Makomi
Alma 55


Mokapo 55

Moroni aboyi kokabolana bato ya boloko—Bakengeli ya Balamani basenginiami mpo na kokoma balangwi, mpe bato ya boloko Banefi bakangolami—Engumba ya Gidi ekamatami na kozanga bosopi makila. Penepene na mibu 63–62 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete ezwaki Moroni mokanda oyo, asilikaki mingi koleka, mpo ayebaki ete Amoloni azalaki na boyebi moko kobonga nie ya bokosi na ye; iyo, ayebaki ete Amoloni ayebaki ete ezalaki te mpo na ntina moko ya alima oyo etindaki ye kobunda etumba na bato ya Nefi.

2 Mpe alobaki: Tala, nakosombitinia te bato ya boloko na Amoloni, longola se soki alongoli mokano na ye, lokola nalobi na mokanda na ngai; nakolinga te kotika ye azwa nguya mingi koleka oyo azali na yango.

3 Tala, nayebi esika wapi Balamani bazali kokengela bato na ngai baoyo bakamataki bato ya boloko; mpe lokola Amoloni alingi te kondima nini nasengaki mpo na ngai na mokanda na ngai, tala, nakopesa ye engebene na maloba na ngai; iyo, nakoluka liwa na kati na bango kino bakoluka kimia.

4 Mpe sikawa esalemaki ete elobaki Moroni maloba oyo, asalaki ete bato baluka na mayele na kati ya bato na ye, ete mbele bakoka kozwa moto moko oyo azalaki eboto ya Lamani na kati na bango.

5 Mpe esalemaki ete bazwaki moto moko, oyo kani nkombo ezalaki Lamani; mpe azalaki moko ya basali ya mokonzi oyo abomamaki na Amalikia.

6 Sikawa Moroni atindaki Lamani mpe motango moko moke ya bato na ye bakende epayi ya bakengeli oyo bazalaki kokengela Banefi.

7 Sikawa Banefi bakengelemaki na engumba ya Gidi; boye Moroni aponaki Lamani mpe asalaki ete motango moko moke ya bato na ye bakende elongo na ye.

8 Mpe ezalaki mpokwa, Lamani akendaki epayi ya bakengeli baoyo bazalaki kokengele Banefi, mpe tala, bamonaki ye koyaka mpe balobaki epayi na ye atelema; kasi alobaki epayi na bango: Bobanga te; tala, nazali Molamani. Tala, tokimi uta na Banefi, mpe balali; mpe tala tokamati ndambo ya vinyo na bango mpe tomemi yango elongo na biso.

9 Sikawa eyokaki Balamani maloba oyo bayambaki ye na bosepeli; mpe balobaki epayi na ye: Pesa biso vinyo na bino, ete tokoka komela; tosepeli boye ete bomemi vinyo elongo na bino mpo tozali ya kolemba.

10 Kasi Lamani alobaki epayi na bango: Tika tobomba ndambo ya vinyo na biso kino tokokende kobunda etumba na Banefi. Kasi maloba oyo esalaki bobele ete bayoka lisusu mposa ya vinyo;

11 Mpo, balobaki: Biso tozali ya kolembe, boye tika tokamata vinyo, mpe nsima ya mwa ntango tokozwa vinyo oyo bayeli biso mpo na mposa na biso, oyo ekoyeisa biso makasi mpo na kokende kobunda na Banefi.

12 Mpe Lamani alobaki epayi na bango: Bokoki kosala engebene na mposa na bino.

13 Mpe esalemaki ete bakamataki vinyo bebo; mpe ezalaki elengi na komeka na bango, boye bakamataki yango mingi bebo koleka; mpe ezalaki makasi, mpo elengelamaki na bokasi na yango.

14 Mpe esalemaki ete bamelaki mpe basepelaki, mpe moke moke balangwaki nyonso.

15 Mpe sikawa ntango Lamani mpe bato na ye bamonaki ete bango nyonso balangwaki, mpe bazalaki kati na mpongi ya mozindo, bazongaki na Moroni mpe balobelaki ye makambo nyonso oyo malekaki.

16 Mpe sikawa oyo ezalaki engebene na mwango ya Moroni. Mpe Moroni alengelaki bato na ye elongo na bibundeli ya bitumba; mpe bakendaki na engumba ya Gidi, ntango ezalaki Balamani kati na mpongi ya mozindo mpe ya kolangwa, mpe babwakaki bibundeli ya bitumba epayi ya bato ya boloko, na lolenge ete bango nyonso bazalaki na manduki;

17 Iyo, kutu na basi na bango, mpe bana na bango nyonso, mingi lokola bakokaki kosalela ebundeli ya bitumba, ntango Moroni apesaki manduki na bato wana nyonso ya boloko; mpe makambo wana nyonso masalemaki na kimia moko ya mozindo.

18 Kasi soki balamusaka Balamani, tala balangwisamaki, mpe Banefi balingaki koboma bango.

19 Kasi tala, oyo ezalaki mposa ya Moroni te; asepelaki na bobomi to na bosopi makila te, kasi asepelaki na kobatelaka bato na ye uta na bobebisami; mpe mpo na ntina oyo ete akoka komema kozangi boyengebene likolo na ye te, alingaki te kokweya likolo ya Balamani mpe kobebisa bango na molangwa na bango.

20 Kasi akokisaki mposa na ye; mpo apesaki manduki na bato ya boloko Banefi baoyo bazalaki na kati ya efelo ya engumba, mpe apesaki bango nguya ya kolonga bozwi ya biteni wana oyo ezalaki kati na bifelo.

21 Mpe nsima asalaki ete bato oyo bazalaki elongo na ye bazonga nsima na ntaka moko uta na bango, mpe bazinga mampinga ya Balamani.

22 Sikawa tala oyo esalemaki na ntango ya butu, na lolenge ete malamukaki Balamani na ntongo bamonaki ete bazingamaki na Banefi na libanda, mpe ete bato ya boloko na bango bazwaki manduki na kati.

23 Mpe boye bamonaki ete Banefi bazalaki na nguya likolo na bango; mpe na bizalela oyo bamonaki ete elongobanaki ete babunda na Banefi te; boye bakapiteni bakonzi na bango basengaki bibundeli na bango ya bitumba, mpe bamemaki yango mpe babwakaki yango na makolo ya Banefi, na kobondelaka mpo na boboto.

24 Sikawa tala, oyo ezalaki mposa ya Moroni. Akamataki bango bato ya boloko ya etumba, mpe akamataki engumba, mpe asalaki ete bato nyonso ya boloko, oyo bazalaki Banefi babikisama; mpe basanganaki na limpinga ya Moroni, mpe bazalaki bolendisi monene na limpinga na ye.

25 Mpe esalemaki ete atindaki Balamani, oyo bakamatamaki bato ya boloko, ete babanda mosala na kolendisaka bisika ya makasi nzinganzinga penepene na engumba ya Gidi.

26 Mpe esalemaki ete ntango alendisaki engumba ya Gidi, engebene na mposa na ye, asalaki ete bato na ye ya boloko bakamatama na engumba ya Beboo; mpe lisusu akengelaki engumba wana na basoda ya makasi mingi koleka.

27 Mpe esalemaki ete, ata poloso nyonso ya Balamani, babombaki mpe babatelaki bato nyonso ya boloko oyo bakamataki, mpe lisusu basimbaki mabele mpe matomba nyonso oyo bakamataki lisusu.

28 Mpe esalemaki ete Banefi babandaki lisusu kozala balongi, mpe basengaki makoki na bango mpe matomba na bango.

29 Mbala mingi Balamani bamekaki kozinga bango mpembeni na butu, kasi na bomeki boye babungisaki bato mingi ya boloko.

30 Mpe mbala mingi bamekaki kopesa vinyo na bango epayi ya Banefi, ete babebisa bango na ngenge soki te na molangwa.

31 Kasi tala, Banefi bazalaki te malembe na komikundola Nkolo Nzambe na bango na ntango oyo ya bango ya litungisi. Bakokaki te kozwama na mitambo na bango; iyo, balingaka te komela vinyo na bango, longola se soki bapesaki ndambo yambo na boko bato ya boloko ya Balamani.

32 Mpe bazalaki boye ekenge ete ngenge epesamaki te na kati na bango; mpo soki vinyo na bango ekotia Molamani moko ngenge ekotia Monefi ngenge mpe lokola; mpe boye bazalaki komeka vinyo na bango nyonso ya makasi.

33 Mpe sikawa esalemaki ete elongobanaki mpo na Moroni amilengela mpo na kobundisa engumba ya Moliantoni; mpo tala, Balamani, na misala na bango, balendisaki engumba ya Moliantoni kino ekomaki esika ya makasi koleka.

34 Mpe bakobaki se komema basoda ya sika kati na engumba wana, mpe lisusu biloko ya kolia ya sika.

35 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku mibale na libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa