Makomi
Alma 36


Mitindo ya Alma epayi ya mwana mobali na ye Elamani.

Ezali na mikapo 36 mpe 37.

Mokapo 36

Alma atatoli na Elamani bobongwami na ye nsima ya komona anjelu—Ayoki mpasi ya bolozi ya molimo oyo ekweyisami; abiangaki likolo ya nkombo ya Yesu, mpe abotamaki na Nzambe—Bosepeli ya sukali etondisaki motema na ye—Amonaki mangomba ya banjelu kokumisaka Nzambe—Babongwami mingi bameki mpe bamoni lokola emekaki mpe emonaki ye. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mwana mobali na ngai, tia litoyi na maloba na ngai; mpo nalapi epayi na yo, ete mbala mingi lokola ekobatela yo mitindo ya Nzambe okofuluka na mboka.

2 Nalingi ete osala lokola nasalaki, na komikundolaka bokangemi ya batata na biso; mpo bazalaki kati na boumbu, mpe moko te akokaki kobikisa bango longola se Nzambe ya Abalayama, mpe Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo; mpe solo abikisaki bango kati na mitungisi na bango.

3 Mpe sikawa, O mwana mobali na ngai Elamani, tala, ozali na bolenge na yo, mpe boye, nabondeli yo ete olinga koyoka maloba na ngai mpe koyekola na ngai; mpo nayebi ete baoyo nyonso bakotiela Nzambe motema na bango bakosalisama na komekama na bango, mpe mobulu na bango, mpe mitungisi na bango, mpe bakotombwama likolo na mokolo ya nsuka.

4 Mpe ngai nalingi te ete okanisa ete nayebi na nzela na ngai moko—na nzela ya oyo ya ntango te kasi ya molimo, na nzela ya oyo ya mayele ya mosuni te kasi na nzela ya Nzambe.

5 Sikawa, tala, nalobi epayi na yo ete, soki nabotamaki te na Nzambe nalingaki te koyeba makambo oyo; kasi Nzambe, na monoko ya anjelu mosantu na ye, asali ete makambo oyo eyebana epayi na ngai, na bolongobani moko ya ngai moko te;

6 Mpo nakendaki nzinganzinga elongo na bana mibali ya Mosiya, kolukaka kobebisa eklezia ya Nzambe; kasi tala, Nzambe atindaki anjelu mosantu na ye kokanga biso na nzela.

7 Mpe tala, alobaki epayi na biso, lokola soki ezalaki mongongo ya kake, mpe mabele mobimba maninganaki na nse ya makolo na biso; mpe biso nyonso tokweyaki na mabele, mpo bobangi ya Nkolo eyaki likolo na biso.

8 Kasi tala, mongongo molobaki epayi na ngai: Lamuka. Mpe nalamukaki mpe natelemaki, mpe namonaki anjelu.

9 Mpe alobaki epayi na ngai: Ata soki olingi na yo moko kobebisama, koluka lisusu te kobebisa eklezia ya Nzambe.

10 Mpe esalemaki ete nakweyaki na mabele; mpe ezalaki mpo na ntaka ya mikolo misato mpe butu misato ete nakokaki te kofungola monoko na ngai, mpe kosalela binama na ngai.

11 Mpe anjelu alobaki makambo mingi epayi na ngai, oyo mayokanaki na bandeko na ngai, kasi nayokaki yango te; mpo ntango nayokaki maloba—ata soki olingi na yo moko kobebisama, koluka lisusu te kobebisa eklezia ya Nzambe—nabetamaki na bobangi mpe bokamwi monene ya lolenge oyo ete mbele ntango mosusu nakobebisama, ete nakweyaki na mabele mpe nayokaki lisusu te.

12 Kasi nanyokwamaki na monyoko ya seko, mpo molimo na ngai mopasolamaki na ndelo ya monene koleka mpe moniongamaki mpo na masumu na ngai nyonso.

13 Iyo, namikundolaki masumu mpe mabe na ngai nyonso, mpo na yango nanyokwamaki na bolozi ya lifelo; iyo, namonaki ete natombokaki na Nzambe na ngai, mpe ete nabatelaki te mitindo na ye esantu.

14 Iyo, mpe nabomaki mingi ya bana na ye, soki te kutu nakambaki bango mosika epayi na bobebisami; iyo, mpe mpo na kosukisa, masumu na ngai ezalaki minene mpenza, ete likanisi mpenza ya koya na miso ya Nzambe na ngai linyokolaki molimo na ngai na nsomo moko ya kolimbola te.

15 O, ekanisaki ngai, ete nakoka kobenganama mpe kolimwa nzoto mpe molimo mpe lokola, ete nakoka te komemama mpo na kotelema na miso ya Nzambe na ngai, mpo na kosambisama na misala na ngai.

