Makomi
Alma 52


Mokapo 52

Amoloni akitani Amalikia lokola mokonzi ya Balamani—Moroni, Teakumi, mpe Lehi bakambi Banefi na etumba moko ya elonga likolo ya Balamani—Engumba ya Muleke ezwami lisusu, mpe Yakobo Mozolami abomami. Penepene na mibu 66–64 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete na mobu ya ntuku mibale na motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, tala, ntango Balamani balamukaki na ntongo ya yambo ya sanza ya yambo, tala, bakutaki Amalikia ya kokufa na ema na ye moko; mpe bamonaki lisusu ete Teakumi abongamaki mpo na kobunda na bango na mokolo wana.

2 Mpe sikawa, ntango Balamani bamonaki likambo oyo babangaki mingi; mpe batikaki mwango na bango na kotambolaka kati na mboka epayi na nordi, mpe bazongaki nsima elongo na limpinga na bango kati na engumba ya Muleke, mpe balukaki bobatelami na bisika etongami makasi na bango.

3 Mpe esalemaki ete ndeko ya Amalikia ya mobali aponamaki mokonzi likolo ya bato; mpe nkombo na ye ezalaki Amoloni; boye mokonzi Amoloni, ndeko ya mokonzi Amalikia ya mobali, aponamaki mpo na koyangela na esika na ye.

4 Mpe esalemaki ete atindaki ete bato na ye basimba bingumba wana, oyo bakamataki na bosopi makila; mpo bazwaki te bingumba longola se soki babungisaki makila mingi.

5 Mpe sikawa, Teakumi amonaki ete Balamani bazalaki na mokano makasi ya kosimba bingumba wana oyo bakamataki, mpe biteni wana ya mboka oyo bazwaki; mpe lisusu komonaka monene ya motango na bango, Teakumi akanisaki elongobanaki te ete ameka kobunda na bango kati na bisika na bango ya makasi.

6 Kasi abombaki bato na ye nzinganzinga mpembeni, lokola soki bazalaki komilengela mpo na etumba; iyo, mpe solo azalaki kolengelaka komibatela na bango, na kotongaka bifelo nzinganzinga mpembeni mpe kolengelaka bisika ya ekimelo.

7 Mpe esalemaki ete akobaki boye komilengela mpo na etumba kino Moroni atindaki motango monene ya bato mpo na kolendisa limpinga na ye.

8 Mpe Moroni lisusu atindaki mibeko epayi na ye ete asimba bato nyonso ya boloko baoyo bakweyaki na maboko na ye; mpo lokola Balamani bakamataki bato ya boloko mingi, ete akoka kosimba bato ya boloko nyonso ya Balamani lokola lisiko mpo na bango oyo Balamani bakamataki.

9 Mpe lisusu atindaki mibeko epayi na ye ete alendisa mboka ya Beboo, mpe atia bokengi na nzela ya nkaka oyo ezalaki kokamba kati na mboka epayi na nordi, na kobangaka ete mbele Balamani bakoma na esika wana mpe bazwa nguya ya kotungisa bango epayi na epayi.

10 Mpe lisusu Moroni atindaki maloba epayi na ye, mpe azalaki na mposa na ye ete azala sembo ya kosimbaka ntaka wana ya mboka, mpe ete aluka libaku nyonso mpo na kofiakola Balamani na ntaka wana, lokola mpenza ezalaki na nguya na ye, ete mbele akoka kokamata lisusu na angele to na mayele mosusu bingumba wana oyo ekamatamaki uta na maboko na bango; mpe ete lisusu ayeisa makasi mpe alendisa bingumba nzinganzinga mpembeni, oyo ekweyaki na maboko ya Balamani te.

11 Mpe lisusu alobaki epayi na ye, nakoya epayi na yo, kasi tala, Balamani bazali likolo na biso na ndelo ya mboka mpembeni na mbu ya westi; mpe tala, nakeyi kobunda na bango, boye nakoki koya epayi na yo te.

12 Sikawa, mokonzi (Amoloni) akendaki uta na mboka ya Zalayemila, mpe ayebisaki epayi ya mwasi ya mokonzi mpo na oyo etali liwa ya ndeko na ye, mpe asangisaki elongo motango monene ya bato, mpe batambolaki mpo na kobunda na Banefi na ndelo penepene na mbu ya westi.

13 Mpe boye asalaki makasi mpo na kotungisa Banefi, mpe kondimisa ndambo moko ya basoda na bango na eteni wana ya mboka, nzokande atindaki bango oyo batikaki kozwa bingumba oyo ekamatamaki, ete batungisa lisusu Banefi na ndelo ya mbu ya esti, mpe bakamata bamboka na bango mingi lokola ezalaki na nguya na bango, engebene na nguya ya mampinga na bango.

14 Mpe boye Banefi bazalaki na bizalela wana ya likama na nsuka ya mobu ya ntuku mibale na motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

15 Kasi tala, esalemaki ete na mobu ya ntuku mibale na nsambo ya boyangeli ya basambisi, Teakumi, na etinda ya Moroni—oyo atiaki mampinga mpo na kobatela sudi mpe westi ya ndelo ya mboka, mpe abandaki botamboli na ye na mboka ya Beboo, ete akoka kosalisa Teakumi elongo na bato na ye na kokamataka lisusu bingumba oyo babungisaki—

16 Mpe esalemaki ete Teakumi azwaki mibeko mpo na kobundisa engumba ya Muleke, mpe kokamata yango lisusu soki ekokaki.

17 Mpe esalemaki ete Teakumi asalaki mabongisi mpo na kobundisa engumba ya Muleke, mpe kotambola liboso elongo na limpinga na ye mpo na kobunda na Balamani; kasi amonaki ete ekokaki kosalema te ete akoka kolonga bango ntango ezalaki bango na bisika na bango ya makasi; boye atikaki mwango na ye mpe azongaki lisusu na engumba ya Beboo, mpo na kozela boyei ya Moroni, ete akoka kozwa makasi mpo na limpinga na ye.

18 Mpe esalemaki ete Moroni akomaki elongo na limpinga na ye na mboka ya Beboo, na nsuka ya mobu ya ntuku mibale na nsambo ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

19 Mpe na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na mwambe, Moroni mpe Teakumi mpe mingi ya bakapiteni bakonzi basalaki likita monene ya etumba—nini basengeli kosala mpo na kobimisa Balamani baya kobunda na bango; soki te ete bakoka kozwa nzela to mosusu koleta bango babima libanda ya bisika na bango ya makasi, ete bakoka kozwa litomba likolo na bango mpe kokamata lisusu engumba ya Muleke.

20 Mpe esalemaki ete batindaki bantoma epayi na limpinga ya Balamani, oyo ebatelaki engumba ya Muleke, elongo na mokambi na bango, oyo kani nkombo ezalaki Yakobo, kosengaka ye ete abima elongo na mampinga na ye kokutana na bango likolo ya mabele ya polele kati na bingumba yango mibale. Kasi tala, Yakobo, oyo azalaki Mozolami alingaki te kobima elongo na limpinga na ye kokutana na bango likolo ya mabele ya polele.

21 Mpe esalemaki ete Moroni, lokola azalaki te na elikya ya kokutana na bango likolo ya mabele ya polele, boye, akanisaki mwango moko ete akoka kobenda Balamani uta na bisika na bango ya makasi.

22 Boye asalaki ete Teakumi akamata motango moke ya bato mpe batambola penepene na libongo ya mbu; mpe Moroni mpe limpinga na ye, na butu, batambolaki na esobe, na westi ya engumba ya Muleke; mpe boye, na mokolo ya nsima, ntango bakengeli ya Balamani bamonaki Teakumi, bakimaki mpe bayebisaki yango epayi ya Yakobo, mokambi na bango.

23 Mpe esalemaki ete mampinga ya Balamani matambolaki lisusu mpo na kobunda na Teakumi, kobanzaka ete na motango na bango bakolonga Teakumi na ntina ya motango moke ya bato na ye. Mpe lokola Teakumi amonaki mampinga ya Balamani kobima mpo na kobunda na ye abandaki kozonga mpembeni na libongo ya mbu, epayi na nordi.

24 Mpe esalemaki ete emonaki Balamani ete abandaki kokima, bazwaki mpiko mpe balandaki bango na makasi. Mpe wana ezalaki Teakumi boye kokamba mosika Balamani baoyo bazalaki kolanda bango mpamba, tala, Moroni atindaki ete ndambo moko ya limpinga na ye oyo bazalaki elongo na ye basengelaki kotambola kati na engumba, mpe kozwa yango.

