Makomi
Alma 53


Mokapo 53

Basaleli Balamani oyo bazalaki bakangemi na boloko mpo na koyeisa engumba ya Beboo makasi—Bokabwani na kati ya Banefi epesi elonga ya Balamani—Elamani akomi komanda ya nkoto mibale ya bilenge bana mibali ya bato ya Amona. Penepene na mibu 64–63 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete batiaki bakengeli likolo ya bato ya boloko ya Balamani, mpe basengisaki bango mpo na kokende mpe kokunda bakufi na bango, iyo, mpe lisusu bakufi ya Banefi oyo babomamaki; mpe Moroni atiaki bato likolo na bango wana ezalaki bango kosala misala na bango.

2 Mpe Moroni akendaki na engumba ya Muleke elongo na Lehi, mpe akamataki mosala ya kozala komanda ya engumba mpe apesaki yango epayi na Lehi. Sikawa tala, Lehi oyo azalaki elongo na Moroni na ndambo mingi ya bitumba na ye; mpe azalaki moto moko lokola Moroni, mpe basepelaki na bokengi ya moko na mosusu; iyo, balinganaki moko mpe mosusu, mpe lisusu balingamaki na bato nyonso ya Nefi.

3 Mpe esalemaki ete esilaki Balamani kokunda bakufi na bango mpe lisusu bakufi ya Banefi, batambwisamaki kozonga kati na mboka ya Beboo; mpe Teakumi, engebene na mibeko ya Moroni, asalaki ete babanda kosala na kotimolaka nzinganzinga mpembeni na mboka, soki te engumba yango, Beboo.

4 Mpe asalaki ete batonga etelemelo moko ya mabaya likolo ya zelo ya kati ya libulu; mpe babwakaki libanda bosoto uta na libulu ete eyekama na etelemelo ya mabaya; mpe boye basalisaki Balamani mosala kino bazingaki engumba ya Beboo nzinganzinga mpembeni na efelo moko ya makasi na mabaya mpe mabele, kino na bosanda moko ya likolo koleka.

5 Mpe engumba oyo ekomaki esika ya makasi koleka ntango nyonso awa nsima libela; mpe na engumba oyo bakengelaki Balamani ya boloko; iyo, kutu kati na efelo oyo basalaki ete bango batonga na maboko na bango moko. Sikawa Moroni asengelaki asala ete Balamani basala, mpo ezalaki mpasi te ya kokengela bango wana ezali bango na misala na bango; mpe azalaki na mposa ya basoda na ye nyonso ntango akobanda kobundisa Balamani.

6 Mpe esalemaki ete Moroni azwaki boye elonga likolo ya moko ya mampinga maleki minene ya Balamani, mpe azwaki engumba ya Muleke, oyo ezalaki moko kati na bisika ya makasi koleka ya Balamani na mboka ya Nefi; mpe boye atongaki lisusu esika moko ya makasi mpo na kobomba bato na ye ya boloko.

7 Mpe esalemaki ete amekaki lisusu te etumba moko na Balamani na mobu mona, kasi asalelaki bato na ye na komilengelaka mpo na etumba, iyo, mpe na kotongaka bisika ya makasi mpo na komibatela na Balamani, iyo, mpe lisusu na kobikisaka basi na bango mpe bana na bango uta na nzala mpe mitungisi, mpe kopesaka bilei mpo na mampinga na bango.

8 Mpe sikawa esalemaki ete mampinga ya Balamani, na mbu ya westi, na sudi, na ntango Moroni azalaki te, na ntina ya mwa poloso na kati ya Banefi; oyo ememaki bokabwani na kati na bango, bazwaki ndambo ya mabele ya Banefi, iyo, na lolenge ete bakamataki lokola ya bango motango moko ya bingumba na eteni wana ya mboka.

9 Mpe boye na ntina ya mabe na kati na bango moko, iyo, na ntina ya bokabwani mpe poloso na kati na bango moko bamitiamaki na bizalela ya likama mingi koleka.

