Makomi
Alma 60


Mokapo 60

Moroni amileli epayi ya Pawolani mpo mbulamatari azali kotala mampinga mpamba—Nkolo apesaka nzela ete basembo babomama—Banefi basengeli kosalela nguya mpe nzela na bango nyonso mpo na komibikisa uta na banguna na bango—Moroni akaneli kobunda na mbulamatari longola se soki lisalisi epesami na mampinga na ye. Penepene na mobu 62 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete akomaki lisusu na mokambi ya etuka, oyo azalaki Pawolani, mpe oyo ezali maloba oyo akomaki, kolobaka: Tala, natindi mokanda na ngai na Pawolani, na engumba ya Zalayemila, oyo azali mosambisi mokonzi mpe mokambi etuka likolo ya mboka, mpe lisusu na nyonso oyo baponamaki na bato oyo mpo na koyangela mpe kokamba makambo ya etumba oyo.

2 Mpo tala, nazali na mwa moke ya kolobela bango lokola na nzela ya bokweisi; mpo tala, yo moko oyebi ete oponamaki mpo na kosangisa bato esika moko, mpe kopesa bango manduki ya mipanga, mpe ya nsendo, mpe ndenge nyonso ya bibundeli ya bitumba ya ndenge na ndenge, mpe kotinda bango mpo na kobunda na Balamani, na biteni nyonso wapi bakoya kati na mboka na biso.

3 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na yo ete ngai moko, mpe lisusu bato na ngai, mpe lisusu Elamani mpe bato na ye, toyoki mpasi mingi koleka; iyo, kutu nzala, mposa ya mai, mpe bolembi, mpe ndenge nyonso ya mitungisi ya ndenge na ndenge.

4 Kasi tala, soki oyo ezalaki nyonso toyokelaki mpasi tolingaki te koyima-yima to komilela-lela.

5 Kasi tala, monene ezalaki bobomi na kati ya bato na biso; iyo, nkoto na nkoto bakwei na mompanga, nzokande elingaki kozala lolenge mosusu soki otindaki epayi na mampinga na biso bokasi mpe lisalisi ya kokoka mpo na bango. Iyo, likambo oyo botali biso mpamba ezali monene.

6 Mpe sikawa tala, tozali na mposa ya koyeba ntina ya likambo monene oyo botali biso mpamba; iyo, tozali na mposa ya koyeba ntina ya ezalela na bino ya bozangi makanisi.

7 Ekoki bino kokanisa kofanda likolo ya kiti ya bokonzi na bino na ezalela moko ya bolole ya bozangi makanisi, wana ezali banguna na bino kopanzaka mosala ya liwa nzinganzinga na bino? Iyo, wana ezali bango kobomaka nkoto na nkoto ya bandeko na bino—

8 Iyo, kutu baoyo batalelaki bino mpo na bobatelami, iyo, batiaki bino na esika ete bokoka kosalisa bango, iyo, bokokaki kotinda mampinga epayi na bango, mpo na kolendisa bango, mpe kobikisa nkoto na nkoto na bango uta na kokweya na mompanga.

9 Kasi tala, oyo ezali nyonso te—bopimeli bango bilei na bino, na lolenge ete mingi babundaki mpe babimisaki makila na bango kino na liwa na ntina ya mposa monene bazalaki na yango mpo na bolamu ya bato oyo; iyo, mpe oyo basalaki yango ntango ezalaki bango penepene na kowa na nzala, na ntina ya likambo monene koleka oyo ya bino ete botali bango mpamba.

10 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai—mpo bosengelaki kolingama; iyo, mpe bosengelaki komilamusa na molende mingi koleka mpo na bolamu mpe bonsomi ya bato oyo; kasi tala, botalaki bango mpamba na lolenge ete makila ya nkoto na nkoto ekoya likolo ya mitu na bino mpo na bobekoli; iyo, mpo oyo eyebani epayi ya Nzambe ezalaki koganga nyonso na bango, mpe mpasi nyonso na bango—

11 Tala, ekoki bino kobanza ete bofanda likolo ya kiti ya bokonzi na bino, mpe na ntina ya bolamu mingi koleka ya Nzambe bosala eloko te mpe abikisa bino? Tala, soki bobanzaki oyo bobanzaki na mpamba.

12 Ezali bino kobanza ete, mpo mingi mpenza ya bandeko na bino babomami ezali na ntina ya nkuna na bango? Nalobi epayi na bino, soki bobanzaki oyo, bobanzaki na mpamba; mpo nalobi epayi na bino, ezali na mingi baoyo bakwei na mompanga; mpe tala ezali mpo na bokwei na yo;

13 Mpo Nkolo apesaka nzela ete moto ya sembo abomama ete boyengebene mpe bosambisi na ye ekoka koya likolo ya moto ya nkuna; boye bosengeli te kobanza ete basembo babungi mpo babomami; kasi tala, bakoti kati na bopemi ya Nkolo Nzambe na bango.

