Makomi
Alma 50


Mokapo 50

Moroni alendisi bamboka ya Banefi—Batongi bingumba mingi ya sika—Etumba mpe bobebisami ekweyeli Banefi na mikolo na bango ya nkuna mpe bonsomo—Moliantoni mpe bakabwani na ye balongami na Teakumi—Nefiya akufi mpe mwana mobali na ye Pawolani akamati kiti ya bosambisi. Penepene na mibu 72–67 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Moroni atikaki te komilengela mpo na etumba, soki te kobatela bato na ye na Balamani; mpo asalaki ete mampinga na ye ebanda na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale ya boyangeli ya basambisi, ete ebanda na kotimolaka ebondo ya mabele nzinganzinga mpembeni na bingumba na bango nyonso, epayi nyonso na mboka mobimba oyo ezwamaki na Banefi.

2 Mpe likolo ya nsonge ya ebondo oyo ya mabele asalaki ete mabaya mazala, iyo, misala ya mabaya mitongama na lolenge ete mitelema na bosanda ya moto, nzinganzinga mpembeni na bingumba.

3 Mpe asalaki ete likolo ya misalawana wana ya mabaya ezala na lolenge loko ya pike oyo etongama likolo ya mabaya nzinganzinga mpembeni; mpe ezalaki makasi mpe molai.

4 Mpe asalaki ete manongi matelemisama ete oyo maleka misalawana wana ya pike, mpe asalaki ete bisika ya bokengi bitongama likolo ya manongi wana, ete mabanga mpe makonga ya Balamani makoka kozokisa bango te.

5 Mpe malengelamaki ete bakoka kobwaka mabanga uta na nsonge na yango, engebene na matombeli mpe makasi na bango, mpe koboma ye oyo akomeka kobelema penepene na bifelo ya engumba.

6 Boye Moroni alengelaki bisika ya makasi mpo na boyei ya banguna na bango, nzinganzinga mpembeni na engumba moko moko na mboka mobimba.

7 Mpe esalemaki ete Moroni asalaki ete mampinga na ye makende kati na esobe ya esti; iyo, mpe bakendaki mpe babenganaki Balamani baoyo bazalaki na esobe ya esti kati na bamboka na bango moko, oyo ezalaki na sudi ya mboka ya Zalayemila.

8 Mpe bandelo ya mboka ya Nefi etandolamaki na nzela moko alima uta mbu ya esti kino na westi.

9 Mpe esalemaki ete ntango Moroni abenganaki Balamani nyonso uta na esobe ya esti, oyo ezalaki na nordi ya mboka oyo ezwamaki na bango moko, asalaki ete bafandi baoyo bazalaki na mboka ya Zalayemila mpe na mboka ya nzinganzinga mpembeni bakende kati na esobe ya esti, kutu na bandelo penepene na libongo ya mbu, mpe bazwa mboka.

10 Mpe atiaki lisusu mampinga na sudi, na bandelo ya mboka na bango, mpe asalaki ete bango batelemisa bifelo ya makasi ete bikoka kobatela mampinga na bango mpe bato na bango uta na maboko ya banguna na bango.

11 Mpe boye alongolaki bisika ya makasi nyonso ya Balamani na esti ya esobe, iyo, mpe lisusu na westi, koyeisaka makasi monkoloto kati na Banefi mpe Balamani, kati na mboka ya Zalayemila mpe mboka ya Nefi, uta na mbu ya westi, kolekaka na moto ya ebale Sidoni—Mpe Banefi bazwaki mboka mobimba epayi na Nordi, iyo, kutu mboka nyonso ezalaki epayi na nordi ya mboka ya Beboo engebene na botombeli na bango.

12 Boye Moroni, elongo na mampinga na ye, oyo mayikanaki mokolo na mokolo na ntina ya bokengi boye misala na ye ememaki epayi na bango, alukaki kolongola bokasi mpe nguya ya Balamani mosika uta na mboka na bango, ete bazala na nguya te likolo ya bamboka oyo bazwaki.

13 Mpe esalemaki ete Banefi babandisaki engumba moko, mpe babiangaki nkombo ya engumba yango Moroni; mpe ezalaki penepene na mbu ya esti; mpe ezalaki na sudi penepene na monkoloto ya mboka ya Balamani.

