Makomi
Alma 56


Mokapo 56

Elamani atindi mokanda epayi ya Moroni, kosangelaka lisusu ezalela ya etumba na Balamani—Atipusi mpe Elamani bazwi elonga monene likolo ya Balamani—Nkoto mibale ya bana mibali ya Elamani babundi na nguya ya kokamwa, mpe moko te kati na bango abomami. Molongo ya kotanga 1, penepene na mobu 62 Liboso na mbotama ya Klisto; milongo ya kotanga 2–19, penepene na mobu 66 Liboso na mbotama ya Klisto; mpe milongo ya kotanga 20–57, penepene na mibu 65–64 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku misato ya boyangeli ya basambisi, na mokolo ya mibale na sanza ya yambo, Moroni azwaki mokanda moko uta na Elamani, kolobelaka makambo ya bato na eteni wana ya mboka.

2 Mpe oyo ezali maloba akomaki, kolobaka: Molingami ndeko na ngai ya mobali, Moroni, na Nkolo mpe na mikakatano ya etumba na biso; tala, molingami ndeko na ngai ya mobali, nazali na mwa moke ya kolobela yo mpo na oyo etali etumba na biso na eteni oyo ya mboka.

3 Tala, nkoto mibale ya bana mibali ya bato oyo wana Amona amemaki uta na mboka ya Nefi—sikawa oyebaki ete baoyo bazalaki biboto ya Lamani, oyo azalaki mwana mobali ya nkulutu ya tata na biso Lehi;

4 Sikawa nasengeli te kozongela koyebisa epayi na yo oyo etali mimesano na bango soki te bozangi boyambi na bango, mpo oyebi oyo etali makambo oyo nyonso—

5 Boye ekoki na ngai nalobela yo ete nkoto mibale ya bilenge mibali baoyo bakamataki bibundeli na bango ya bitumba, mpe balingaki ete nazala mokambi na bango; mpe toyaki mpo na kobatela ekolo na biso.

6 Mpe sikawa oyebi lisusu likambo oyo etali liyokani oyo batata na bango basalaki, ete bakokamata te bibundeli na bango ya bitumba mpo na kosopa makila ya bandeko na bango.

7 Kasi na mobu ya ntuku mibale na motoba, ntango bamonaki mitungisi na biso mpe mikakatano na biso mpo na bango, bazalaki penepene na kobuka liyokani oyo basalaka mpe kokamata bibundeli na bango ya bitumba mpo na bobateli na biso.

8 Kasi nalingaki te kopesa nzela ete babuka liyokani oyo basalaki, kobanzaka ete Nzambe akopesa biso makasi, na lolenge ete tokoyoka mpasi mingi te na ntina ya bokokisami ya ndai oyo balapaki.

9 Kasi tala, oyo ezali likambo moko oyo wapi tokoki kozwa bosepeli monene. Mpo tala, na mobu ya ntuku mibale na motoba, ngai, Elamani, natambolaki na moto ya bilenge mibali nkoto mibale baye na engumba ya Yuda, mpo na kosalisa Atipusi, oyo oponaki mokambi likolo ya bato ya eteni wana ya mboka.

10 Mpe nasangisaki nkoto mibale ya bana na ngai, (mpo balongobani mpo na kobiangama bana mibali) na limpinga ya Atipusi, na bokasi ya baoyo Atipusi asepelaki mingi koleka; mpo tala, limpinga na ye likatamaki ndambo na Balamani mpo basoda na bango babomaki motango moko monene ya bato na biso, mpo na ntina yango tosengelaki kolela.

11 Nzokande, tokoki komibondisa na likambo oyo, ete bakufaki na ntina ya ekolo na bango mpe ya Nzambe na bango, iyo, mpe bazali na esengo.

12 Mpe Balamani bakangaki lisusu bato ya boloko mingi, nyonso kati na baoyo bazali bakapiteni bakonzi, mpo batikaki mosusu na bomoi te. Mpe tobanzi ete bazali sikawa na ntango oyo na mboka ya Nefi; ezali bongo soki babomami te.