10 Mpe sikawa tala, nazali na mwa moke ya koloba mpo na oyo etali bato ya Amona, baye, na ebandeli bazalaki Balamani; kasi na lisalisi ya Amona mpe bandeko mibali na ye, soki te kutu na nguya mpe liloba ya Nzambe, babongwanaki epayi ya Nkolo; mpe bamemamaki kati na mboka ya Zalayemila, mpe uta ntango wana babatelamaki na Banefi ntango nyonso.

11 Mpe na ntina ya ndai na bango babatelamaki uta na kokamataka lisusu manduki mpo na kobunda na bandeko na bango; mpo balapaki ndai moko ete bakosopa lisusu makila soki moke te; mpe engebene na ndai na bango balingaki kowa; iyo, balingaki kopesa bango moko nzela ete bakweya na maboko ya bandeko na bango, soki ezalaki te mpo na mawa mpe bolingo koleka boye Amona mpe bandeko na ye bazalaki na yango mpo na bango.

12 Mpe mpo na ntina oyo bamemamaki kati na mboka ya Zalayemila; mpe babatelamaki ntango nyonso na Banefi.

13 Kasi esalemaki ete emonaki bango likama, mpe mitungisi mpe mikakatano mingi oyo Banefi bazwaki mpo na bango, basimbamaki na mawa mpe bazalaki na mposa ya kokamata manduki mpo na bobateli ya ekolo na bango.

14 Kasi tala, lokola bazalaki penepene na kokamata bibundeli na bango ya bitumba, balongamaki na maloba ya Elamani mpe bandeko na ye, mpo bazalaki penepene na kobuka ndai oyo basalaki.

15 Mpe Elamani abangaki ete na kosalaka bongo babungisa milimo na bango; boye bango nyonso oyo bakotaki na liyokani oyo basengisamaki kotala bandeko na bango koleka ntango ya mitungisi na bango, na bizalela na bango ya likama na ntango oyo.

16 Kasi tala, esalemaki ete bazalaki na bana mibali mingi, baoyo bakotaki te kati na liyokani ete bakokamata te bibundeli na bango ya bitumba mpo na komibatela na banguna na bango; boye basanganaki esika moko na ntango oyo, mingi lokola bakokaki kokamata manduki, mpe bamibiangaki Banefi.

17 Mpe bakotaki kati na liyokani mpo na kobunda mpo na lipanda ya Banefi, iyo, mpo na kobatela mboka kino na bokitisi na nse ya bomoi na bango; iyo, kutu bayokanaki ete bakotika soki moke te lipanda na bango, kasi bakobunda na makambo nyonso mpo na kobatela Banefi mpe bango moko uta na boumbu.

18 Sikawa tala, ezalaki nkoto mibale ya bilenge mibali wana, oyo bakotaki kati na liyokani oyo mpe bakamataki bibundeli na bango ya bitumba mpo na kobatela ekolo na bango.

19 Mpe sikawa tala, lokola kino sikawa bazalaki te na mbeba moko mpo na Banefi, bakomaki lisusu sikawa na eleko ya ntango oyo lisungi monene; mpo bakamataki bibundeli na bango ya bitumba, mpe balingaki ete Elamani azala mokambi na bango.

20 Mpe bazalaki nyonso bilenge mibali, mpe bazalaki bilombe makasi koleka mpo na oyo etali mpiko, mpe lisusu mpo na bokasi mpe mosala; kasi tala, oyo ezalaki nyonso te—bazalaki bato oyo bazalaki solo na ntango nyonso na makambo nyonso oyo bapesamaki mokumba.

21 Iyo, bazalaki bato ya solo mpe bato ya limemia, mpo bateyamaki kobatela mitindo ya Nzambe mpe kotambola alima liboso na ye.

22 Mpe sikawa esalemaki ete Elamani atambolaki na moto ya nkoto mibale ya bilenge basoda na ye, mpo na kosunga bato bazalaki na bandelo ya mboka na sudi penepene na mbu ya westi.

23 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku mibale na mwambe ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa