Makomi
Alma 58


Mokapo 58

Elamani, Gidi, mpe Teomina bakamati mboka ya Mati na mayele—Balamani balongwe—Bana mibali ya bato ya Amona babatelami lokola batikali ngwi na bobateli ya lipanda mpe bondimi na bango. Penepene na mibu 63–62 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe tala, sikawa esalemaki ete ntina na biso ya nsima ezalaki kozwa engumba ya Mati; kasi tala, nzela ezalaki te ete tokoka kobimisa bango uta na engumba yango na lingomba na biso ya bato moke. Mpo tala, bamikundolaki oyo wana tosalaki kino sikawa; yango wana tokokaki te kobimisa bango uta na bisika na bango ya makasi.

2 Mpe bango bazalaki mingi mpenza koleka limpinga na biso ete tomekaki te kokende kobanda kobundisa bango na bisika na bango ya makasi.

3 Iyo, mpe ekomaki likambo elongobani ete tosalela bato na biso mpo na kosimba biteni wana ya mboka oyo tokamataki lisusu na bozwi na biso; boye ekomaki likambo elongobani ete tozela, ete tokoka kozwa bokasi mosusu uta na mboka ya Zalayemila mpe lisusu bobakisi ya bilei ya sika.

4 Mpe esalemaki ete natindaki boye bantoma epayi ya mokambi etuka ya mboka na biso, mpo na koyebisa ye oyo etali makambo ya bato na biso. Mpe esalemaki ete tozelaki kozwa bilei mpe bokasi uta na mboka ya Zalayemila.

5 Kasi tala, oyo epesaki biso bobele litomba ya moke; mpo Balamani bazalaki mpe lokola kozwa mokolo na mokolo bokasi monene, mpe lisusu bilei mingi; mpe boye nde ezalaki bizalela na biso na eleko oyo ya ntango.

6 Mpe Balamani bazalaki koya elulu mpo na kobundisa biso mbala na mbala, kozalaka na mokano na mayele mpo na kobebisa biso; nzokande tokokaki te koya kobunda na bango, na ntina ya bibombelo mpe bisika na bango ya makasi.

7 Mpe esalemaki ete tozelaki na bizalela oyo ya kokoso mpo na ntaka ya sanza mingi, kutu kino tokomaki penepene na kowa mpo na mposa ya bilei.

8 Kasi esalemaki ete tozwaki bilei, oyo bikengelamaki mpe bimemamaki epayi na biso na limpinga ya bato nkoto mibale mpo na lisalisi na biso; mpe oyo ezali lisalisi nyonso oyo tozwaki, mpo na kobatela biso moko mpe ekolo na biso uta na bokwei kati na maboko ya banguna na biso, iyo, mpo na kowela na monguna oyo kani motuya ekokaki kotangama te.

9 Mpe sikawa ntina ya matata na biso, soki te ntina nini batindaki te bokasi mosusu ya kobakisa epayi na biso, toyebaki te; boye toyokaki mpasi mpe totondaki lisusu na bobangi, kobangaka ete na nzela moko to mosusu masambisi ya Nzambe maya likolo ya mboka na biso, mpo na bokwei mpe bobebisami na biso nie.

10 Boye tosopaki mitema na biso na losambo epayi ya Nzambe, ete alinga kolendisa biso mpe kobikisa biso uta na maboko ya banguna na biso, iyo, mpe lisusu kopesa biso bokasi ete tokoka kosimba bingumba na biso, mpe mboka na biso, mpe bozwi na biso, mpo na lisalisi ya bato na biso.

11 Iyo, mpe esalemaki ete Nkolo Nzambe na biso abimelaki biso na bilaka ya sikisiki ete akobikisa biso; iyo, na lolenge ete apesaki liloba ya kimia na milimo na biso, mpe apesaki epayi na biso bondimi monene, mpe asalaki ete tolikya mpo na bokangoli na biso na ye.

12 Mpe tozwaki mpiko elongo na basoda mike na biso baye tozwaki, mpe tozalaki na ngwi na mokano moko ya kolonga banguna na biso, mpe kobatela mboka na biso, mpe bozwi na biso, mpe basi na biso, mpe bana na biso, mpe likambo ya lipanda na biso.

13 Mpe boye tokendaki na bokasi na biso nyonso kobunda na Balamani, baoyo bazalaki na engumba ya Mati; mpe totelemisaki biema na biso penepene na ngambo ya esobe, oyo ezalaki penepene na engumba yango.

14 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima, ete ntango Balamani bamonaki ete tozalaki na ndelo ya esobe oyo ezalaki penepene na engumba, batindaki banongi na bango nzinganzinga mpembeni na biso ete bakoka kobombola motango mpe bokasi ya mampinga na biso.

15 Mpe esalemaki ete ntango bamonaki ete tozalaki na bokasi te engebene na motango na biso, mpe kobangaka ete tokata bango lisalisi na bango longola se soki bayei kobunda na biso mpe koboma biso, mpe lisusu kobanzaka ete bakokoka na mpasi te kobebisa biso elongo na mampinga na bango ya motango monene, boye babandaki komilengela mpo na koya kobunda na biso etumba.

16 Mpe emonaki biso ete bazalaki komilengela mpo na kobima kobunda na biso, tala, nasalaki ete Gidi, elongo na motango moke ya bato, abombana na esobe, mpe lisusu ete Teomina mpe motango moke ya bato babombana na esobe lokola.

17 Sikawa Gidi mpe bato na ye bazalaki na loboko ya mobali mpe basusu na loboko ya mwasi; mpe ntango esilaki bango kobombana, tala, natikalaki, elongo na ndambo etikali ya mampinga na ngai, na esika se moko wana wapi totelemisaki yambo biema na biso mpo na ntango oyo Balamani bakobima mpo na kobunda.

18 Mpe esalemaki ete Balamani babimaki elongo na limpinga na bango ya motango monene mpo na kobunda na biso. Mpe ntango bayaki mpe lokola bazalaki mpembeni na kokweya likolo na biso elongo na mompanga, nasalaki ete bato na ngai, oyo bazalaki elongo na ngai, babombana kati na esobe.

19 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki biso nsima na lombangu lonene, mpo bazalaki na mposa mpenza ya kokanga biso ete bakoka koboma biso; boye balandaki biso kati na esobe; mpe tolekaki mpembeni katikati na Gidi mpe Teomina, mpenza ete babombolaki bango te na Balamani.

20 Mpe esalemaki ete ntango Balamani balekaki mpembeni, soki te ntango elekaki limpinga mpembeni, Gidi mpe Teomina batelemaki uta na bisika na bango ya bobombani, mpe bakataki banongi ya Balamani ete bazonga na engumba te.

21 Mpe esalemaki ete ntango bakataki bango, bakimaki na engumba mpe bakweyaki likolo ya bakengeli baoyo batikalaki mpo na kokengele engumba, na lolenge ete babebisaki bango mpe bakamataki engumba.

22 Sikawa oyo esalemaki mpo Balamani bapesaki nzela ete limpinga na bango mobimba, longola se bobele bakengeli bake, bakambama mosika kati na esobe.

23 Mpe esalemaki ete na nzela oyo Gidi mpe Teomina bakamataki bisika na bango ya makasi. Mpe esalemaki ete tokamataki nzela na biso, nsima ya kotambola mingi na esobe epayi na mboka ya Zalayemila.

24 Mpe emonaki Balamani ete bazalaki kotambolaka epayi na mboka ya Zalayemila, babangaki mingi koleka, mbele ezalaki na mwango moko mpo na kokamba bango na bobebisami; boye babandaki komibendana kati na esobe lisusu, iyo, kutu kozonga na nzela se moko wana bayelaki.

25 Mpe tala, ezalaki butu mpe batelemisaki biema na bango, mpo bakapiteni bakonzi ya Balamani babanzaki ete Banefi balembaki na ntina ya botamboli na bango; mpe babanzaki ete babenganaki limpinga na bango mobimba boye batiaki makanisi te mpo na oyo etali engumba ya Mati.

26 Sikawa esalemaki ete eyaki butu, nasalaki ete bato na ngai balala te, kasi batambola liboso na nzela mosusu epayi na mboka ya Mati.

27 Mpe na ntina ya botamboli oyo na biso na ntango ya butu, tala, na mokolo ya nsima tozalaki epayi mosika koleka Balamani, na lolenge ete tokomaki liboso na bango na engumba ya Mati.

28 Mpe boye esalemaki, ete na mayele oyo tokamataki engumba ya Mati na kozangaka bosopi makila.

29 Mpe esalemaki ete ntango ekomaki mampinga ya Balamani penepene na engumba, mpe emonaki bango ete tomilengelaki mpo na kokutana na bango, bakamwaki mingi koleka mpe batondaki na bobangi monene, na lolenge ete bakimaki kati na esobe.

30 Iyo, mpe esalemaki ete mampinga ya Balamani bakimaki libanda ya eteni oyo ya mboka. Kasi tala, bamemaki elongo na bango basi mpe bana mingi libanda ya mboka.

31 Mpe bingumba wana oyo ekamatamaki na maboko ya Balamani, ezali nyonso na yango na eleko oyo na bozwi na biso; mpe batata na biso mpe basi na biso mpe bana na biso bazali kozongaka epayi na bango, nyonso longola se bango oyo bakamatamaki bato ya boloko mpe baoyo bamemamaki na Balamani.

32 Kasi tala, mampinga na biso ezali moke mpo na kosimba bingumba ya motango moko monene mpe bozwi ya monene bongo.

33 Kasi tala, totii motema na Nzambe na biso oyo apesaki biso elonga likolo ya bamboka wana, na lolenge ete tozwaki bingumba wana mpe bamboka wana, oyo ezalaki ya biso moko.

34 Sikawa toyebi te ntina ete mbulamatari epesi biso te makasi mingi; mpe bato oyo bamataki epayi na biso bayebaki te ntina nini tozwaki bokasi monene koleka te.

35 Tala, tokanisi ete soki bozwaki elonga te, mpe bobendi mosika basoda kati na eteni oyo ya mboka; soki bongo, tozali na ntina ya koyima-yima te.

36 Mpe soki ezali bongo te, tala, tozali kobanga ete ezali na boko bokabwani kati na mbulamatari, ete batindi bato mingi koleka mpo na lisalisi na biso te; mpo toyebi ete bazali na motango monene koleka oyo wana batindaki.

37 Kasi, tala, likambo ezali te—totii motema ete Nzambe akobikisa biso, ata bolembi ya mampinga na biso, iyo, mpe akobikisa biso uta na maboko ya banguna na biso.

38 Tala, oyo ezali mobu ya ntuku mibale na libwa, na eleko ya nsuka mpenza, mpe tozwi mboka na biso; mpe Balamani bakimi na mboka ya Nefi.

39 Mpe bana mibali bana ya bato ya Amona, oyo nalobelaki mingi, bazali elongo na ngai na engumba ya Mati; mpe Nkolo asalisi bango, iyo, mpe abateli bango uta na bokwei na mompanga, na lolenge ete kutu moto moko te abomamaki.

40 Kasi tala, bazoki mpota mingi; nzokande batelemi ngwi kati na lipanda wana na nzela ya oyo wapi Nzambe akomisaki bango bansomi; mpe bazali sikisiki na komikundolaka Nkolo Nzambe ya bango mokolo na mokolo; iyo, batosaki kobomba meko na ye, mpe masambisi na ye, mpe mitindo na ye ntango nyonso; mpe bondimi na bango ezali makasi na masakoli matali makambo oyo ekoya.

41 Mpe sikawa, ndeko molingami na ngai, Moroni, tika Nkolo Nzambe na biso, oyo asikoli biso mpe akomisi biso bansomi, abatela yo ntango nyonso na miso na ye; iyo, mpe tika asunga bato oyo, kutu ete okoka kozwa elonga na kokamataka bozwi nyonso oyo Balamani bakamataki uta na biso, oyo ezalaki mpo na lisalisi na biso. Mpe sikawa, tala, nakangi mokanda na ngai. Nazali Elamani, mwana mobali ya Alma.

Bimisa na lokasa