Makomi
Alma 47


Mokapo 47

Amalikia asaleli bozimbi, bobomi, mpe poloso mpo na kokoma mokonzi ya Balamani—Banefi baoyo bakabwanaki bazali bato ya nkuna mpe ya loma koleka Balamani. Penepene na mobu 72 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa tokozonga na lisolo ya makomi na biso na Amalikia mpe bango oyo bakimaki elongo na ye kati na esobe; mpo, tala, akamataki bango oyo bakendaki elongo na ye, mpe amataki na mboka ya Nefi na kati ya Balamani, mpe alamusaki Balamani na nkanda na bato ya Nefi, na lolenge ete mokonzi ya Balamani atindaki bosakoli epayi nyonso na mboka na ye mobimba, na kati ya bato na ye, ete basangana lisusu esika moko mpo na kobunda na Banefi.

2 Mpe esalemaki ete ekendaki bosakoli na kati na bango babangaki mingi koleka; iyo, bayokaki nsomo na kozangaka kosepelisa mokonzi, mpe bayokaki nsomo mpe lokola ya kobunda na Banefi mbele babungisa bomoi na bango. Mpe esalemaki ete balingaki te, to ndambo koleka mingi na bango balingaki te, kotosa mitindo ya mokonzi.

3 Mpe sikawa esalemaki ete mokonzi azalaki na nkele na ntina ya kozanga botosi na bango; boye apesaki Amalikia kozala komanda ya ndambo ya limpinga na ye oyo ezalaki na botosi epayi na bitinda na ye, mpe atindaki ete akende mpe asalisa bango na makasi na bibundeli manduki.

4 Sikawa tala, oyo ezalaki mposa ya Amalikia; mpo lokola azalaki moto moko ya ntoki mpo na kosala mabe boye atiaki mwango na motema na ye mpo na kobotola bokonzi uta na mokonzi ya Balamani.

5 Mpe sikawa apesamaki mosala ya kozala komanda ya ndambo wana ya Balamani oyo bazalaki mpo na mokonzi; mpe alukaki kozwa lisungi na bango oyo bazalaki na botosi te; boye akendaki liboso na esika oyo ebiangamaki Onida, mpo Balamani nyonso bakimaki kuna; mpo bamonaki limpinga koyaka, mpe, lokola babanzaki ete bazalaki koyaka mpo na kobebisa bango, boye bakimaki na Onida, na esika ya manduki.

6 Mpe baponaki moto moko mpo na kozala mokonzi mpe mokambi likolo na bango, kozalaka na ekateli na mayele na bango na mokano moko mokatama ete bakoki kosengisama te kokende kobunda na Banefi.

7 Mpe esalemaki ete basanganaki esika moko likolo ya ngomba oyo ebiangamaki Atipa, na komilengelaka mpo na kobunda.

8 Sikawa ezalaki te likanisi ya Amalikia mpo na kobundisa bango engebene na mitindo ya mokonzi; kasi tala, ezalaki likanisi na ye kozwa lisungi ya mampinga ya Balamani, mpo ete akoka komitia na moto na bango mpe alongola mokonzi mpe akamata bokonzi.

9 Mpe tala, esalemaki ete asalaki na lolenge ete limpinga na ye batelemisa biema na bango na lobwaku oyo ezalaki penepene na ngomba ya Atipa.

10 Mpe esalemaki ete ntango butu eyingeli atindaki ntoma moko na nkuku na ngomba ya Atipa, mpo azalaki na mposa ete mokambi na bango oyo bazalaki likolo ya ngomba, oyo kani nkombo ezalaki Lewoti, ete akita na nse ya ngomba, mpo azalaki na mposa ya kosolola na ye.

11 Mpe esalemaki ete ntango Lewoti azwaki nsango yango amekaki te kokita na nse ya ngomba. Mpe esalemaki ete Amalikia atindaki lisusu ntoma yango mbala ya mibale, kosengaka ye kokita. Mpe esalemaki ete Lewoti alingaki te; mpe atindaki lisusu mbala ya misato.

12 Mpe esalemaki ete ntango Amalikia amonaki ete akokaki te kosala ete Lewoti akita uta na ngomba, ye moko amataki likolo na ngomba, penepene na nganda ya Lewoti; mpe atindaki lisusu nsango epayi ya Lewoti, kosengaka ete akita, mpe amema bakengeli na ye elongo na ye.

13 Mpe esalemaki ete ntango Lewoti akitaki elongo na bakengeli na ye epayi na Amalikia, ete Amalikia asengaki ete ye akita elongo na limpinga na ye na ntango ya butu, mpe azinga bato wana na banganda likolo na bango oyo mokonzi apesaki ye kozala komanda, mpe ete apesa bango na maboko ya Lewoti, soki alingi kokomisa ye (Amalikia) mokambi ya mibale likolo ya limpinga mobimba.

14 Mpe esalemaki ete Lewoti akitaki elongo na bato na ye mpe bazingaki bato ya Amalikia, boye ete yambo balamuka na ntongo ntongo ya mokolo bazingamaki na mampinga ya Lewoti.

15 Mpe esalemaki ete emonaki bango ete bazingami, basambaki elongo na Amalikia ete apesa nzela ete bango kosangana elongo na bandeko na bango, ete bakoka te kobebisa bango. Sikawa oyo ezalaki likambo mpenza oyo Amalikia azalaki na yango mposa.

16 Mpe esalemaki ete apesaki bato na ye, na bokeseni na bitinda ya mokonzi. Sikawa oyo ezalaki likambo Amalikia azalaki na mposa, ete akoka kokokisa miango na ye na kolongolaka mokonzi.

17 Sikawa ezalaki momeseno na kati ya Balamani ete, soki mokambi mokonzi na bango abomami, bapona mokonzi ya mibale mpo na kozala mokambi mokonzi na bango.

18 Mpe esalemaki ete Amalikia asalaki ete moko ya basali na ye akoka kotia ngenge oyo esalaka moke moke na Lewoti, ete akufaki.

19 Sikawa, ntango Lewoti akufaki, Balamani baponaki Amalikia mpo na kozala mokambi mpe komanda mokonzi na bango.

20 Mpe esalemaki ete Amalikia atambolaki elongo na mampinga na ye (mpo akokisaki mposa na ye) na mboka ya Nefi, na engumba ya Nefi, oyo ezalaki engumba mokonzi.

21 Mpe mokonzi ayaki libanda kokutana na ye elongo na bakengeli na ye, mpo abanzaki ete Amalikia akokisaki bitinda na ye, mpe ete Amalikia asangisaki elongo limpinga moko monene boye mpo na kokende kobunda etumba na Banefi.

22 Kasi tala, lokola mokonzi abimaki libanda mpo na kokutana na ye Amalikia asalaki ete basali na ye bakende liboso kokutana na mokonzi. Mpe bakendaki mpe bamigumbamaki liboso ya mokonzi, lokola soki mpo na komemia ye na ntina ya bonene na ye.

23 Mpe esalemaki ete mokonzi atandolaki loboko na ye mpo na kotombola bango, lokola ezalaki na momeseno ya Balamani, lokola elembo ya kimia, oyo momeseno bazwaki uta na Banefi.

24 Mpe esalemaki ete ntango atombolaki moto ya yambo uta na mabele, tala atiaki mokonzi mbeli na motema; mpe akweyaki na mabele.

25 Sikawa basali ya mokonzi bakimaki; mpe basali ya Amalikia bagangaki, na kolobaka:

26 Tala, basali ya mokonzi batie ye mbeli na motema, mpe akwei mpe bango bakimi; tala, boya mpe botala.

27 Mpe esalemaki ete Amalikia atindaki mampinga na ye batambola mpe batala nini ekomaki na mokonzi; mpe ekomaki bango na esika yango, mpe emonaki bango mokonzi kolalaka na makila na ye, Amalikia asalaki lokola soki azalaki na nkele, mpe alobaki: Moto nyonso oyo alingaki mokonzi, tika ye akende, mpe alanda basali na ye ete bakoka kobomama.

28 Mpe esalemaki ete nyonso oyo balingaki mokonzi, eyokaki bango maloba oyo, balandaki nsima ya basali ya mokonzi.

29 Sikawa emonaki basali ya mokonzi ete limpinga moko ezalaki kolanda bango nsima, babangaki lisusu, mpe bakimaki kati na esobe, mpe bayaki kati na mboka ya Zalayemila mpe basanganaki na bato ya Amona.

30 Mpe limpinga oyo elandaki bango nsima ezongaki, lokola balandaki bango nsima na mpamba; mpe boye Amalikia, na boyibi na ye, azwaki mitema ya bato.

31 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima, akotaki na engumba ya Nefi elongo na mampinga na ye, mpe akamataki engumba.

32 Mpe sikawa esalemaki ete mwasi ya mokonzi, eyokaka ye ete mokonzi abomamaki—mpo Amalikia atindaki ntoma moko epayi na mwasi ya mokonzi mpo na koyebisa ye ete mokonzi abomamaki na basali na ye, mpe alandaki bango elongo na limpinga na ye, kasi ezalaki na mpamba, mpe bakimaki—

33 Boye, ntango mwasi ya mokonzi azwaki nsango oyo atindaki ntoma epayi na Amalikia, mpo asengaki ete abikisa bato na engumba; mpe ye lokola azalaki na mposa ete aya kotala ye; mpe asengaki ye ete amema banzeneneke elongo na ye mpo na kotatola liwa ya mokonzi.

34 Mpe esalemaki ete Amalikia akamataki mosali se moko wana oyo abomaki mokonzi, mpe nyonso oyo bazalaki elongo na ye, mpe bakotaki epayi na mwasi ya mokonzi, na esika wapi afandaki; mpe bango nyonso batatolaki epayi na ye ete mokonzi abomamaki na basali na ye moko; mpe balobaki lisusu: Bakimi; oyo etatoli mabe na bango te? Mpe boye basepelisaki mwasi ya mokonzi mpo na oyo etali liwa ya mokonzi.

35 Mpe esalemaki ete Amalikia alukaki lisungi ya mwasi ya mokonzi, mpe akamataki ye epayi na ye na bolongani; mpe boye na boyibi na ye, mpe na lisalisi ya basali na ye ya mayele mabe azwaki bokonzi, iyo, andimamaki mokonzi na ntaka ya mboka mobimba, na kati ya bato nyonso ya Balamani, oyo bazalaki na Balamani mpe Balemuele mpe Bayisamaele, mpe nyonso bakabwani ya Banefi, uta na boyangeli ya Nefi kino na ntango ya lelo.

36 Sikawa bakabwani oyo, lokola bazwaki malakisi mpe nsango se moko wana uta na Banefi, iyo, lokola bateyamaki na boyebi se moko wana uta na Nkolo, nzokande, ezali likambo ya kokamwa mpo na kosangela, ntango molai te nsima ya bokabwani na bango bakomaki bato ya mitu makasi mpe bato bazanga boyamboli koleka, mpe bato ya nko, bato ya nkuna, bato ya loma koleka Balamani—komelaka mimesano ya Balamani; kopesaka nzela na goigoi, mpe na ndenge nyonso ya bonsoni; iyo, kobosanaka mpenza Nkolo Nzambe na bango.

Bimisa na lokasa