Makomi
Alma 27


Mokapo 27

Nkolo atindi Amona kokamba bato ya Anti-nefi-lehi na bokengi—Likolo ya bokutani na Alma, bosepeli ya Amona elembisaki bokasi na ye—Banefi bapesi Baanti-nefi-lehi mboka ya Yesoni—Babiangami bato ya Amona. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete ntango Balamani bana oyo bakendaki na etumba na Banefi, bamonaki ete nsima ya bitumba mingi mpo na kobebisaka bango, ete kolukaka bobebisami na bango ezalaki mosala mpamba, bazongaki lisusu na mboka ya Nefi.

2 Mpe esalemaki ete Baamaleki, mpo babungisaki bato mingi, basilikaki mpenza. Mpe ntango bamonaki ete bakokaki te koluka bobekoli uta na Banefi, babandaki kolamusa bato na nkanda na bandeko na bango, bato ya Anti-nefi-lehi; boye babandaki lisusu kobebisa bango.

3 Sikawa bato oyo baboyaki lisusu kokamata manduki na bango, mpe bapesaki nzela bango moko ete babomama engebene na mposa ya banguna na bango.

4 Sikawa ntango Amona mpe bandeko na ye bamonaki mosala ya bobebisami oyo na kati na bango oyo balingaki mingi mpenza, mpe na kati na bango oyo balingaki bango mingi mpenza—mpo basalelaki bango lokola soki bazalaki banjelu batindami na Nzambe mpo na kobikisa bango uta na bobebisami ya libela—boye, ntango Amona mpe bandeko na ye bamonaki mosala monene oyo ya bobebisami, basimbamaki na mawa, mpe balobaki epayi ya mokonzi:

5 Tika tosangana esika moko bato oyo ya Nkolo, mpe tokita na mboka ya Zalayemila na bandeko na biso Banefi, mpe tokima uta na maboko ya banguna na biso, ete tobebisama te.

6 Kasi mokonzi alobaki epayi na bango: Tala, Banefi bakobebisa biso, na ntina ya bobomi mpe masumu mingi oyo tosalaki bango.

7 Mpe Amona alobaki: Nakokende mpe nakotuna na Nkolo, mpe soki alobi epayi na biso, bokita epayi ya bandeko na bino, ekolinga bino kokende?

8 Mpe mokonzi alobaki epayi na ye: Iyo, soki Nkolo alobi epayi na biso bokende, tokokita epayi ya bandeko na biso, mpe tokozala baumbu na bango kino tokobongisa mpo na bango bobomi mpe masumu mingi oyo tosalaki na bango.

9 Kasi Amona alobaki epayi na ye: Epekisami na mobeko ya bandeko na biso, oyo etiamaki na tata na ngai, ete baumbu bazala te na kati na bango; boye tika tokita mpe totalela boboto ya bandeko na biso.

10 Kasi mokonzi alobaki epayi na ye: Tuna liboso na Nkolo, mpe soki alobi epayi na biso bokende, tokokende; soki te tokowa na mboka.

11 Mpe esalemaki ete Amona akendaki mpe atunaki na Nkolo, mpe Nkolo alobaki epayi na ye:

12 Kamata bato oyo libanda ya mboka oyo, ete bawa te; mpo Satana azali na nguya monene likolo ya mitema ya Baamaleki, baoyo bazali kolamusa Balamani na nkanda na bandeko na bango mpo na koboma bango; boye bokende uta na mboka oyo; mpe bapambolami bato oyo na nkola oyo, mpo nakobatela bango.

13 Mpe sikawa esalemaki ete Amona akendaki mpe ayebisaki mokonzi maloba nyonso oyo Nkolo alobaki epayi na ye.

14 Mpe basangisaki esika moko bato na bango nyonso, iyo, bato ya Nkolo nyonso, mpe basangisaki esika moko bibwele mpe bitonga na bango mpe babimaki uta na mboka, mpe bayaki kati na esobe oyo ekaboli mboka ya Nefi na mboka ya Zalayemila, mpe bakomaki mpembeni na ndelo ya mboka.

15 Mpe esalemaki ete Amona alobaki epayi na bango: Tala, ngai mpe bandeko na ngai tokokende kati na mboka ya Zalayemila, mpe bokotikala awa kino tokozonga; mpe tokomeka mitema ya bandeko na biso, soki bakolinga ete bokoka kokota na mboka na bango.

16 Mpe esalemaki ete lokola Amona azalaki kokende kati na mboka, ete ye na bandeko na ye bakutanaki na Alma, na esika oyo elobelami; mpe tala, oyo ezalaki bokutani ya bosepeli.