25 Mpe basalaki boye, mpe babomaki bango nyonso oyo batikalaki mpo na kobatela engumba, iyo, bango nyonso oyo balingaki kotika bibundeli na bango ya bitumba te.

26 Mpe boye Moroni azwaki engumba ya Muleke elongo na ndambo moko ya limpinga na ye, wana ezalaki ye kotambola elongo na baoyo batikalaki mpo na kokutana na Balamani ntango bazongaki uta na kolandaka Teakumi.

27 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki Teakumi kino bakomaki penepene na engumba ya Beboo, mpe nsima bakutanaki na Lehi mpe limpinga moko ya moke, oyo etikalaki mpo na kobatela engumba ya Beboo.

28 Mpe sikawa tala, ntango bakapiteni bakonzi ya Balamani bamonaki Lehi elongo na limpinga na ye koyaka kobunda na bango, bakimaki na mobulungano moike, mbele mbaimbai bazwa te engumba ya Muleke liboso ete Lehi alonga bango; mpo balembaki na ntina ya botamboli na bango, mpe bato ya Lehi bazalaki naino na makasi.

29 Sikawa Balamani bayebaki te ete Moroni azalaki nsima na bango elongo na limpinga na ye; mpe nyonso babangaki ezalaki Lehi mpe bato na ye.

30 Sikawa Lehi azalaki te na mposa ya kokanga bango kino bakokutana na Moroni mpe limpinga na ye.

31 Mpe esalemaki ete yambo Balamani bazonga nsima mosika bazingamaki na Banefi, na bato ya Moroni na ngambo moko, mpe bato ya Lehi na ngambo mosusu, bango nyonso bazalaki naino sika mpe batondi na bokasi; kasi Balamani balembaki na ntina ya botamboli bolayi.

32 Mpe Moroni atindaki bato na ye bakweya likolo na bango kino bakobwaka bibundeli na bango ya bitumba.

33 Mpe esalemaki ete Yakobo, kozalaka mokambi na bango, azalaki lisusu Mozolami, mpe lokola azalaki na molimo oyo ekokaki kolongama te, akambaki Balamani kobunda na nkanda ya koleka mpenza na Moroni.

34 Lokola Moroni azalaki na nzela ya botamboli na bango, boye Yakobo azwaki mokano ya koboma bango mpe kofungola nzela na ye mpo na kokende na engumba ya Muleke. Kasi tala, Moroni mpe bato na ye bazalaki na nguya mingi koleka; boye bapesaki nzela liboso ya Balamani te.

35 Mpe esalemaki ete babundaki na bangambo mibale na nkanda koleka; mpe mingi babomamaki na bangambo nyonso mibale; iyo, mpe Moroni azokisamaki mpe Yakobo abomamaki.

36 Mpe Lehi abundaki na nsima na bango na nkanda ya lolenge oyo elongo na bato na ye ya makasi, ete Balamani na nsima batikaki bibundeli na bango ya bitumba; mpe ndambo etikali na bango, lokola bazalaki na mobulungano moike, bayebaki te wapi kokende to epayi wapi kobeta.

37 Sikawa Moroni ntango amonaki mobulungano na bango, alobaki epayi na bango: Soki bokomema bibundeli na bino ya bitumba mpe bokosundola yango, tala tokotika kosopa makila na bino.

38 Mpe esalemaki ete eyokaki Balamani maloba oyo, bakapiteni bakonzi na bango, bango nyonso oyo babomamaki te, babelemaki mpe babwakaki bibundeli na bango ya bitumba na makolo ya Moroni, mpe lisusu batindaki bato na bango basala mpe lokola.

39 Kasi tala, ezalaki na mingi baoyo balingaki te; mpe bango oyo balingaki te kosundola mipanga na bango bakamatamaki mpe bakangisamaki singa, mpe bibundeli na bango ya bitumba ekamatamaki uta na bango, mpe basengisamaki kotambola elongo na bandeko na bango kati na mboka ya Beboo.

40 Mpe sikawa motango ya bato ya boloko baoyo bakamatamaki ezalaki mingi koleka motango na bango oyo babomamaki, iyo, mingi koleka baoyo babomamaki na bangambo nyonso mibale.

Bimisa na lokasa