Makomi
Alma 46


Mokapo 46

Amalikia asali ekokolo mpo na kozala mokonzi—Moroni atomboli bendele ya lipanda—Asangisi bato mpo na kobatela eyamba na bango—Bandimi ya solo babiangami Baklisto—Montika ya nkona ya Yosefe ekobatelama—Amalikia mpe bakabwani bakimi na mboka ya Nefi—Bango oyo balingaki te kosunga ntina ya bonsomi babomami. Penepene na mibu 73–72 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete mingi lokola balingaki te koyoka maloba ya Elamani mpe bandeko na ye bandimi basanganaki esika moko mpo na kobunda na bandeko na bango.

2 Mpe sikawa tala, bazalaki na nkele mingi koleka, na lolenge ete bazwaki mokano ya koboma bango.

3 Sikawa mokambi na bango oyo bazalaki na nkele mingi koleka na bandeko na bango azalaki moto moko mbinga mpe makasi; mpe nkombo na ye ezalaki Amalikia.

4 Mpe Amalikia azalaki na mposa ya kozala mokonzi; mpe bato wana oyo bazalaki na nkele bazalaki na mposa ete azala mokonzi na bango; mpe bazalaki na eteni eleki monene na bango basambisi ya mike ya mboka, mpe bazalaki koluka bokasi.

5 Mpe bakosamaki na malete ya Amalikia, ete soki basungi ye mpebatie ye mpo na kozala mokonzi na bango ete akokomisa bango bayangeli likolo ya bato.

6 Boye bakosamaki na Amalikia na lolenge ete basala bokabwani, atako mateya ya Elamani mpe bandeko na ye, iyo, ata bokebi monene mpenza na bango likolo ya eklezia, mpo bazalaki banganganzambe banene likolo ya eklezia.

7 Mpe ezalaki na bato mingi kati na eklezia baoyo bandimaki maloba ya koleteka ya Amalikia, boye bakabwanaki kutu uta na eklezia; mpe boye makambo ya bato ya Nefi ezalaki mbilinga mbilinga mpe na makama mingi koleka, atako bazwaki elonga monene oyo likolo ya Balamani, mpe bosepeli monene na bango oyo bazwaki na ntina ya bobikisami na bango na loboko ya Nkolo.

8 Boye tomoni lolenge kani na lombangu bana ya bato babosanaka Nkolo Nzambe na bango, iyo, lolenge kani bazalaka na lombangu ya kosalaka mabe, mpe ya kokosama na moko oyo ya mabe.

9 Iyo, mpe tomoni lisusu nkuna monene moto moko mpenza ya nkuna akoki kosala ete esalema na kati ya bana ya bato.

10 Iyo, tomoni ete Amalikia, lokola azalaki moto moko ya mayele mabe mpe moto moko na maloba ya koleteka mingi, ete akosaki mitema ya bato mingi mpo na kosala na nkuna; iyo, mpe koluka kobebisa eklezia ya Nzambe, mpe kobebisa bobandisi ya lipanda oyo Nzambe apesaki epayi na bango, soki te oyo lipamboli Nzambe atindaki likolo ya etando ya mboka mpo na ntina ya basembo.

11 Mpe sikawa esalemaki ete eyokaka Moroni, oyo azalaki komanda mokonzi ya mampinga ya Banefi, mpo na oyo etali bokabwani boye, asilikaki na Amalikia.

12 Mpe esalemaki ete apasolaki kazaka na ye; mpe akamataki kitendi na yango moko mpe akomaki likolo na yango—Na bokundoli ya Nzambe na biso, eyamba na biso, mpe bonsomi, mpe kimia na biso, basi na biso, mpe bana na biso—mpe akangaki yango likolo ya nsonge ya nzete moko.

13 Mpe akangaki likolo ebende na ye ya moto, mpe ebende na ye ya ntolo, mpe nguba na ye, mpe alataki bibundeli na ye penepene na nketo na ye; mpe akamataki nzete likolo ya nsonge na yango kazaka na ye epasuka, (mpe abiangaki yango bendele ya lipanda) mpe amigumbaki na mabele, mpe asambelaki na makasi epayi na Nzambe na ye mpo ete mapamboli ya lipanda matikala likolo ya bandeko na ye, ntango molai lokola ekowumela lingomba moko ya Baklisto baoyo batikali mpo na kozwa mboka—

14 Mpo boye nde ebiangamaki bandimi nyonso ya solo ya Klisto, baoyo bazalaki ya eklezia ya Nzambe, na bango oyo bazalaki te bato ya eklezia.

15 Mpe bango oyo bazalaki ya eklezia bazalaki basembo; iyo, bango nyonso oyo bazalaki bandimi ya solo na Klisto, bakamataki, na bosepeli, nkombo ya Klisto likolo na bango, to Baklisto lokola babiangamaki, na ntina ya boyambi na bango na Klisto oyo akoya.

16 Mpe boye, na ntango oyo, Moroni asambelaki ete likambo ya Baklisto, mpe bonsomi ya mboka ekoka kosungama.

17 Mpe esalemaki ete esilaki ye kosopa molimo na ye epayi ya Nzambe, ye apesaki na mboka nyonso oyo ezalaki na sudi ya mboka nkombo Libebi, iyo, mpe mpo na kosukisa, mboka nyonso, ezala na nordi mpe na sudi mpe lokola—Mboka eponama, mpe mboka ya lipanda.

18 Mpe alobaki: Solo Nzambe akopesa te nzela ete biso, baye totiolami mpo tokamati likolo na biso nkombo ya Klisto, toniatama na nse mpe tobebisama, kino tokomema yango likolo na biso na bobuki mobeko na biso moko.

19 Mpe elobaki Moroni maloba oyo, akendaki na kati ya bato, kopepaka eteni epasuka ya elamba na ye na mopepe, ete nyonso bakoka komona nkoma oyo akomaki likolo ya eteni epasuka na ye, mpe kogangaka na mongongo makasi, kolobaka:

20 Tala, bato nyonso oyo bakosimba bendele oyo likolo ya mboka, tika bango baya na makasi ya Nkolo, mpe bakota kati na liyokani ete bakosimba makoki na bango, mpe eyamba na bango, ete Nkolo Nzambe akoka kopambola bango.

21 Mpe esalemaki ete ntango Moroni asakolaki maloba oyo, tala, bato bayaki kokimaka elongo na bibundeli na bango ezingami penepene na nketo na bango, kopasolaka bilamba na bango lokola elembo, soki te lokola liyokani moko, ete bakotika te Nkolo Nzambe na bango; to, na maloba mosusu, soki babuki mitindo ya Nzambe, to bakwei kati na bobuki mobeko, mpe bayoki nsoni mpo na kokamata likolo na bango nkombo ya Klisto, Nkolo akopasola bango kutu lokola bapasolaki bilamba na bango.

22 Sikawa oyo ezali liyokani oyo basalaki, mpe babwakaki bilamba na bango na makolo ya Moroni, kolobaka: Biso tosali liyokani na Nzambe na biso, ete tokobebisama, kutu lokola bandeko na biso na mboka ya epayi na nordi, soki tokweyi kati na bobuki mobeko; iyo, akoki kobwaka biso na makolo ya banguna na biso, kutu lokola tobwaki bilamba na biso na makolo na yo mpo na koniatama na nse ya makolo, soki tokokweya kati na bobuki mobeko.

23 Moroni alobaki epayi na bango: Tala, tozali montika ya nkona ya Yakobo; iyo, tozali montika ya nkona ya Yosefe, oyo kani elamba bipasolamaki na bandeko na ye na bitendi mingi; iyo, mpe sikawa tala, tomikundola kobomba mitindo ya Nzambe, soki te bilamba na biso bikopasolama na bandeko na biso, mpe tokobwakama kati na boloko, to kotekama, to tokobomama.

24 Iyo, tika tobatela lipanda na biso lokola montika moko ya Yosefe; iyo, tomikundola maloba ya Yakobo, yambo ya liwa na ye, mpo tala, amonaki ete eteni moko ya kazaka ya Yosefe ebatelamaki mpe ekobeba te. Mpe alobaki—Kutu lokola montika oyo ya elamba ya mwana mobali na ngai ebatelami, bongo nde ebatelama montika ya nkona ya mwana mobali na ngai na maboko ya Nzambe, mpe mokokamatama epayi na ye moko, ntango ekowa oyo etikali ya nkona ya Yosefe, kutu lokola montika ya elamba na ye.

25 Sikawa tala, oyo epesi molimo na ngai mawa; nzokande, molimo na ngai ezali na bosepeli na mwana mobali na ngai, na ntina ya ndambo ya nkona na ye oyo ekozwama epayi na Nzambe.

26 Sikawa tala, oyo ezalaki elobeli ya Yakobo.

27 Mpe sikawa nani ayebi soki mbele montika ya nkona ya Yosefe, oyo ekowa lokola elamba na ye, ezali bango oyo bakabwanaki uta na biso? Iyo, mpe kutu ekozala biso moko soki totelemi ngwi te na bondimi ya Klisto.

28 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki Moroni koloba maloba oyo, akendaki, mpe lisusu atindaki na bandambo nyonso ya mboka wapi ezalaki na boswani, mpe asangisaki esika moko bato nyonso oyo bazalaki na mposa ya kosimba lipanda na bango, mpo na kotelemela Amalikia mpe bango oyo bakabwanaki, oyo babiangamaki Baamalikia.

29 Mpe esalemaki ete emonaki Amalikia ete bato ya Moroni bazalaki na motango mingi koleka Baamalikia—mpe amonaki lisusu ete bato na ye bazalaki na ntembe mpo na oyo etali boyengebene ya likambo oyo babandaki—boye, lokola abangaki ete akokokisa te mokano na ye, akamataki bato na ye baoyo balingaki mpe akendaki kati na mboka ya Nefi.

30 Sikawa Moroni akanisaki ete elongobanaki te ete Balamani bazala lisusu na makasi; boye akanisaki kokata Baamalikia nzela, soki te kokamata bango mpe kozongisa bango nsima, mpe koboma Amalikia; iyo, mpo ayebaki ete akolamusa Balamani na nkanda epayi na bango, mpe akosala ete baya kobundisa bango; mpe oyo ayebaki ete Amalikia akosala mpo ete akoka kokokisa bantina na ye.

31 Boye Moroni akanisaki ete elongobanaki ete akamata mampinga na ye, baye basanganaki esika moko, mpe bakamataki manduki bango moko, mpe bakotaki kati na liyokani mpo na kobatela kimia—mpe esalemaki ete akamataki limpinga na ye mpe atambolaki na biema na bango kati na esobe, mpo na kokata botamboli ya Amalikia na esobe.

32 Mpe esalemaki ete asalaki engebene na mposa na ye, mpe atambolaki kati na esobe, mpe alekaki liboso ya mampinga ya Amalikia.

33 Mpe esalemaki ete Amalikia akimaki elongo na motango moke ya bato na ye, mpe ndambo etikali bapesamaki na maboko ya Moroni mpe bazongisamaki nsima na mboka ya Zalayemila.

34 Sikawa, lokola Moroni azalaki moto oyo aponamaki na basambisi bakonzi mpe na kopona ya bato, boye azalaki na nguya engebene na bolingi na ye na kotalaka mampinga ya Banefi, mpo na kotia mpe kosalela likoki likolo na bango.

35 Mpe esalemaki ete bato nyonso ya Baamalikia oyo balingaki te kokota kati na liyokani mpo na kosunga ntina ya bonsomi, ete bakoka kosimba mbulamatari ya bonsomi, asalaki batiama na liwa; mpe ezalaki bato moke baye bawanganaki liyokani ya bonsomi.

36 Mpe esalemaki lisusu, ete asalaki bendele ya lipanda ematisama likolo ya linongi moko moko oyo ezalaki na mboka mobimba, oyo ezwamaki na Banefi; mpe boye Moroni atelemisaki bendele ya lipanda na kati ya Banefi.

37 Mpe babandaki kozala na kimia lisusu na mboka; mpe boye basimbaki kimia na mboka kino penepene na nsuka ya mobu ya zomi na libwa ya boyangeli ya basambisi.

38 Mpe Elamani mpe banganganzambe banene babatelaki molongo kati na eklezia; iyo, kutu mpo na ntaka ya mibu minei ezalaki bango na kimia, mpe bosepeli kati na eklezia.

39 Mpe esalemaki ete ezalaki na bato mingi baoyo bakufaki, kondimaka sikisiki ete milimo na bango misikolamaki na Nkolo Yesu Klisto; boye bakendaki na mokili kosepelaka.

40 Mpe ezalaki na baike oyo bakufaki na bokono ya nzoto moto, oyo na boko bileko ya mobu ezalaki koya mbala na mbala na mboka—kasi bakufaki mingi te boye na bokono ya nzoto moto, mpo na lolenge kitoko mingi koleka ya matiti mpe ntina ya nzete to matiti mingi oyo Nzambe alengelaki mpo na kolongola ntina ya maladi, na oyo wapi bato bayangelamaki na lolenge ya bileko ya ntango—

41 Kasi ezalaki na mingi oyo bakufaki mpo na mibu ya mobange; mpe bango oyo bakufaki na bondimi ya Klisto bazali na esengo na ye, lokola tosengeli mpenza kobanza.

Bimisa na lokasa