17 Sikawa bosepeli ya Amona ezalaki monene mingi mpenza kutu ete atondisamaki; iyo, amelamaki mobimba na bosepeli ya Nzambe na ye, kino nzoto na ye elembaki; kutu kino na kosilisa bokasi na ye; mpe akweyaki lisusu na mabele.

18 Sikawa ezalaki oyo bosepeli ya koleka mpenza te? Tala, oyo ezali bosepeli moto moko te akoki kozwa longola se soki ezali moyamboli ya solo mpe moluki ya esengo oyo amikitisi mpenza.

19 Sikawa bosepeli ya Alma na kokutanaka na bandeko na ye ezalaki solo monene, mpe ezalaki bongo lisusu bosepeli ya Alona, ya Omina, mpe Imini; kasi tala bosepeli na bango ezalaki te na lolenge ete eleka bokasi na bango.

20 Mpe sikawa esalemaki ete Alma akambaki bandeko na ye kozonga na mboka ya Zalayemila; kutu na ndako na ye moko. Mpe bakendaki mpe balobelaki mosambisi mokonzi nyonso oyo ekomelaki bango na mboka ya Nefi, na kati ya bandeko na bango, Balamani.

21 Mpe esalemaki ete mosambisi mokonzi atindaki bosakoli epayi nyonso na mboka mobimba, kozalaka na mposa ya kopona ya bato mpo na oyo etali bondimami ya bandeko na bango, baoyo bazalaki bato ya Anti-nefi-lehi.

22 Mpe esalemaki ete kopona ya bato eyaki, kolobaka: Tala, tokotika mboka ya Yesoni, oyo ezali na esti ya mbu, oyo ekangemi na mboka Beboo, oyo ezali na sudi ya mboka Beboo; mpe mboka oyo Yesoni ezali mboka oyo tokopesa epayi ya bandeko na biso lokola bosangoli libula na bango.

23 Mpe tala, tokotia mampinga na biso kati na mboka Yesoni mpe mboka Nefi, ete tokoka kobatela bandeko na biso na mboka Yesoni; mpe oyo tosali mpo na bandeko na biso, na ntina ya bobangi na bango na kotombola manduki na bandeko na bango mbele basala lisumu; mpe oyo bobangi monene na bango eyaki na ntina ya boyamboli ya nsomo boye basalaki, na kotalaka bobomi mingi na bango mpe nkuna ya nsomo na bango.

24 Mpe sikawa tala, oyo tokosala epayi na bandeko na biso, ete bakoka kosangola libula ya mboka Yesoni; mpe tokokengele bango uta na banguna na bango na mampinga na biso, soki bakopesa biso ndambo ya biloko na bango mpo na kosunga biso ete tokoka kosalisa mampinga na biso.

25 Sikawa, esalemaki ete eyokaki Amona likambo oyo, azongaki na bato ya Anti-nefi-lehi, mpe lisusu elongo na Alma, kati na esobe, wapi batelemisaki biema na bango, mpe bayebisaki bango makambo nyonso. Mpe Alma asangelaki epayi na bango bobongwami na ye, elongo na Amona mpe Alona, mpe bandeko na ye.

26 Mpe esalemaki ete yango epesaki bosepeli monene na kati na bango. Mpe bakitaki na mboka ya Yesoni, mpe bakamataki mboka ya Yesoni; mpe babiangamaki na Banefi bato ya Amona; boye bakesenisamaki na nkombo wana nsima libela.

27 Mpe bazalaki na kati ya bato ya Nefi, mpe lisusu, batangamaki na kati ya bato oyo bazalaki ya eklezia ya Nzambe. Mpe bakesenaki lisusu mpo na mpila na bango epayi ya Nzambe, mpe lisusu epayi ya bato; mpo bazalaki na lolenge ya kobonga nie sembo mpe alima na makambo nyonso; mpe bazalaki ngwi kati na bondimi ya Klisto, kutu kino na nsuka.

28 Mpe batalaki bosopi makila ya bandeko na bango na nsomo monene; mpe bakokaki soki moke te kondimisama mpo na kotombola manduki mpo na kobundisa bandeko na bango; mpe batalaki soki moke te liwa ata na ndambo moko te ya nsomo, mpo na elikya mpe bososoli na bango ya Klisto mpe bosekwi; boye, mpo na bango liwa emelamaki mpenza na elonga ya Klisto likolo na yango.

29 Boye, bandimaki koyoka mpasi ya liwa na lolenge eleki mpasi mpe nsomo oyo ekokaki kosalema na bandeko na bango, yambo balingaki se kokamata mompanga ya nsonge to mompanga mogumbama mpo na kobeta bango.

30 Mpe boye bazalaki bato ya mpila mpe balingami, mpe boko bato basungama mingi na Nkolo.

Bimisa na lokasa