Makomi
Alma 38


Mitindo ya Alma epayi ya mwana mobali na ye Sibiloni.

Ezali na mokapo 38.

Mokapo 38

Sibiloni anyokwamaki mpo na ntina ya bosembo—Lobiko ezali na Klisto, oyo azali bomoi mpe pole ya mokili—Bokonza bamposa na bino nyonso. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mwana mobali na ngai, tia litoyi na maloba na ngai, mpo nalobi epayi na yo, kutu lokola nalobaki epayi ya Elamani, ete mbala mingi lokola okobomba mitindo ya Nzambe okofuluka na mboka; mpe mbala mingi lokola okobomba mitindo ya Nzambe te okokatama mosika uta na miso na ye.

2 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, natie motema ete nakozala na bosepeli monene na yo, na ntina ya molende mpe bosembo na yo epayi ya Nzambe; mpo lokola obandaki na bolenge na yo kotiela Nkolo Nzambe na yo motema, kutu bongo nazali na elikya ete okokoba na kobombaka mitindo na ye; mpo apambolami ezali ye oyo akotia molende kino na nsuka.

3 Nalobi epayi na yo, mwana mobali na ngai, ete nasili kozala na bosepeli monene na yo, na ntina ya bosembo na yo mpe molende na yo, mpe bompikiliki na yo mpe motema molai na yo na kati ya bato ya Bazolami.

4 Mpo nayebi ete ozalaki na miniololo; iyo, mpe nayebi lisusu ete babambaki yo mabanga mpo na ntina ya liloba; mpe ondimaki makambo oyo nyonso na bompikiliki mpo Nkolo azalaki elongo na yo; mpe sikawa oyebi ete Nkolo abikisaki yo.

5 Mpe sikawa mwana mobali na ngai, Sibiloni, nalingi omikundola, ete mingi lokola okotiela Nzambe motema na yo kutu mingi mpenza nde okobikisama uta na mimekano na yo, mpe mikakatano na yo, mpe mitungisi na yo, mpe okotombwama likolo na mokolo ya nsuka.

6 Sikawa, mwana mobali na ngai, nalingi te okanisa ete ngai nayebi makambo oyo na ngai moko, kasi ezali Molimo ya Nzambe oyo azali na ngai oyo asali ete makambo oyo eyebana epayi na ngai; mpo soki nabotamaki na Nzambe te nalingaki koyeba makambo oyo te.

7 Kasi tala, Nkolo na boboto monene na ye atindaki anjelu na ye mpo na koyebisa epayi na ngai ete nasengeli kotika mosala ya bobebisi na kati ya bato na ye; iyo, mpe namonaki anjelu miso na miso, mpe alobaki na ngai, mpe mongongo na ye ezalaki lokola kake, mpe eningisaki mabele mobimba.

8 Mpe esalemaki ete mikolo misato mpe butu misato nazalaki na bolozi mpe nsomo ya bololo mingi koleka na molimo na ngai; mpe mokolo moko te, kino nabelelaki epayi ya Nkolo Yesu Klisto mpo na boboto, nazwaki bolimbisi ya masumu na ngai. Kasi tala, nabelelaki epayi na ye mpe nazwaki kimia na molimo na ngai.

9 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nayebisaki yo oyo ete okoka kozwa bwania, ete okoka koyekola uta na ngai ete ezali na nzela mosusu te soki te mayele mosusu epayi wapi moto akoki kobikisama, bobele na Klisto mpe na nzela ya Klisto. Tala, azali bomoi mpe pole ya mokili. Tala, azali liloba ya bosolo mpe bosembo.

10 Mpe sikawa, lokola obandaki koteya liloba kutu boye nalingi ete okoba koteya; mpe nalingi ete ozala na molende mpe na montei na makambo nyonso.

11 Tala ete otombwama te mpo na lolendo; iyo, mona ete omikumisa te na bwania na yo moko, soki te na bokasi na yo moko.

12 Salela mpiko, kasi efundeli te; mpe lisusu tala ete okonza bamposa na yo nyonso, ete okoka kotondisama na bolingo; tala ete omibatela uta na goigoi.

13 Kosambela te lokola Bazolami basalaka, mpo omoni ete basambelaka mpo bayokama na bato, mpe mpo basanzolama mpo na bwania na bango.

14 Koloba te: O Nzambe, natondi yo ete biso tozali malamu koleka bandeko na biso; kasi kutu loba: O Nkolo, limbisa bozangi kolongobana na ngai, mpe omikundola bandeko na ngai na boboto—iyo, ndima bozangi kolongobana na yo liboso ya Nzambe na bantango nyonso.

15 Mpe tika Nkolo apambola molimo na yo, mpe ayamba yo na mokolo ya nsuka kati na bokonzi na ye, mpo na kofanda na kimia. Sikawa kende, mwana mobali na ngai, mpe teya liloba epayi ya bato oyo. Zala na lokengo. Mwana mobali na ngai, sese.

Bimisa na lokasa