13 Mpe sikawa oyo ezali bingumba Balamani bazwaki na kosopaka makila ya bilombe bato na biso mingi mpenza;

14 Mboka ya Mati, to engumba ya Mati, mpe engumba ya Zezilomi, mpe mboka ya Kumeni, mpe mboka ya Atipala.

15 Mpe oyo ezali bingumba oyo bazwaki ntango nakomaki na engumba ya Yuda; mpe nakutaki Atipusi mpe bato na ye koyokaka mpasi na bokasi na bango mpo na kolendisa engumba yango.

16 Iyo, mpe balembaki na nzoto mpe na molimo mpe lokola, mpo babundaki lokola bilombe na moi mpe bayokaki mpasi na butu mpo na kosimba bingumba na bango; mpe boye bayokaki mpasi ya mitungisi ya ndenge na ndenge.

17 Mpe sikawa bazwaki mokano ya kolonga na kokamataka esika oyo soki te kokufa; boye okoki na ntina malamu kobanza ete basoda moke baye namemaki elongo na ngai, iyo, bana mibali oyo na ngai, bapesaki bango elikya monene mpe bosepeli boike.

18 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Balamani bamonaki ete Atipusi azwaki bokasi monene na limpinga na ye, basengelaki na mibeko ya Amoloni ete baya kobundisa engumba ya Yuda te, to kobundisa biso etumba.

19 Mpe boye nde tosungamaki na Nkolo; mpo soki bakweyelaki biso na bolembu oyo na biso bakokaki mbele kobebisa limpinga na biso ya moke; kasi boye tobatelamaki.

20 Batindamaki na Amoloni mpo na kosimba bingumba oyo bakamataki. Mpe nde boye esilaki mobu ya ntuku mibale na motoba. Mpe na ebandeli ya mobu ya ntuku mibale na nsambo tosilisaki kolengela engumba na biso mpe biso moko mpo na bobatelami.

21 Sikawa tozalaki na mposa ete Balamani baya kobundisa biso; mpo tozalaki te na mposa ete tobanda kobundisa bango na bisika na bango ya makasi.

22 Mpe esalemaki ete tobombaki banongi nzinganzinga mpembeni, mpo na kokengele botamboli ya Balamani, ete bakoka te koleka biso na butu soki te na moi mpo na kobundisa bingumba na biso mosusu oyo ezalaki epayi na nordi.

23 Mpo toyebaki ete na bingumba wana bazalaki makasi te ya kokoka mpo na kokutana na bango; boye tozalaki na mposa, soki bakoleka penepene na biso, ya kokweyela bango nsima na bango, mpe boye kozwana na bango na nsima na ntango se moko wana kokutisa bango na liboso. Tobanzaki ete tokokoka kolonga bango; kasi tala, tosiswamaki na mposa na biso oyo.

24 Bamekaki koleka penepene na biso te elongo na limpinga na bango mobimba, mpe bamekaki koleka na ndambo moko te, na kobangaka bazala makasi ya kokoka te mpe bakweya.

25 Mpe bamekaki kokita mpo na kobundisa engumba ya Zalayemila te; mpe bamekaki kokatisa moto ya Sidoni te, likolo ya engumba ya Nefiya.

26 Mpe boye, elongo na basoda na bango, bazwaki mokano ya kosimba bingumba oyo bakamataki.

27 Mpe sikawa esalemaki ete na sanza ya mibale ya mobu oyo, biloko mingi bimemamaki epayi na biso uta na batata ya bana mibali nkoto mibale na ngai wana.

28 Mpe lisusu bato nkoto mibale batindamaki epayi na biso uta na mboka Zalayemila. Mpe boye tomilengelaki na bato nkoto zomi, mpe bilei mpo na bango, mpe lisusu mpo na basi na bango mpe bana na bango.

29 Mpe Balamani, lokola bamonaki boye ete basoda na biso bazalaki koyikana mokolo na mokolo, mpe bilei koyaka mpo na lisalisi na biso, babandaki kobanga, mpe babandaki koya elulu, soki ekokaki mpo na kopekisa ete tozwa bilei mpe bokasi na biso.