14 Mpe babandaki lisusu botongami mpo na engumba moko kati na engumba ya Moroni mpe engumba ya Alona, kokangisaka bandelo ya Alona mpe ya Moroni; mpe babiangaki nkombo ya engumba yango, soki te mboka yango, Nefiya.

15 Mpe babandaki lisusu na mobu se moko wana kaka kotonga bingumba mingi na nordi, moko na lolenge moko ekeseni oyo babiangaki Lehi, oyo ezalaki na nordi penepene na bandelo ya libongo ya mbu.

16 Mpe boye esilaki mobu ya ntuku mibale.

17 Mpe bato ya Nefi bazalaki na ezalela ya bofuluki na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na moko ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

18 Mpe bafulukaki mingi koleka, mpe bakomaki bazwi mingi koleka; iyo, mpe bayikanaki mpe bakomaki makasi na mboka.

19 Mpe boye tomoni lolenge boni banzela ya kosala ya Nkolo etonda na boboto mpe ezali alima, na kokokisaka maloba na ye nyonso epayi na bana ya bato; iyo, tokoki komona ete maloba na ye mamonisami solo, kutu na ntango oyo, oyo alobaki epayi ya Lehi, kolobaka:

20 Bopambolami, yo mpe bana na yo; mpe bakopambolama, mbala mingi lokola ekobomba bango mitindo na ngai bakofuluka na mboka. Kasi omikundola, mbala mingi lokola ekobomba bango te mitindo na ngai bakokatama mosika uta na miso ya Nkolo.

21 Mpe tomoni ete bilaka bimonisami solo na bato ya Nefi; mpo ezalaki boswani na bango mpe boweli na bango, iyo, bobomi na bango, mpe bopunzi na bango, bosambeli bikeko na bango, pite na bango, mpe bonsomo na bango, oyo ezalaki na kati na bango, nde ebimiseli bango bitumba na bango mpe bobebisami na bango.

22 Mpe bango oyo bazalaki sembo mpo na kobomba mitindo ya Nkolo babikisamaki na ntango wana, nzokande nkoto na nkoto ya bandeko ya nkuna kati na bango bakangamaki na boumbu, soki te mpo na kowa na mompanga, soki te mpo na kobebisama moke moke na bozangi boyambi, mpe basanganaki elongo na Balamani.

23 Kasi tala etikala kozala soki moke te na ntango moko ya esengo koleka na kati ya bato ya Nefi, uta na mikolo ya Nefi, bosepeli koleka na mikolo ya Moroni, iyo, kutu na ntango oyo, na mobu ya ntuku mibale na moko ya boyangeli ya basambisi.

24 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku mibale na mibale ya boyangeli ya basambisi lisusu esukaki na kimia; iyo, mpe lisusu mobu ya ntuku mibale na misato.

25 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na minei ya boyangeli ya basambisi, kimia elingaki kozala lisusu na kati ya bato ya Nefi soki ezalaki te boweli boye esalemaki na kati na bango mpo na oyo etali mboka ya Lehi, mpe mboka ya Moliantoni, oyo ekangamaki na bandelo ya mboka ya Lehi; nyonso mibale oyo ezalaki na bandelo ya libongo ya mbu.

26 Mpo tala, bato oyo bazwaki mboka ya Moliantoni basengaki eteni moko ya mboka ya Lehi; boye nde ebandaki boweli ya ndongo kati na bango, mpenza ete bato ya Moliantoni bakamataki manduki mpo na kobunda na bandeko na bango, mpe bakanaki mpenza koboma bango na mompanga.

27 Kasi tala, bato oyo bazwaki mboka ya Lehi bakimaki na nganda ya Moroni, mpe babilaki epayi na ye mpo na lisalisi; mpo tala, bazalaki na libunga te.

28 Mpe esalemaki ete bato ya Moliantoni, baoyo bakambamaki na moto moko oyo kani nkombo ezalaki Moliantoni, emonaki bango ete bato ya Lehi bakimaki na nganda ya Moroni, babangaki mingi koleka ete mbele mampinga ya Moroni maya likolo na bango mpe maboma bango.

29 Boye, Moliantoni atiaki kati na mitema na bango ete bakima na mboka oyo ezalaki epayi na nordi, oyo etondaki na ebele ya mai, mpe bakamata bozwi ya mboka oyo ezalaki epayi na nordi.

