Makomi
Alma 2


Mokapo 2

Amalisi aluki kozala mokonzi mpe aboyami na kopona ya bato—Balandi na ye bakomisi ye mokonzi—Baamalisi basali etumba etali Banefi mpe balongami—Balamani mpe Baamalisi basangisi mampinga mpe balongami—Alma abomi Amalisi. Penepene na mobu 87 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya mitano ya boyangeli na bango boweli ebandaki kozala na kati ya bato; mpo moto moko, kobiangamaka Amalisi, oyo azalaki moto moko ya mayele mabe, iyo, moto ya bwania na kotalaka bwania ya mokili, azalaki moto na molongo ya moto oyo abomaki Gideona na mompanga, oyo babomaki engebene na mobeko—

2 Sikawa Amalisi oyo abendaki, na mayele na ye mabe, bato baike nsima na ye; kutu bato mingi ete babandaki kokoma na nguya mingi; mpe babandaki kosala makasi mpo na kotia Amalisi kozala mokonzi likolo ya bato.

3 Sikawa oyo ezalaki likambo ya kobangisa na bato ya eklezia, mpe lisusu na baoyo babendamaki te nsima ya mandimisi ya Amalisi; mpo bayebaki ete engebene na mobeko na bango makambo ya lolenge wana esengelaki kotiama na nzela ya kopona ya bato.

4 Boye, soki ekokaki kosalema ete Amalisi alongi kopona ya bato, ye, kozalaka moto moko ya nkuna, alingaki kozangisa bango makoki mpe matomba na bango ya eklezia; mpo ezalaki mokano na ye ya kobebisa eklezia ya Nzambe.

5 Mpe esalemaki ete bato basanganaki elongo bipayi nyonso na mboka mobimba, moto na moto engebene na mayele na ye, ezala soki ezalaki mpo na Amalisi to mpe te, na mangomba mekabwani, oyo ezalaki na boswani mpe boweli ya kokamwa moko na mosusu.

6 Mpe boye basanganaki bango moko esika moko mpo na kobwaka kopona na bango mpo na oyo etali likambo yango; mpe elakisamaki polele liboso ya basambisi.

7 Mpe esalemaki ete kopona ya bato ezalaki te mpo na Amalisi, ete akomisamaki te mokonzi likolo ya bato.

8 Sikawa oyo epesaki bosepeli boike na mitema na bango oyo bazalaki te mpo na ye; kasi Amalisi alamusaki nkanda na bango oyo bazalaki mpo na ye na bango oyo bazalaki te mpo na ye.

9 Mpe esalemaki ete basanganaki bango moko esika moko, mpe babulisaki Amalisi mpo ete azala mokonzi na bango.

10 Sikawa ntango bakomisaki Amalisi mokonzi likolo na bango ye atindaki bango ete bakamata manduki mpo na kobundisa bandeko na bango; mpe oyo asalaki mpo ete akoka koyangelisa bango na ye.

11 Sikawa Baamalisi bakesenisamaki na nkombo ya Amalisi, mpe babiangamaki Baamalisi, mpe baoyo batikali babiangamaki Banefi, to bato ya Nzambe.

12 Boye bato nyonso ya Banefi bazalaki na boyebi ya mokano ya Baamalisi, mpe boye bamilengelaki mpo na kokutana na bango; iyo, balataki bango moko manduki ya mipanga, mpe ya nsendo, mpe ya matimbo, mpe ya makula, mpe ya mabanga, mpe ya bilingongo, mpe ndenge nyonso ya bibundeli ya etumba ya ndenge na ndenge.

13 Mpe boye bamilengelaki mpo na kokutana na Baamalisi na ntango ya boyei na bango. Mpe ezalaki na bakapiteni baoyo baponamaki, mpe bakapiteni banene, mpe bakapiteni bakonzi, engebene na mitango na bango.

14 Mpe esalemaki ete Amalisi apesaki bato na ye ndenge nyonso ya bibundeli ya etumba ya ndenge na ndenge; mpe lisusu aponaki bayangeli mpe bakambi likolo ya bato na ye, mpo na kokamba bango na kobunda etumba na bandeko na bango.

15 Mpe esalemaki ete Baamalisi bamataki na ngomba moko ya moke na nkombo Aminiwu, oyo ezalaki na esti ya ebale ya Sidona, oyo elekaki mpembeni na mboka ya Zalayemila, mpe kuna babandaki kobunda etumba na Banefi.

16 Sikawa Alma, lokola azalaki mosambisi mokonzi mpe mokambi ya etuka ya bato ya Nefi, yango wana akendaki kuna elongo na bato na ye, iyo, elongo na bakapiteni, mpe bakapiteni bakonzi na ye, iyo, na moto ya mampinga na ye, mpo na kobunda na Baamalisi.

17 Mpe babandaki koboma Baamalisi likolo ya ngomba yango ya moke na esti ya Sidoni. Mpe Baamalisi babandaki kowela na Banefi na bokasi monene, mpo ete mingi ya Banefi bakweyaki liboso ya Baamalisi.

18 Nzokande Nkolo apesaki bokasi na loboko ya Banefi, ete babomaki Baamalisi na bobomi moko monene, ete babandaki kokima liboso na bango.

19 Mpe esalemaki ete Banefi balandaki Baamalisi mokolo mobimba, mpe babomaki bango na bobomi moko monene, na lolenge ete ezalaki na bato ya Baamalisi nkoto zomi na mibale nkama mitano na ntuku misato na mibale oyo mibomamaki; mpe ezalaki na bato ya Banefi bato nkoto motoba nkama mitano na ntuku motoba na mibale oyo babomaki.

20 Mpe esalemaki ete ntango Alma akokaki lisusu te kolanda Baamalisi, asalaki ete bato na ye batelemisa biema na bango na lobwaku ya Gideona, mpe lobwaku yango ebiangamaki nsima ya Gideona se moko wana oyo abomamaki na loboko ya Newolo na mompanga; mpe na lobwaku oyo Banefi batelemisaki biema na bango mpo na butu.

21 Mpe Alma atindaki banongi mpo na kolanda Baamalisi oyo batikali, ete akoka koyeba miango na bango mpe bikokolo na bango, na oyo wapi akoka kozala angele na bango, ete akoka kobatela bato na ye uta na kobebisama.

22 Sikawa bango oyo atindaki mpo na kokengela nganda ya Baamalisi babiangamaki Zelami, mpe Aminoli, mpe Mati, mpe Limiyele; baoyo ezalaki bango oyo bakendaki elongo na bato na bango mpo na kokengele nganda ya Baamalisi.

23 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima bazongaki mbangu na nganda ya Banefi, mpe bazalaki ya kokamwa mingi, mpe bazwamaki na bobangi mingi, kolobaka:

24 Tala, tolandaki nganda ya Baamalisi, mpe na bokamwi monene na biso, na mboka ya Minoni, likolo ya mboka ya Zalayemila, na nzela ya koya na mboka ya Nefi, tomonaki mampinga ya Balamani na motango monene; mpe tala, Baamalisi basangani na bango;

25 Mpe bazali kobundisa bandeko na biso na mboka wana; mpe bazali kokimaka liboso na bango elongo na bibwele na bango, mpe basi na bango, mpe bana na bango, epayi na engumba na biso; mpe longola se soki tosali mbangu bakozwa engumba na biso, mpe batata na biso, mpe basi na biso, mpe bana na biso bakobomama.

26 Mpe esalemaki ete bato ya Nefi bakamataki biema na bango, mpe bakendaki uta na lobwaku ya Gideona epayi na engumba na bango, oyo ezalaki engumba ya Zalayemila.

27 Mpe tala, lokola bazalaki kokatisa ebale Sidoni, Balamani mpe Baamalisi, baoyo bazalaki penepene na motango monene, lokola ezalaki, lokola zelo ya mbu, bayaki likolo na bango mpo na koboma bango.

28 Nzokande, Banefi lokola bazwaki bokasi na loboko ya Nkolo, nsima ya kosambela makasi na ye ete soki akolinga kobikisa bango uta na maboko ya banguna na bango, yango wana, Nkolo ayokaki kolela na bango, mpe apesaki bango bokasi, mpe Balamani mpe Baamalisi bakweyaki liboso na bango.

29 Mpe esalemaki ete Alma abundaki na Amalisi na mompanga, elongi na elongi; mpe bawelaki makasi, moko na mosusu.

30 Mpe esalemaki ete Alma, lokola azalaki moto ya Nzambe, oyo azalaki kosala na bondimi mingi, abelelaki, kolobaka: O Nkolo, lakisa ngolu mpe bikisa bomoi na ngai, ete nakoka kozala esalelo yoko na maboko na yo mpo na kobikisa mpe kobatela bato oyo.

31 Sikawa elobaki Alma maloba oyo awelaki lisusu na Amalisi; mpe azwaki bokasi, na lolenge ete abomaki Amalisi na mompanga.

32 Mpe awelaki lisusu na mokonzi na Balamani; kasi mokonzi na Balamani akimaki uta na liboso ya Alma mpe atindaki bakengeli na ye mpo na kowela na Alma.

33 Kasi Alma, elongo na bakengeli na ye, babundaki na bakengeli ya mokonzi na Balamani kino abomaki mpe abenganaki bango nsima.

34 Mpe boye apetolaki mabele, soki te kutu libongo, oyo ezalaki na westi ya ebale ya Sidoni, kobwakaka nzoto ya Balamani baoyo babomamaki kati na mai ya Sidoni, ete na nzela oyo bato na ye bakoka kozwa nzela ya kokatisa mpe kowela na Balamani mpe Baamalisi na ngambo ya westi ya ebale ya Sidoni.

35 Mpe esalemaki ete esilaki bango nyonso kokatisa ebale ya Sidoni ete Balamani mpe Baamalisi babandaki kokima liboso na bango, ata bazalaki na motango monene ete bakokaki te kotangama.

36 Mpe bakimaki liboso ya Banefi epayi na esobe oyo ezalaki na westi mpe na nordi, mosika na ngambo mosusu ya ndelo ya mboka na bango; kasi Banefi balandaki bango na makasi na bango, mpe babomaki bango.

37 Iyo, bakutanaki ngambo na ngambo, mpe babomamaki mpe babenganamaki, kino bapanzamaki na westi, mpe na nordi, kino bakomaki na esobe, oyo ebiangamaki Elimowuti; mpe ezalaki eteni wana ya esobe oyo etondanaki na banyama ya zamba mpe ya loma.

38 Mpe esalemaki ete mingi bakufaki na esobe na mpota na bango, mpe baliamaki na banyama ya zamba mpe bingondo ya likolo; mpe mikuwa na bango ezwamaki, mpe ematisimi meke likolo ya mabele.

Bimisa na lokasa