Makomi
Alma 39


Mitindo ya Alma epayi ya mwana mobali na ye Koliantoni.

Ezali na mikapo 39 kino na nsuka ya mokapo 42.

Mokapo 39

Lisumu ya bosangisi nzoto ezali bonsomo—Masumu ya Koliantoni mapekisaki Bazolami koyamba liloba—Bosikoli ya Klisto esali na lolenge ya bozongeli nsima na kobikisaka basembo oyo bazalaki yambo na yango. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nazali mwa moke na maloba lisusu ya koloba epayi na yo mingi koleka oyo nalobaki epayi na ndeko na yo ya mobali; mpo tala, emonaki yo te molende ya ndeko na yo mobali, bosembo na ye, mpe molende na ye na kobombaka mitindo ya Nzambe? Tala, elakisaki ye te ndakisa moko malamu mpo na yo?

2 Mpo otiaki bokebi mingi te na maloba na ngai lokola esalaki ndeko na yo, na kati ya bato ya Bazolami. Sikawa, oyo ezali eloko oyo nalingi te epayi na yo; okobaki na bifundeli na bokasi na yo mpe bwania na yo.

3 Mpe oyo ezali nyonso te, mwana mobali na ngai. Osalaki likambo oyo ezalaki mpasi mingi epayi na ngai; mpo otikaki mosala, mpe okendaki likolo kati na mboka ya Siloni na kati ya ndelo ya Balamani, kolandaka mwasi ya pite Izabela.

4 Iyo, ayibaki mitema ya mingi; kasi oyo ezalaki mokalo mpo na yo te, mwana mobali na ngai. Osengelaki komipesa na mosala oyo wapi mokumba epesamaki epayi na yo.

5 Eyebi yo te, mwana mobali na ngai, ete makambo oyo ezali bonsomo na miso ya Nkolo; iyo, nsomo mingi koleka masumu nyonso longola se lisumu ya kosopaka makila ya bato bazanga ekweyeli soki te lisumu ya kowanganaka Molimo Mosantu?

6 Mpo tala, soki owangani Molimo Mosantu oyo azwaka kala esika kati na yo, mpe oyebi ete ozali kowangana ye, tala oyo ezali lisumu oyo elimbisamaka te; iyo, mpe moto nyonso oyo akoboma na bokeseni ya pole mpe boyebi ya Nzambe, ezali mpasi mingi mpo na ye kozwa bolimbisi; iyo, nalobi epayi na yo, mwana mobali na ngai ete ezali mpasi mingi mpo ete azwa bolimbisi.

7 Mpe sikawa mwana mobali na ngai, natombeli na Nzambe ete ozalaki moto na elindo ya mabe monene bongo te. Nalingaki ete tokoba kowumela koloba likolo ya mabe na yo te, mpo na kozokisa molimo na yo, soki ezalaki te mpo na bolamu na yo.

8 Kasi tala, okoki te kobombela Nzambe mabe na yo; mpe longola se soki oyamboli makotelema lokola litatoli likolo na yo na mokolo ya nsuka.

9 Sikawa mwana mobali na ngai, nalingi ete oyambola mpe otika masumu na yo, mpe kolanda lisusu te bamposa ya kolula ya miso na yo, kasi omipekisaka uta na makambo oyo nyonso; mpo longola se soki osali oyo okoki na lolenge moko te kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe. O, omikundola, mpe kamata yango likolo na yo, mpe omipekisa uta na makambo oyo.

10 Mpe natindi yo kokamata yango likolo na yo mokano ya kozwa toli elongo na bandeko mibali bankulutu na yo na misala na yo; mpo tala, ozali na bolenge na yo, mpe ozali na mposa ya koleisama na bandeko na yo. Mpe tiaka bokebi na toli na bango.

11 Kopesa nzela te ete okambama mosika na likambo ya mpamba mpe ya liboma; kopesa te nzela ete zabulu akamba lisusu motema na yo mosika na kolandaka basi ya nkuna bana mpe ya pite. Tala, O mwana mobali na ngai, mabe monene boniboni omemaki likolo ya Bazolami; mpo lokola bamonaki etamboleli na yo balingaki te kondima maloba na ngai.

12 Mpe sikawa Molimo ya Nkolo molobi epayi na ngai: Tinda bana na yo kosala bolamu, mbele bakamba mosika mitema ya bato mingi na bobebisami. Boye natindi yo, mwana mobali na ngai, na bobangi ya Nzambe, ete omipekisa uta na mabe na yo.

13 Ete obaluka epayi ya Nkolo na mayele na yo, bokasi, mpe makasi na yo nyonso; ete okamba mosika te mitema ya mingi na kosalaka na nkuna; kasi nzokande ozonga epayi na bango, mpe ondima mbeba na yo mpe mabunga oyo wana osalaki.

14 Koluka bozwi to biloko ya mpamba mpamba ya mokili oyo te; mpo tala, okoki komema yango elongo na yo te.

15 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nalingi kolobela yo mwa moke mpo na oyo etali boyei ya Klisto. Tala, nalobi epayi na yo, ete ezali ye oyo akoya solo kolongola masumu ya mokili; iyo, akoya kosakola nsango ya nsai ya lobiko epayi ya bato na ye.

16 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, oyo ezali mosala mpo na oyo wapi obiangamaki, mpo na kosakola nsango oyo ya nsai epayi ya bato na ye, mpo na kolengela mayele na bango; mpo kutu ete lobiko ekoka koya epayi na bango, ete bakoka kolengela mayele ya bana na bango na koyoka liloba na ntango ya boyei na ye.

17 Mpe sikawa nakokitisa motema na yo mwa moke na likambo oyo. Tala, ozali kokamwa ete ntina nini makambo oyo eyebanaki kala yambo masalema. Tala, nalobi epayi na yo, ezali te molimo moko na ntango oyo na motuya epayi ya Nzambe lokola ekozala molimo na ntango ya boyei na ye?

18 Esengeli yango te ete mwango ya bosikoli moyebana epayi ya bato oyo mpe lokola epayi ya bana na bango?

19 Ezali yango te likambo ya pete na ntango oyo mpo na Nkolo kotinda anjelu na ye kosakola nsango oyo ya nsai epayi na biso mpe lokola epayi ya bana na biso, soki te mpe lokola nsima ya boyei na ye?

Bimisa na lokasa