16 Mpe sikawa, mpo na mikolo misato mpe butu misato nanyokwamaki, kutu na bolozi ya molimo oyo ekweyisami.

17 Mpe esalemaki ete lokola nanyokwamaki boye na monyoko, ntango napasolamaki kati na motema na komikundolaka masumu mingi ya ngai, tala, namikundolaki lisusu koyoka tata na ngai kosakola epayi ya bato mpo na oyo etali boyei ya Yesu Klisto moko, Mwana ya Nzambe, mpo na komikaba mpo na masumu ya mokili.

18 Sikawa, tango makanisi na ngai masimbaki ya likanisi oyo, nabelelaki kati na motema na ngai: O Yesu, Mwana na Nzambe, yokela ngai mawa, oyo nazali na mbondo ya bololo, mpe nazingami mpembeni na miniololo ya libela ya liwa.

19 Mpe sikawa, tala, ntango nakanisaki oyo, nakokaki komikundola mpasi na ngai lisusu te; iyo, natungisamaki na bokundoli ya masumu na ngai lisusu te.

20 Mpe o, bosepeli kani, mpe pole ya kokamwa nini namonaki; iyo, molimo na ngai etondaki na bosepeli mingi koleka lokola ezalaki bolozi na ngai!

21 Iyo, nalobi epayi na yo, mwana mobali na ngai, ete ekokaki kozala na eloko moko te oyo elekaki elengi mpe bololo boye lokola ezalaki bolozi na ngai. Iyo, nalobi lisusu epayi na yo, mwana mobali na ngai, ete ekoki kozala na eloko moko te oyo elekaki elengi mpe sukali lokola ezalaki bosepeli na ngai.

22 Iyo, nakanisaki namonaki, kutu lokola tata na biso Lehi amonaki, Nzambe kofandaka likolo ya kiti ya bokonzi na ye, ezingami ye na mangomba oyo makoki kotangama te ya banjelu, na ezalela ya koyembelaka mpe kosanzolaka Nzambe na bango; iyo, mpe molimo na ngai ezalaki na mposa ya kozala kuna.

23 Kasi tala, binama na ngai ezwaki bokasi na yango lisusu, mpe natelemaki na makolo na ngai, mpe namonisaki epayi ya bato ete ngai nabotami na Nzambe.

24 Iyo, mpe uta ntango wana kutu kino sikawa, nasali na lolenge ya kolemba te, ete nakoka komema milimo na boyamboli; ete nakoka komema bango komeka bosepeli mingi koleka boye namekaki; ete bakoka mpe lokola kobotama na Nzambe, mpe kotondisama na Molimo Mosantu.

25 Iyo, mpe sikawa tala, O mwana mobali na ngai, Nkolo apesi ngai bosepeli monene koleka na mbuma ya misala na ngai;

26 Mpo na ntina ya liloba oyo apesaki epayi na ngai, tala, mingi babotami na Nzambe, mpe bameki lokola namekaki, mpe bamoni miso na miso lokola namonaki; boye bayebi makambo oyo nalobaki, lokola nayebi; mpe boyebi boye nazali na yango ezali ya Nzambe.

27 Mpe nasungamaki na nse ya mimekano mpe mobulu ya ndenge na ndenge, iyo, mpe na ndenge nyonso ya mitungisi, iyo, Nzambe abimisi ngai uta na boloko, mpe uta na boumbu, mpe uta na liwa; iyo, mpe natie motema na ngai na ye, mpe akobikisa ngai lisusu.

28 Mpe nayebi ete akosekwisa ngai na mokolo ya nsuka, mpo na kofanda elongo na ye na nkembo; iyo, mpe nakosanzola ye libela, mpo abimisaki batata na biso uta na Ejipito, mpe amelaki Baejipito na Mbu Etane; mpe akambaki bango na nguya na ye kati na mboka elakelama; iyo, mpe abikisi bango uta na boumbu mpe bokangemi mbala na mbala.

29 Iyo, lisusu abimisaki batata na biso uta na mboka ya Yelusaleme, mpe lisusu, na nguya na ye ya libela, akangolaki bango uta na boumbu mpe bakangamaki mbala na mbala kino na mokolo ya lelo; mpe nasimbi ntango nyonso bokangemi na bango na bokundoli; iyo, osengeli mpe lokola kosimba na bokundoli, lokola ngai nasali, bokangemi na bango.

30 Kasi tala, mwana mobali na ngai, oyo ezali nyonso te; mpo osengeli koyeba lokola ngai nayebi, ete mbala mingi lokola ekobomba yo mitindo ya Nzambe okofuluka na mboka; mpe osengeli koyeba lisusu, ete mbala mingi lokola ekobomba yo te mitindo ya Nzambe okokatama mosika uta na miso na ye. Sikawa oyo ezali engebene na liloba na ye.

Bimisa na lokasa