30 Mpe tala, balingaki kokokisa mwango oyo, (oyo elingaki kozala ntina moko ya kolela) kasi tala, Moliantoni lokola azalaki moto moko ya nkanda mingi, boye asilikaki na moko ya basali na yeya basi, mpe akweyaki likolo na ye mpe abetaki ye mingi.

31 Mpe esalemaki ete akimaki, mpe ayaki likolo ya nganda ya Moroni, mpe alobelaki Moroni makambo nyonso matalaki likambo yango, mpe lisusu matalaki mokano na bango ya kokima kati na mboka ya epayi na nordi.

32 Sikawa tala, bato oyo bazalaki na mboka Beboo, soki te kutu Moroni, babangaki ete bayoka maloba ya Moliantoni mpe basangana elongo na bato na ye, mpe boye alingaki kokamata bozwi ya biteni wana ya mboka, oyo elingaki kobandisa makambo oyo kani malandi elingaki kozala ndongo na kati ya bato ya Nefi, iyo, wapi malandi elingaki kokamba na bokwei ya lipanda na bango.

33 Boye Moroni atindaki limpinga moko, elongo na nganda na bango, mpo na kokanga bato ya Moliantoni nzela, mpo na kopekisa bokimi na bango kati na mboka ya epayi na nordi.

34 Mpe esalemaki ete bakangaki te bango nzela kino bakomaki na bandelo ya mboka ya Libebi; mpe kuna bakangaki ya bango nzela, na esika nzela ezali ya nkaka oyo ezali kokamba nzela mpembeni na mbu mpo na kokota na mboka ya epayi na nordi, iyo, mpembeni na mbu, na westi mpe na esti.

35 Mpe esalemaki ete limpinga oyo etindamaki na Moroni, oyo ekambamaki na moto moko oyo kani nkombo ezalaki Teakumi, ekutanaki na bato ya Moliantoni; mpe boye bato ya Moliantoni bazalaki moto makasi, (mpo bafulamaki na nkuna mpe maloba na ye ya koleteka) ete etumba ebandaki kati na bango, na oyo wapi Teakumi abomaki Moliantoni mpe alongaki limpinga na ye, mpe akamataki bango bato ya boloko, mpe bazongaki na nganda ya Moroni. Mpe boye nde esukaki mobu ya ntuku mibale na minei ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

36 Mpe boye bato ya Moliantoni bamemamaki. Mpe likolo ya liyokani na bango mpo na kobatela kimia bazongisamaki na mboka ya Moliantoni, mpe bomoko esalemaki kati na bango mpe bato ya Lehi; mpe bazongisamaki mpe lokola na bamboka na bango.

37 Mpe esalemaki ete se na mobu mona moko oyo kimia ezongisamaki na bato ya Nefi, Nefiya, mosambisi mokonzi ya mibale, akufaki, nsima ya kozala na kiti ya bosambisi na alima moko ya bobongi nie liboso ya Nzambe.

38 Nzokande, aboyaki Alma kokamata bozwi ya masolo ya makomi wana mpe biloko wana oyo bimonanaki kozala ya bule koleka nyonso na Alma mpe batata na ye; boye Alma apesaki yango epayi na mwana mobali na ye, Elamani.

39 Tala, esalemaki ete mwana mobali ya Nefiya aponamaki mpo na kokamata kiti ya bosambisi, na esika ya tata na ye; iyo, aponamaki mosambisi mokonzi mpe mokambi ya etuka likolo ya bato, na ndai mpe bokuli ya bule mpo na kosambisa na bosembo, mpe kobatela kimia mpe bonsomi ya bato, mpe kopesa epayi na bango matomba na bango ya bule mpo na kokumbamela Nkolo Nzambe na bango, iyo, mpo na kosalisa mpe kobatela ntina ya Nzambe mikolo na ye nyonso, mpe mpo na komema bato ya nkuna na kosambisama engebene na mabe na bango.

40 Sikawa tala, nkombo na ye ezalaki Pawolani. Mpe Pawolani akamataki kiti ya tata na ye, mpe abandaki bokonzi na ye na nsuka ya mobu ya ntuku mibale na minei, likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa