Makomi
Alma 48


Mokapo 48

Amalikia asengini Balamani kobunda na Banefi—Moroni alengeli bato na ye mpo na kobatela ntina ya Baklisto—Asepeli na lipanda mpe bonsomi mpe azali moto ya Nzambe moko ya makasi. Penepene na mobu 72 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete, noki lokola Amalikia azwaki bokonzi, abandaki kofula mitema ya Balamani mpo na kobunda na bato ya Nefi; iyo, aponaki bato mpo na koloba epayi ya Balamani uta na linongi na bango, mabe mpo na Banefi.

2 Mpe boye afulaki mitema na bango mpo na kobunda na Banefi, mpenza ete na nsuka ya mobu ya zomi na libwa ya boyangeli ya basambisi, lokola akokisaki miango na ye kino na ntango wana, iyo, lokola akomaki mokonzi likolo ya Balamani, mpe alukaki lisusu kokonza likolo ya mboka mobimba, iyo, mpe na bato nyonso oyo bazalaki na mboka, Banefi mpe Balamani lokola.

3 Boye, akokisaki mwango na ye, mpo ete ayeisaki mitema ya Balamani makasi mpe akangaki miso ya mayele na bango, mpe alamusaki bango na nkanda, na lolenge ete asangisaki esika moko ebele ya mampinga mpo na kokende kobunda na Banefi.

4 Mpo azwaki mokano, na ntina ya motango monene ya bato na ye, ya kokonza likolo ya Banefi mpe komema bango kati na boumbu.

5 Mpe boye aponaki bakapiteni bakonzi ya Bazolami, mpo bango bayebaki malamu koleka bokasi ya Banefi, mpe bisika na bango ya ekimelo, mpe ndambo ya bingumba na bango oyo ezalaki te makasi koleka; boye aponaki bango bazala bakapiteni bakonzi likolo ya mampinga na ye.

6 Mpe esalemaki ete bakamataki nganda na bango, mpe bakendaki na esobe epayi na mboka ya Zalayemila.

7 Sikawa esalemaki ete wana ezalaki Amalikia kozwa nguya boye na boyibi mpe na bobubi, Moroni, na ngambo mosusu, azalaki kolengela mayele ya bato mpo na kozala sembo epayi ya Nkolo Nzambe na bango.

8 Iyo, azalaki kolendisa mampinga ya Banefi, mpe kotongaka bisika ya makasi ya mike mike, soki te bisika mpo na ekimelo; kobwakaka bitutu ya mabele nzinganzinga mpembeni mpo na kobomba mampinga na ye, mpe lisusu kotongaka bifelo ya mabanga mpo na kozinga bango, nzinganzinga mpembeni na engumba na bango mpe na ndelo ya mboka na bango; iyo, epayi nyonso nzinganzinga mpembeni na mboka.

9 Mpe na bisika makasi na bango oyo ezalaki petepete mingi koleka atiaki motango monene ya bato; mpe boye akomisaki yango makasi mpe alendisaki mboka oyo ezwamaki na Banefi.

10 Mpe boye azalaki komilengela mpo na kobatela lipanda na bango, mboka na bango, basi na bango, mpe bana na bango, mpe kimia na bango, mpe ete bakoka kozala na bomoi epayi ya Nkolo Nzambe na bango, mpe ete bakoka kobatela oyo wana ebiangamaki na banguna na bango ntina ya Baklisto.

11 Mpe Moroni azalaki moto moko makasi mpe ya nguya; azalaki moto moko na bososoli ya kobonga nie; iyo, moto moko oyo asepelaki te na bosopi makila; moto moko oyo kani molimo mosepelaki na lipanda mpe bonsomi ya ekolo na ye, mpe ya bandeko na ye uta na bokangemi mpe boumbu.

12 Iyo, moto moko oyo kani motema etondaki na matondi epayi na Nzambe na ye, mpo na matomba mpe mapamboli mingi oyo apesaki likolo ya bato na ye; moto moko oyo asalaki mingi mpenza mpo na bolamu mpe bokengi ya bato na ye.

13 Iyo, mpe azalaki moto moko oyo azalaki ngwi na bondimi mpo na oyo etali Klisto, mpe alapaki ndai mpo na kobatela bato na ye, makoki na ye, mpe ekolo na ye, mpe eyamba na ye, kutu kino na kobungisa makila na ye.

14 Sikawa Banefi bateyamaki komibatela na banguna na bango, kutu kino na kosopa makila soki esengelaki; iyo, mpe bateyamaki kotumola moto soki moke te, iyo, mpe kotombola mompanga soki moke te longola se soki ezalaki na monguna, longola se soki ezalaki mpo na kobatela bomoi na bango.

15 Mpe oyo ezalaki bondimi na bango, ete na kosalaka bongo Nzambe akolinga bango bafuluka na mboka, to na maloba mosusu, soki bazalaki sembo na kobombaka mitindo ya Nzambe ete akoka kofulusa bango na mboka; iyo, akebisaki bango ete bakima, soki te bamilengela mpo na etumba, engebene na likama na bango;

16 Mpe lisusu, ete Nzambe akosala ete eyebana epayi na bango wapi bakokende mpo na komibatela na kobundaka na banguna na bango, mpe na kosalaka bongo, Nkolo akobikisa bango; mpe oyo ezalaki bondimi ya Moroni, mpe motema na ye mokembelaki na yango; kati na kosopaka makila te kasi na kosalaka bolamu, na kobatelaka bato na ye, iyo, na kobombaka mitindo ya Nzambe, iyo, mpe na kotelemelaka mabe.

17 Iyo, solo, solo nalobi epayi na bino, soki bato nyonso bazalaka, mpe bazalaki, mpe bakozala ntango nyonso, lokola Moroni, tala, nguya ya lifelo elingaki koninganisama libela; iyo, zabulu alingaki soki moke te kozala na nguya likolo ya mitema ya bana ya bato.

18 Tala, azalaki moto moko lokola Amona, mwana mobali ya Mosiya, iyo, mpe kutu bana mibali basusu ya Mosiya, iyo, mpe lisusu lokola Alma mpe bana mibali na ye, mpo nyonso bazalaki bato ya Nzambe.

19 Sikawa tala, Elamani mpe bandeko mibali na ye bazalaki bato ya malamu moke te epayi ya bato lokola ezalaki Moroni; mpo bateyaki liloba ya Nzambe, mpe babatisaki mpo na boyamboli ya bato nyonso oyo bayokaki maloba na bango.

20 Mpe boye bakendaki, mpe bato bamikitisaki na ntina ya maloba na bango, na lolenge ete basungamaki mpenza na Nkolo, mpe boye babikisamaki uta na bitumba mpe boweli na kati na bango moko, iyo, kutu mpo na ntaka ya mibu minei.

21 Kasi, lokola nalobaki, na nsuka nsuka ya mobu ya zomi na libwa, iyo, atako kimia na bango na kati na bango moko, basengisamaki, ata baboyaki, kowela na bandeko na bango, Balamani.

22 Iyo, mpe mpo na kosukisa, bitumba na bango bisukaki soki moke te mpo na ntaka ya mibu mingi na Balamani, atako baboyaki na bango.

23 Sikawa, bayokaki mawa mingi mpo na kokamata manduki na bango mpo na kobunda na Balamani, mpo basepelaki na kosopaka makila te; iyo, mpe oyo ezalaki nyonso te—bayokaki mawa mpo na kozala esalelo na nzela ya oyo wapi bandeko na bango mingi mpenza balingaki kotindama uta na mokili oyo kati na mokili ya seko, na ntango bamilengelaki te mpo na kokutana na Nzambe na bango.

24 Nzokande, bakokaki te kopesa nzela ete batika mpamba na nse bomoi na bango, ete basi na bango mpe bana na bango babomama na motema mabe ya monyokoli na bango oyo bazalaki kala bandeko na bango, iyo, mpe baoyo bakabwanaki uta na eklezia na bango, mpe batikaki bango mpe bakendaki kobebisa bango na kosanganaka na Balamani.

25 Iyo, bakokaki te kondima ete bandeko na bango basepela likolo ya makila ya Banefi, na kotalaka ete ezalaki na moko te oyo akobomba mitindo ya Nzambe, mpo ete elaka ya Nkolo ezalaki ete, soki babombi mitindo na ye bakofuluka na mboka.

Bimisa na lokasa