali moko ya bana ya mobuki lokuta?

11 Mpe esalemaki ete Lamoni azongelaki koyebisa epayi na ye wapi azalaki kokendeke, mpo abangaki kotumola ye.

12 Mpe lisusu ayebisaki ye ntina nyonso ya bowumeli na ye na bokonzi na ye moko, ete akendaki te na lipati oyo tata na ye alengelaki.

13 Mpe sikawa ntango Lamoni azongelaki koyebisa epayi na ye makambo oyo nyonso, tala, na bokamwi na ye, tata na ye asilikaki na ye, mpe alobaki: Lamoni, ozali kokende kokangola Banefi baye, baoyo bazali bana mibali ya mobuki lokuta. Tala, ayongolaki batata na biso; mpe sikawa bana na ye lisusu bayei na kati na biso ete bakoka, na mayele mabe na bango mpe bokosi na bango, kobuba biso, ete bango mpe lokola bakoka koyongola bozwi na biso.

14 Sikawa tata ya Lamoni atindaki ye ete aboma Amona na mompanga. Mpe atindaki ye lisusu ete akende te na mboka ya Midoni, kasi azonga elongo na ye na mboka ya Yisamaele.

15 Kasi Lamoni alobaki epayi na ye: Nakoboma Amona te, mpe nakozonga te na mboka ya Yisamaele, kasi nakokende na mboka ya Midoni ete nakoka kotika bandeko ya Amona, mpo nayebi ete bazali bato bayengebene mpe baprofeta basantu ya Nzambe ya solo.

16 Sikawa eyokaki tata na ye maloba oyo, asilikaki na ye, mpe abendaki mompanga na ye ete akoka kobamba ye na mabele.

17 Kasi Amona atelemaki mpe alobaki epayi na ye: Tala, okoboma mwana mobali na yo te; nzokande, elingaki kozala malamu mingi ete ye akweya na esika na yo, mpo tala, asili koyambola masumu na ye; kasi soki okwei na ntango oyo, na nkanda na yo, molimo na yo ekoki kobikisama te.

18 Mpe lisusu, elongobani ete otika; mpo soki obomi mwana mobali na yo, oyo azali moto azangi elindo, makila na ye makoganga uta na nse na Nkolo Nzambe na ye, mpo bobekoli ekoya likolo na yo; mpe mbele okobungisa molimo na yo.

19 Sikawa elobaki Amona maloba oyo epayi na ye, ayanolaki, kolobaka: Ngai nayebi ete soki nabomi mwana mobali na ngai, ete nakotangisa makila mazangi ekweyeli; mpo ozali moto oyo alukaki kobebisa ye.

20 Mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma Amona. Kasi Amona atelemelaki mabete na ye, mpe lisusu atutaki loboko na ye mpo ete akoka kosalela yango te.

21 Sikawa emonaki mokonzi ete Amona akokaki koboma ye, abandaki kosamba na Amona ete abikisa bomoi na ye.

22 Kasi Amona atombolaki mompanga na ye, mpe alobaki epayi na ye: Tala, nakobeta yo longola se soki opesi nzela epayi na ngai ete bandeko na ngai babimisama uta na boloko.

23 Sikawa mokonzi, lokola azalaki kobanga ete abungisa bomoi na ye, alobaki: Soki okobikisa ngai nakopesa epayi na yo nyonso oyo okosenga, kutu kino na ndambo ya bokonzi na ngai.

24 Sikawa ntango Amona amonaki ete asalaki likolo ya mokonzi na mobange engebene na mposa na ye, alobaki epayi na ye: Soki opesi nzela ete bandeko na ngai babimisama uta na boloko, mpe lisusu ete Lamoni akoka kotikala kaka na bokonzi na ye, mpe ete ozala na nkanda na ye te, kasi otika ete akoka kosala engebene na mposa ya ye moko mpo na eloko nyonso oyo akanisi, nde nakobikisa yo; soki te nakobeta yo na mabele.

25 Sikawa elobaka Amona maloba oyo, mokonzi abandaki kosepela na ntina ya bomoi na ye.

26 Mpe ntango amonaki ete Amona azalaki te na mposa ya koboma ye, mpe ntango amonaki lisusu bolingo monene oyo azalaki na yango mpo na mwana mobali na ye Lamoni, akamwaki mingi koleka, mpe alobaki: Mpo oyo ezali nyonso oyo ozali na yango mposa, ete nabimisa bandeko na yo bandimi, mpe nandima ete mwana mobali na ngai Lamoni atikala kaka na bokonzi na ye, tala, nakopesa nzela epayi na yo ete mwana mobali na ngai akoka kotikala kaka na bokonzi na ye uta na ntango oyo mpe libela; mpe nakoyangela ye lisusu te—

27 Mpe nakopesa nzela epayi na yo ete bandeko na yo bandimi bakoka kobimisama uta na boloko, mpe yo mpe bandeko na yo bandimi bokoka koya epayi na ngai, na bokonzi na ngai; mpo nakozala na mposa monene ya komona yo. Mpo mokonzi akamwaki mingi na maloba oyo alobaki, mpe lisusu na maloba oyo elobamaki na mwana mobali na ye Lamoni, boye azalaki na mposa ya koyekola yango.

28 Mpe esalemaki ete Amona mpe Lamoni bakobaki mobembo na bango na mboka ya Midoni. Mpe Lamoni asungamaki na miso ya mokonzi ya mboka; boye bandeko bandimi ya Amona bamemamaki libanda uta na boloko.

29 Mpe ntango Amona akutanaki na bango azalaki na mawa mingi koleka, mpo tala bazalaki bolumbu, mpe mposo na bango epalolamaki mingi mpenza na ntina ya kozalaka ya kokangama na singa singa makasi. Mpe lisusu bayokaki mpasi ya nzala, mposa ya mai, mpe ndenge nyonso ya mitungisi; nzokande bazalaki na bompikiliki na bampasi na bango nyonso.

30 Mpe, lokola esalemaki, ezalaki nsuka na bango ya kokweya na maboko ya bato ya motema makasi mingi koleka mpe ya matoyi mangongi mingi koleka; boye balingaki te koyoka maloba na bango, mpe babenganaki bango libanda, mpe babetaki bango, mpe babimisaki bango uta ndako na ndako, mpe uta esika na esika, kutu kino bakomaki na mboka ya Midoni; mpe kuna bakamatamaki mpe babwakamaki na boloko, mpe bakangamaki na singa makasi, mpe babombamaki na boloko mpo na mikolo mingi, mpe bakangolamaki na Lamoni mpe Amona.

Bimisa na lokasa