Makomi
Alma 45


Lisitwale ya bato ya Nefi, mpe bitumba mpe bokabwani na bango, na mikolo ya Elamani, engebene na lisolo ya makomi ya Elamani, oyo abombaki na mikolo na ye.

Ezali na mikapo 45 kino na nsuka ya mokapo 62.

Mokapo 45

Elamani andimi maloba ya Alma—Alma asakoli bobebisami ya Banefi—Apamboli mpe alakeli mboka mabe—Alma akokaki kokamatama likolo na Molimo, kutu lokola Mose—Bokabwani bokomi na Eklezia. Penepene na mobu 73 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete bato ya Nefi basepelaki makasi mingi koleka, mpo Nkolo abikisaki lisusu bango uta na maboko ya banguna na bango; boye bapesaki matondi epayi ya Nkolo Nzambe na bango; iyo, mpe bakilaki mingi mpe basambelaki mingi, mpe bakumbamelaki Nzambe na bosepeli monene koleka.

2 Mpe esalemaki na mobu ya zomi na libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, ete Alma ayaki epayi ya mwana mobali na ye Elamani mpe alobaki epayi na ye: Ezali yo kondima maloba oyo nalobaki epayi na yo mpo na oyo etali masolo ya makomi oyo wana ebombamaki?

3 Mpe Elamani alobaki epayi na ye: Iyo, nazali kondima.

4 Mpe Alma alobaki epayi na ye: Ezali yo kondima Yesu Klisto, oyo akoya?

5 Mpe alobaki: iyo, nazali kondima maloba nyonso olobaki.

6 Mpe Alma alobaki epayi na ye lisusu: Ekobomba yo mitindo na ngai?

7 Mpe alobaki: Iyo, nakobomba mitindo na yo na motema na ngai mobimba.

8 Nde Alma alobaki epayi na ye: Opambolami; mpe Nkolo akofulusa yo na mboka oyo.

9 Kasi tala, nazali na mwa moke ya kosakola epayi na yo; kasi nini nakosakola epayi na yo okosala ete eyebana te; iyo, nini nakosakola epayi na yo ekoyebisama te, kutu kino lisakoli yango ekokokisama; boye koma maloba oyo nakoloba.

10 Mpe oyo ezali maloba yango: Tala, namoni ete bato oyo mpenza, Banefi, engebene na molimo ya emoniseli oyo ezali na ngai, na mibu nkama minei uta na ntango Yesu Klisto akomimonisa epayi na bango, bakobeba moke moke kino na bozangi boyambi.

11 Iyo, mpe na ntango wana bakomona bitumba mpe bokono, iyo, nzala mpe bosopi makila, kutu kino bato ya Nefi bakosila

12 Iyo, mpe oyo zambi bakobeba moke moke kati na bozangi boyambi mpe bakokweya kati na misala ya molili, mpe mposa ya bonsoni, mpe ndenge nyonso ya mabe; iyo, nalobi epayi na yo, ete lokola bakosumuka na bokeseni ya pole mpe boyebi monene mpenza, iyo, nalobi epayi na yo, ete uta mokolo wana, kutu nkola ya minei ekoleka nyonso te yambo ete mabe monene oyo masalema.

13 Mpe ntango ekoya mokolo wana monene, tala, ntango ezali koya kala mingi te ete baoyo bazali sikawa, soki te nkona na bango oyo batangami na kati ya bato ya Nefi, bakotangama lisusu te na kati ya bato ya Nefi.

14 Kasi moto nyonso oyo akotikala, mpe akobebisama te na mokolo monene mona mpe mokolo ya nsomo, akotangama na kati ya Balamani, mpe akokoma lokola bango, nyonso, longola se ndambo oyo bakobiangama bayekoli ya Nkolo; mpe bango oyo nde Balamani bakolanda kutu kino bakosila. Mpe sikawa, na ntina ya mabe, lisakoli oyo ekokokisama.

15 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki Alma koloba makambo oyo na Elamani, apambolaki ye, mpe lisusu bana mibali na ye basusu; mpe lisusu apambolaki mabele mpo na ntina ya basembo.

16 Mpe alobaki: Boye elobi Nkolo Nzambe—Mboka elakelama mabe, iyo, mboka oyo, mpo na ekolo nyonso, libota nyonso, monoko nyonso, mpe bato nyonso, kino na bobebisami, baoyo bakosala na nkuna, ntango bakokomela mobimba; mpe lokola nalobi yango ekozala bongo; mpo oyo ezali bolakeli mabe mpe lipamboli ya Nzambe likolo ya mboka, mpo Nkolo akoki kotala lisumu ata na ndambo moke ya ndingisa te.

17 Mpe sikawa, elobaki Alma maloba oyo apambolaki eklezia, iyo, bango nyonso oyo bakotelema ngwi kati na bondimi uta na ntango wana mpe kokende liboso.

18 Mpe esilaki Alma kosala oyo alongwaki uta na mboka Zalayemila, lokola mpo na kokende kati na mboka ya Meleki. Mpe esalemaki ete bayokaki lisusu nsango na ye te; mpo na oyo etali liwa na ye to bokundami na ye toyebi eloko moko te.

19 Tala, oyo toyebi, ete azalaki moto moko ya sembo; mpe liloba likendaki mosika na eklezia ete akamatamaki na Molimo, to akundamaki na loboko ya Nkolo, kutu lokola Mose. Kasi tala, makomi malobi Nkolo akamataki Mose epayi na ye moko; mpe tobanzi ete ayambaki mpe lokola Alma na molimo, epayi na ye moko; boye, mpo na ntina oyo toyebi eloko moko te mpo na oyo etali liwa na ye mpe bokundami na ye.

20 Mpe sikawa esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya zomi na libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, ete Elamani akendaki na kati ya bato mpo na kosakola liloba epayi na bango.

21 Mpo tala, na ntina ya bitumba babundaki na Balamani mpe bokabwani boke mingi mpe mbilinga-mbilinga oyo ezalaki na kati ya bato, ekomaki likambo elongobani ete liloba ya Nzambe esakolama na kati na bango, iyo, mpe ete libongisi moko ya mibeko esalema epayi nyonso na eklezia.

22 Boye, Elamani mpe bandeko na ye bandimi bakendaki mpo na kotia lisusu eklezia na mboka mobimba, iyo, na engumba na engumba epayi nyonso na mboka mobimba oyo ezwamaki na bato ya Nefi. Mpe esalemaki ete baponaki banganganzambe mpe bateyi epayi nyonso na mboka mobimba, likolo ya Baeklezia nyonso.

23 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki Elamani mpe bandeko na ye bandimi kopona banganganzambe mpe bateyi likolo ya Baeklezia ete bokabwani ebimaki na kati na bango, mpe balingaki te kosala keba na maloba ya Elamani mpe bandeko na ye bandimi;

24 Kasi bakolaki na lolendo, lokola batombwamaki na mitema na bango, na ntina ya bozwi monene koleka na bango; boye bakomaki bato na bozwi na miso na bango moko, mpe balingaki te kosala keba na maloba na bango, mpo na kotambola alima liboso ya Nzambe.

Bimisa na lokasa