30 Sikawa emonaki biso ete Balamani babandaki komitungisa na lolenge oyo, tozalaki na mposa ya kokokisa mwango moko ya mayele likolo na bango; boye Atipusi apesaki ngai mibeko ete natambola elongo na bana mibali na ngai ya mike mike mpo na kokende na engumba moko ya mpembeni, lokola soki tozalaki komema bilei na engumba ya mpembeni.

31 Mpe tosengelaki kotambola penepene na engumba ya Atipala, lokola soki tozalaki kokendaka na engumba ya ngambo mosusu, na ndelo penepene na libongo ya mbu.

32 Mpe esalemaki ete totambolaki liboso, lokola soki komemaka bilei na biso, kokende na engumba wana.

33 Mpe esalemaki ete Atipusi atambolaki elongo na ndambo moko ya limpinga na ye, kotikaka baoyo batikalaki mpo na kosimba engumba. Kasi atambolaki te kino nakendaki elongo na limpinga na ngai ya moke, mpe tokomaki penepene na engumba ya Atipala.

34 Mpe sikawa, na engumba ya Atipala limpinga ya makasi koleka ya Balamani epikamaki; iyo, ya motango monene koleka mpenza.

35 Mpe esalemaki ete lokola bayebisaki bango na banongi na bango, babelemaki na limpinga na bango mpe batambolaki mpo na kobundisa biso.

36 Mpe esalemaki ete tokimaki liboso na bango, epayi na nordi. Mpe boye tobendaki nsima na biso limpinga ya makasi mingi koleka ya Balamani.

37 Iyo, kutu na ntaka moko ya molai mpenza, na lolenge ete ntango bamonaki limpinga ya Atipusi kolandaka bango, na makasi na bango, babalukaki te na loboko ya mobali soki te na loboko ya mwasi, kasi balandaki botamboli na bango alima na nzela nsima na biso; mpe, lokola tobanzaki, ezalaki makanisi na bango mpo na koboma biso yambo ete Atipusi akanga bango, mpe oyo ete bakoka kozingama na bato na biso te.

38 Mpe sikawa Atipusi, ntango amonaki likama na biso, akomisaki botamboli ya limpinga na ye mbangu. Kasi tala, ezalaki butu; boye bakangaki biso te, mpe Atipusi akangaki bango te; boye totiaki nganda mpo na butu.

39 Mpe esalemaki ete na ntongo-ntongo, yambo ya ntongo tala, Balamani bazalaki se kolanda biso. Sikawa tozalaki te na makasi makoki mpo na kobunda na bango; iyo, nalingaki te ete bana mibali mike na ngai bakweya kati na maboko na bango; boye tokobaki botamboli na biso, mpe tokamataki botamboli na biso kati na esobe.

40 Sikawa bamekaki te kobaluka na loboko ya mobali soki te na loboko ya mwasi nakobangaka ete bazingama; mpe nalingaki te kobaluka na loboko ya mobali soki te na loboko ya mwasi mbele bakanga ngai, mpe tokokaki te kotelema mpo na kobunda na bango, kasi tolingaki kobomama, mpe balingaki kokima; mpe boye tokimaki mokolo wana nyonso kati na esobe, kutu kino ekomaki molili.

41 Mpe esalemaki lisusu ete, ntango pole ya ntongo ebimaki, tomonaki Balamani penepene na biso, mpe tokimaki liboso na bango.

42 Kasi esalemaki ete balandaki biso mosika te yambo batelema; mpe ezalaki na ntongo ya mokolo ya misato ya sanza ya sambo.

43 Mpe sikawa, soki bakamatamaki na Atipusi toyebaki te, kasi nalobaki epayi ya bato na ngai: Tala, toyebi te soki batelemaki mpo na mwango ete toya kobunda na bango, ete bakoka kokanga biso na motambo na bango;

44 Boye bolobi nini bino bana mibali na ngai, elingi bino kokende mpo na kobunda na bango?

45 Mpe sikawa nalobi epayi na yo, molingami ndeko na ngai ya mobali Moroni, ete namona naino te mpiko ya monene boye, te, te na kati ya Banefi nyonso.

46 Mpo lokola nabiangaka ntango nyonso bango bana mibali na ngai (mpo nyonso bazalaki bilenge mpenza) kutu boye balobaki epayi na ngai: Tata, tala Nzambe na biso azali elongo na biso, mpe akopesa te nzela ete tokweya; boye tika tokende; tolingaki te bandeko na biso soki batikaka biso nie; boye tika tokende, mbele bakolonga limpinga ya Atipusi.

47 Sikawa batikalaka nanu kobunda te, kasi bazalaki kobanga liwa te; mpe bazalaki kokanisa bonsomi ya batata na bango mingi koleka bomoi na bango; iyo, bateyamaki epayi na bamama na bango, ete soki batientembe te, Nzambe akobikisa bango.

48 Mpe bayebisaki epayi ngai maloba ya bamama na bango, kolobaka: Totie ntembe te ete bamama na biso bayebaki yango.

49 Mpe esalemaki ete nazongaki elongo na bana mibali nkoto mibale na ngai mpo na kobunda na Balamani baoyo balandaki biso. Mpe sikawa tala, mampinga ya Atipusi ekangaki bango, mpe etumba moko ya nsomo ebandaki.

50 Limpinga ya Atipusi elembaki, mpo batambolaki nzela molai na ntaka ya mwa ntango moke, bakomaki penepene na kokweya kati na maboko ya Balamani; mpe soki nazongaki te elongo na nkoto mibale na ngai balingaki kokokisa ntina na bango.

51 Mpo Atipusi akweyaki na mompanga, mpe mingi ya bakambi na ye, na ntina ya bolembi na bango, oyo esalemaki mpo na mbangu ya botamboli na bango—boye bato ya Atipusi, lokola babulunganisamaki na ntina ya bokwei ya bakambi na bango, babandaki kozonga nsima liboso ya Balamani.

52 Mpe esalemaki ete Balamani bazwaki mpiko, mpe babandaki kolanda bango; mpe boye ezalaki Balamani kolandaka bango na mpiko monene ntango Elamani ayelaki nsima na bango elongo na nkoto mibale na ye, mpe babandaki koboma bango mpenza, na lolenge ete limpinga mobimba ya Balamani etelemaki mpe ebalukelaki Elamani.

53 Sikawa ntango emonaki bato ya Atipusi ete Balamani bapesaki bango mokongo, basangisaki bato na bango esika moko mpe bayelaki lisusu Balamani na nsima.

54 Mpe sikawa esalemaki ete biso, bato ya Nefi, bato ya Atipusi, mpe ngai elongo na nkoto mibale na ngai, tozingaki Balamani, mpe tobomaki bango; iyo, mpenza ete basengisamaki kopesa bibundeli na bango ya bitumba mpe lisusu bango moko lokola bato ya boloko ya etumba.

55 Mpe sikawa esalemaki ete ntango bamitikaki bango moko epayi na biso, tala, natangaki bilenge mibali wana oyo babundaki elongo na ngai, kobangaka mbele mingi na bango babomamaki.

56 Kasi tala, na bosepeli monene na ngai, ezalaki na moto moko te kati na bango oyo akweyaki na mabele; iyo, mpe babundaki lokola soki na bokasi ya Nzambe; iyo, bato bayebanaki soki moke te mpo na kobundaka na bokasi ya kokamwa ya lolenge oyo; mpe na nguya makasi ya lolenge oyo bakweyaki likolo ya Balamani, ete babangisaki bango; mpe mpo na ntina oyo Balamani bamipesaki bango moko lokola bato ya boloko ya etumba.

57 Mpe lokola tozalaki na esika te mpo na bato na biso ya boloko, ete tokoka kokengela bango mpo na kobatela bango uta na mampinga ya Balamani, boye totindaki bango na mboka ya Zalayemila, mpe ndambo ya bato wana ya Atipusi baoyo babomamaki te, elongo na bango; mpe baoyo batikalaki nakamataki mpe nasangisaki bango na bilenge na ngai ya Baamoni, mpe tokamataki botamboli na biso kozongaka na engumba ya Yuda.

Bimisa na lokasa