Makomi
Alma 4


Mokapo 4

Alma abatisi nkoto ya babongwami—Mabe makoti na Eklezia, mpe bokoli ya Eklezia ekangemi—Nefiya aponami mosambisi mokonzi—Alma, lokola nganganzambe monene, amipesi na mosala. Penepene na mibu 86–83 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete na mobu ya motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, boweli to bitumba ezalaki te na mboka ya Zalayemila;

2 Kasi bato batungisamaki, iyo, batungisamaki mingi mpenza mpo na kobungisa bandeko na bango, mpe lisusu mpo na kobungisa bibwele mpe bitonga na bango, mpe lisusu mpo na kobungisa bilanga na bango ya mboto, oyo biniatamaki na nse ya lokolo mpe bibebisamaki na Balamani.

3 Mpe mitungisi na bango ezalaki bongo minene ete moto moko moko azalaki na ntina ya kolela; mpe bandimaki ete ezalaki masambisi ya Nzambe oyo matindamaki likolo na bango na ntina ya nkuna na bango mpe bonsomo na bango; boye balamusamaki na bokundoli ya lotomo na bango.

4 Mpe babandaki kobongisa eklezia mpenza; iyo, mpe mingi babatisamaki na mai ya Sidoni mpe basanganaki na eklezia ya Nzambe; iyo, babatisamaki na loboko ya Alma, oyo abulisamaki nganganzambe monene likolo ya bato ya eklezia, na loboko ya tata na ye Alma.

5 Mpe esalemaki ete na mobu ya sambo ya boyangeli ya basambisi ezalaki na bato penepene na nkoto misato na nkama mitano baye basalaki bomoko na eklezia ya Nzambe mpe babatisamaki. Mpe boye esilaki mobu ya sambo ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi; mpe kimia ezalaki se kokoba ntango nyonso na ntango wana nyonso.

6 Mpe esalemaki ete na mobu ya mwambe ya boyangeli ya basambisi, ete bato ya eklezia babandaki kokola na lolendo, na ntina ya bozwi na bango ya mingi koleka, mpe bilamba na bango ya swa ya malonga, mpe lino na bango ya kitoko mpe ya malonga, mpe na ntina ya bibwele mpe bitonga mingi na bango, mpe wolo na bango mpe mpauni na bango, mpe ndenge nyonso ya biloko ya motuya mingi, oyo bazwaki na mosala na bango; mpe na biloko nyonso oyo batombwanaki na lolendo ya miso na bango, mpo babandaki kolata monzele ya ntalo.

7 Sikawa oyo ezalaki ntina ya motungisi mingi na Alma, iyo, mpe na mingi ya bato oyo Alma abulisaki mpo na kozala bateyi, mpe banganganzambe, mpe bampaka likolo ya eklezia; iyo, mingi na bango bayokaki mawa ya nsomo mpo na nkuna oyo bamonaki ete ebandaki kozala na kati ya bato na bango.

8 Mpo bamonaki mpe bayebaki na mawa mpenza ete bato ya eklezia babandaki kotombwana likolo na lolendo ya miso na bango, mpe kotia mitema na bango likolo ya bozwi mpe likolo ya biloko ya mpamba mpamba ya mokili, ete babandaki kotalana mpamba, moko na mosusu, mpe babandaki konyokola bango oyo bandimaki te engebene na bolingi mpe elengi na bango.

9 Mpe boye, na mobu oyo ya mwambe ya boyangeli ya basambisi, boweli monene ebandaki kozala na kati ya bato ya eklezia; iyo, ezalaki na boluli, mpe songisongi, mpe loma, mpe bonyokoli, mpe lolendo, kutu koleka lolendo na bango oyo bazalaki bato ya eklezia ya Nzambe te.

10 Mpe boye nde esukaki mobu ya mwambe ya boyangeli ya basambisi; mpe mabe ya eklezia ezalaki libanga ya libaku monene mpo na baoyo bazalaki ya eklezia te; mpe boye eklezia ebandaki kokweya na bokoli na yango.

11 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya libwa, Alma amonaki nkuna ya eklezia, mpe amonaki lisusu ete ndakisa ya eklezia ebandaki kokamba bango oyo bazalaki te bandimi uta na eteni yoko ya mabe na eteni mosusu, boye kosalaka bobebisami ya bato.

12 Iyo, amonaki bokeseni monene na kati ya bato, boko komitombwamaka likolo na lolendo na bango, kotalaka basusu mpamba, kopesaka mikongo na bango epayi na bakeleli mpe na bato oyo bazali bolumbu mpe bango oyo bazalaki na nzala, mpe bango oyo bazalaki na mposa ya mai, mpe baoyo bazalaki bakoni mpe baoyo bazalaki batungisami.

13 Sikawa oyo ezalaki ntina monene ya boleli na kati ya bato, wana ezalaki basusu komikitisa, kosalisaka bango oyo bazalaki na mposa ya lisalisi, lokola kokabaka bilei na bango na babola mpe bakeleli, koleisaka baoyo bazalaki na nzala, mpe koyokaka mpasi ya ndenge nyonso ya mitungisi, mpo na ntina ya Klisto, oyo akoya engebene na molimo ya masakoli;

14 Kotalelaka mokolo wana, boye kosimbaka bolimbisi ya masumu na bango; kotondisamaka na bosepeli monene na ntina ya bosekwi ya bakufi, engebene na bolingi mpe nguya mpe bokangoli ya Yesu Klisto uta na singa ya liwa.

15 Mpe sikawa esalemaki ete Alma, emonaki ye mitungisi ya balandi baye bamikitisaki ya Nzambe, mpe minyokoli oyo ezalaki likolo na bango na baoyo batikalaki ya bato na ye, mpe na komonaka bozangi bokokani na bango nyonso, abandaki koyoka mawa mpenza; nzokande Molimo ya Nkolo motikaki ye soki moke te.

16 Mpe aponaki moto moko ya bwania oyo azalaki na kati ya bampaka ya eklezia, mpe apesaki ye nguya engebene na kopona ya bato, ete akoka kozala na nguya ya kosala mibeko engebene na mibeko oyo epesamaki, mpe ya kolendisa myango engebene na nkuna mpe mabe ya bato.

17 Sikawa nkombo ya moto oyo ezalaki Nefiya, mpe aponamaki mosambisi mokonzi; mpe afandaki na kiti ya bosambisi mpo na kosambisa mpe kokamba bato.

18 Sikawa Alma apesaki ye te mosala ya kozala nganganzambe monene likolo ya eklezia, kasi atikaki mosala ya nganganzambe monene mpo na ye moko; kasi atikaki ebonga ya bosambisi epayi ya Nefiya.

19 Mpe oyo asalaki ete ye moko akoka kokende na kati ya bato na ye, soki te na kati ya bato ya Nefi, ete akoka koteya liloba ya Nzambe epayi na bango, kolamusa bango na bokundoli ya lotomo na bango, mpe ete akoka kokitisa na nse, na nzela ya liloba ya Nzambe, lolendo nyonso mpe boyebi lokuta mpe boweli nyonso boye ezalaki na kati ya bato na ye, mpo amonaki nzela te oyo wapi akokaki kobutwisa bango longola se soki ezalaki na kopesaka mpenza litatoli ya peto mpo na mabe na bango.

20 Mpe boye na ebandeli ya mobu ya libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, Alma atikaki ebonga ya bosambisi na Nefiya, mpe amipesaki mobimba na bonganganzambe ya monene ya molongo mosantu ya Nzambe, mpo na kotatola liloba, engebene na molimo ya emoniseli mpe ya masakoli.

Bimisa na lokasa