Makomi
Alma 51


Mokapo 51

Bato ya mokonzi baluki kobongola mobeko mpe kotia mokonzi—Pawolani mpe bato-nsomi basungami na kopona ya bato nyonso—Moroni asengisi bato ya mokonzi kobatela ekolo na bango soki te kotiama na liwa—Amalikia mpe Balamani bakangi bingumba mingi oyo ezalaki bisika makasi—Teakumi abengami kokota mpo na kokamata mboka na Balamani mpe abomi Amalikia kati na ema na ye. Penepene na mibu 67–66 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na mitano ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, nsima ya kofandisa kimia kati na bato ya Lehi mpe bato ya Moliantoni mpo na oyo etali bamboka na bango, mpe nsima ya kobanda mobu ya ntuku mibale na mitano na kimia;

2 Nzokande, batikaki kimia yango na mboka mpo na ntango molai te, mpo boweli ebandaki kozala na kati ya bato mpo na oyo etali mosambisi mokonzi, Pawolani; mpo tala, ezalaki na ndambo moko ya bato oyo bazalaki na mposa ete ya makambo moke ya mobeko esengeli kobongolama.

3 Kasi tala, Pawolani alingaki kobongola soki te kopesa nzela ete mobeko ebongolama; boye ayokelaki te bango oyo batindaki kopona na bango elongo na masengami na bango mpo na oyo etali kobongola mobeko te.

4 Boye, bango oyo bazalaki na mposa ete mobeko mobongolama basilikaki na ye, mpe bazalaki na mposa ete azala lisusu mosambisi mokonzi likolo ya mboka te; boye boswani ya ndongo ebimaki na ntina ya likambo yango, kasi kino na bosopi makila te.

5 Mpe esalemaki ete bango oyo bazalaki na mposa ete Pawolani asengeli kolongwa uta na kiti ya bosambisi babiangamaki bato ya mokonzi, mpo bazalaki na mposa ete mobeko mobongolama na lolenge loko ya kolongola mbulamatari ya bonsomi mpe kotia mokonzi bobele moko likolo ya mboka.

6 Mpe bango oyo bazalaki na mposa ete Pawolani asengeli kotikala mosambisi mokonzi likolo ya mboka bakamataki likolo na bango nkombo ya bato-nsomi; mpe boye bokabwani ezalaki na kati na bango, mpo bato-nsomi balapaki ndai soki te bayokanaki mpo na kosimba makoki na bango mpe matomba ya eyamba na bango na mbulamatari ya bonsomi.

7 Mpe esalemaki ete likambo oyo ya boweli na bango ebongisamaki na kopona ya bato nyonso. Mpe esalemaki ete kopona ya bato ezalaki mpo na bato-nsomi, mpe Pawolani atikalaki na kiti ya bosambisi, oyo esalaki bosepeli boike na kati ya bandeko ya Pawolani mpe lisusu mingi ya bato ya lipanda, baoyo bakangisaki lisusu monoko na bato ya mokonzi, ete bamekaki te kotelemela kasi basengisaki kosimba ntina ya bonsomi.

8 Sikawa baoyo bazalaki mpo na bakonzi ezalaki bango oyo bato ya mbotama ya likolo, mpe balukaki kozala bakonzi; mpe basungamaki na baoyo balukaki nguya mpe likoki likolo ya bato.

9 Kasi tala, oyo ezalaki ntango moko ya kokoso mpo ete boweli ya lolenge oyo ezala na kati ya bato ya Nefi; mpo tala, Amalikia alamusaki lisusu mitema ya bato ya Balamani mpo na kobundisa bato ya Banefi, mpe azalaki kosangisaka basoda esika moko uta na biteni nyonso ya mboka na ye, mpe kopesaka bango manduki, mpe komilengelaka mpo na etumba na molende nyonso; mpo alapaki ndai ya komela makila ya Moroni.

10 Kasi tala, tokomono ete elaka na ye oyo asalaki ezalaki ya tapale; kasi, amilengelaki mpe mampinga na ye mpo na koya kobunda na Banefi.

11 Sikawa mampinga na ye ezalaki monene te lokola ezalaki kino na ntango wana, na ntina ya nkoto mingi baoyo babomamaki na loboko ya Banefi; kasi ata bobungi monene na bango, Amalikia asangisaki elongo limpinga monene moko ya kokamwa, na lolenge ete abangaki te kokita na mboka ya Zalayemila.

12 Iyo, kutu Amalikia akitaki ye moko, na moto ya Balamani. Mpe ezalaki na mobu ya ntuku mibale na mitano ya boyangeli ya basambisi; mpe ezalaki na ntango se moko wana oyo babandaki kobongisa makambo ya boweli na bango mpo na oyo etali mosambisi mokonzi, Pawolani.

13 Mpe esalemaki ete ntango bato oyo babiangamaki bato ya mokonzi bayokaki ete Balamani bazalaki koya mpo na kobunda na bango, basepelaki na mitema na bango; mpe baboyaki kokamata manduki na bango, mpo bazalaki na nkele mingi na mosambisi mokonzi, mpe lisusu elongo na bato ya lipanda, ete balingaki te kokamata manduki mpo na kobatela ekolo na bango.

14 Mpe esalemaki ete emonaki Moroni oyo, mpe emonaki ye lisusu ete Balamani bazalaki koya kati na ndelo ya mboka, azalaki na nkele mingi mpenza na ntina ya moto makasi ya bato wana oyo asalaki na molende mingi mpo ete babatelama; iyo, azalaki na nkele mpenza; molimo na ye etondaki na nkanda na bango.

15 Mpe esalemaki ete atindaki bosenga, na kopona ya bato, epayi ya mokambi etuka ya mboka na biso, mpe azalaki na mposa ete atanga yango, mpe apesa ye (Moroni) nguya ya kosengisa bakabwani baye wana kobatela ekolo na bango soki te koboma bango.

16 Mpo ezalaki libanzo na ye ya yambo ya kotia nsuka na boweli mpe bokabwani ya lolenge oyo na kati ya bato; mpo tala, oyo ezalaki kino ntango wana ntina ya bobebisami nyonso na bango. Mpe esalemaki ete ndingisa epesamaki engebene na kopona ya bato.

17 Mpe esalemaki ete Moroni atindaki ete limpinga na ye ekende kobunda na bato ya mokonzi bana, mpo na kokitisa lolendo na bango mpe bonkumu na bango mpe kokitisa bango na mabele, soki te basengeli kokamata manduki mpe kosunga ntina ya lipanda.

18 Mpe esalemaki ete mampinga matambolaki mpo na kobunda na bango; mpe bakitisaki lolendo na bango mpe bonkumu na bango, na lolenge ete lokola batombolaki bibundeli na bango ya bitumba mpo na kobunda na bato ya Moroni bakatamaki na nse mpe bakitisamaki na mabele.

19 Mpe esalemaki ete bazalaki nkoto minei ya bakabwani bana oyo bakatamaki na nse na mompanga; mpe oyo wana ya bakambi na bango oyo babomamaki te na etumba bakamatamaki mpe babwakamaki kati na boloko, mpo ntango ezalaki te mpo na bosambisi na bango na eleko wana.

20 Mpe ndambo batikalaki ya bakabwani bana, na esika ete babetama na nse na mabele na mompanga, batosaki elembo ya lipanda, mpe basengisamaki mpo na kotombola bendele ya lipanda likolo ya manongi na bango, mpe na bingumba na bango, mpe kokamata manduki mpo na kobatela ekolo na bango.

21 Mpe boye Moroni asukisaki bato wana ya mokonzi, ete ezalaki na moko te oyo ayebanaki na nkombo ya bato ya mokonzi; mpe boye atiaki nsuka na ngwi mpe lolendo ya bato oyo balakisaki kozala na makila ya bonkumu; kasi bamemamaki na nse mpo na komikitisa lokola bandeko na bango, mpe mpo na kobunda na mpiko mpo na bonsomi na bango uta na boumbu.

22 Tala, esalemaki ete wana ezalaki Moroni boye kosukisa bitumba mpe boweli na kati ya bato na ye moko, mpe koyangelaka bango mpo na kimia mpe bompenza, mpe kosalaka mabongisi mpo na kolengela etumba na Balamani, tala, Balamani bakomaki kati na mboka ya Moroni, oyo ezalaki na bandelo penepene na libongo ya mbu.

23 Mpe esalemaki ete na engumba ya Moroni Banefi bazalaki na makasi ya kokoka te; boye Amalikia abenganaki bango, kobomaka mingi. Mpe esalemaki ete Amalikia akamataki engumba, iyo, akamataki bisika na bango ya makasi.

24 Mpe bango oyo bakimaki uta na mboka ya Moroni bayaki na engumba ya Nefiya; mpe lisusu bato ya engumba ya Lehi basanganaki bango moko esika moko, mpe bamilengelaki mpe babelemaki mpo na koyamba Balamani na etumba.

25 Kasi esalemaki ete Amalikia apesaki te nzela ete Balamani bakende na engumba ya Nefiya mpo na etumba, kasi abombaki bango mpembeni na libongo ya mbu, kotikaka bato na engumba moko moko mpo na kosimba mpe kobatela yango.

26 Mpe boye akobaki, na kokamataka bingumba mingi, engumba ya Nefiya, mpe engumba ya Lehi, mpe engumba ya Moliantoni, mpe engumba ya Omina, mpe engumba ya Gidi, mpe engumba ya Muleke, bingumba nyonso oyo ezalaki na ndelo ya esti penepene na libongo ya mbu.

27 Mpe boye nde ezwaka Balamani, na mayele mabe ya Amalikia, bingumba mingi mpenza, na lisalisi ya ebele ya mampinga na bango, bingumba nyonso etongamaki lokola bisika ya makasi mpenza na lolenge ya bisika makasi ya Moroni; nyonso kati na yango bipesaki bisika bibatelami makasi mpo na Balamani.

28 Mpe esalemaki ete batambolaki epayi na bandelo ya mboka Beboo, kobenganaka Banefi liboso na bango mpe kobomaka mingi.

29 Kasi esalemaki ete bakutanaki na Teakumi, oyo abomaki Moliantoni mpe azalaki na moto ya bato na ye ntango ya kokima na ye.

30 Mpe esalemaki ete akangaki nzela na Amalikia mpe lokola, wana ezalaki ye kotambola elongo na limpinga monene na ye ete akoka kokamata mboka ya Beboo, mpe lisusu mboka epayi na nordi.

31 Kasi tala akutanaki na bosisoi ya kobenganamaka na Teakumi mpe bato na ye, mpo bazalaki babundi banene; mpo moko moko ya Teakumi alekaki Balamani na bokasi mpe na mayele ya etumba, na lolenge ete bazwaki litomba likolo ya Balamani.

32 Mpe esalemaki ete batungisaki bango, na lolenge ete babomaki bango kutu kino ntango eyingelaki molili. Mpe esalemaki ete Teakumi mpe bato na ye batelemisaki biema na bango na bandelo ya mboka Beboo; mpe Amalikia atelemisaki biema na ye na ndelo na zelo penepene ya libongo ya mbu, mpe nsima ya lolenge oyo babenganamaki.

33 Mpe esalemaki ete ntango butu eyingelaki, Teakumi mpe mosali na ye bapusanaki lokola bayibi mpe babimaki na butu, mpe bakotaki kati na nganda ya Amalikia; mpe tala, mpongi ekangaki bango na ntina ya bolembi boike na bango, bolembi na ntina ya misala mpe molunge ya mokolo.

34 Mpe esalemaki ete Teakumi apusanaki lokola moyibi na nkuku kati na ema ya mokonzi, mpe akotisaki ye mosuki na motema na ye; mpe apesaki na mbala moko liwa na mokonzi ete alamusaki basali na ye te.

35 Mpe azongaki lisusu na nkuku na nganda na ye moko, mpe tala, bato na ye bazalaki kolala, mpe alamusaki bango mpe ayebisaki bango makambo nyonso asalaki.

36 Mpe asalaki ete mampinga na ye etelema mpo na kobelema, mbele Balamani balamuka mpe baya likolo na bango.

37 Mpe boye nde esilaki mobu ya ntuku mibale na mitano ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi; mpe boye nde esilaki mikolo ya Amalikia.

Bimisa na lokasa