14 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino, nazali kobanga mingi koleka ete masambisi ya Nzambe maya likolo ya bato oyo, na ntina ya goigoi koleka na bango, iyo, kutu goigoi ya mbulamatari na biso, mpe bopoto monene koleka boye epayi na bandeko na bango, iyo, epayi na bango oyo babomamaki.

15 Mpo, soki ezalaka te mpo na nkuna oyo ebandaki yambo na moto na biso, tokokaki kotelemela banguna na biso ete bakokaki te kozwa nguya likolo na biso.

16 Iyo, soki ezalaka te mpo na etumba oyo ebimaki na kati na biso; iyo, soki ezalaka te mpo na bato ya mokonzi, baoyo basalaki ete makila mingi mpenza masopana na kati na biso moko; iyo, na ntango tozalaki kowela na kati na biso moko, soki tosangisaka bokasi na biso lokola tosalaki kino sikawa; iyo, soki ezalaka te mpo na mposa ya nguya mpe likoki oyo bato wana ya mokonzi bazalaki na yango likolo na biso; soki bakangamaki na ntina ya bonsomi na biso, mpe na bomoko elongo na biso, mpe soki bakendaki kobunda na banguna na biso, na esika ya kokamata mipanga na bango mpo na kobunda na biso, oyo ezalaki ntina ya bosopi makila mingi mpenza na kati na biso moko; iyo, soki tokendeka kobunda na bango na makasi ya Nkolo, tolingaki kopanza banguna na biso, mpo elingaki kosalema, engebene na bokokisi ya liloba na ye.

17 Kasi tala, sikawa Balamani bazali kobundisa biso, kokamataka mboka na biso, mpe bazali kobomaka bato na biso na mompanga, iyo, basi na biso mpe bana na biso, mpe lisusu komemaka bango bakangemi mosika, kosalaka ete bayoka mpasi ya ndenge nyonso ya mitungisi, mpe oyo na ntina ya nkuna monene na bango oyo bazali kolukaka nguya mpe likoki, iyo, kutu bato wana ya mokonzi.

18 Kasi mpo na nini esengeli ngai koloba mingi mpo na oyo etali likambo yango? Mpo toyebi te kasi ekoki kozala ete bino moko bozali kolukaka likoki. Toyebi te kasi ekoki kozala ete bozali lokola bato oyo batekaki ekolo na biso.

19 Soki te ezali ete botali biso mpamba mpo bozali na motema ya ekolo na biso mpe bozingami na bokengi, ete bosali te ete bilei bitindama epayi na biso, mpe lisusu bato mpo na koyeisa mampinga na biso makasi?

20 Ebosani bino mitindo ya Nkolo Nzambe na bino? Iyo, ebosani bino bokangemi ya batata na biso? Ebosani bino mbala mingi boni tobikisami uta na maboko ya banguna na biso?

21 Soki te ebanzi bino ete Nkolo akobikisa kaka biso, wana efandi biso likolo ya kiti ya bokonzi na biso mpe tosaleli te mayele oyo Nkolo apesaki epayi na biso?

22 Iyo, ekofanda bino na goigoi wana ezingami bino na nkoto na nkoto na bango, iyo, mpe zomi na zomi ya nkoto na nkoto ya bato, oyo bafandi lisusu na goigoi, nzokande ezali na nkoto na nkoto nzinganzinga mpembeni na bandelo ya mboka oyo bazali kokweyaka na mompanga, iyo, bazokisami mpe kotangaka makila?

23 Ebanzi bino ete Nzambe akotala bino lokola bato bazangi elindo ntango efandi bino nie mpe kotala makambo oyo? Tala nalobi epayi na bino Te. Sikawa nalingi bomikundola ete Nzambe alobaki ete kati ya sani ekosukwama yambo, mpe nsima libanda ya sani ekosukwama mpe lokola.

24 Mpe sikawa, longola se soki boyamboli uta na oyo bosali, mpe bobandi kotelema mpe kosala, mpe kotinda bilei mpe bato epayi na biso, mpe lokola epayi ya Elamani ete akoka kosalisa biteni wana ya ekolo na biso oyo azwi lisusu, mpe ete tokoka mpe lokola kokamata lisusu ndambo etikali ya bozwi na biso na biteni oyo, tala, ekolongobana ete towela lisusu te na Balamani kino tosukoli yambo na sani na biso ya kati, iyo, kutu moto monene ya mbulamatari na biso.

25 Mpe longola se soki bosaleli mokanda na ngai, mpe bobimi mpe bolakisi epayi na ngai molimo ya solo ya bonsomi, mpe bosali makasi mpo na koyeisa makasi mampinga na biso, mpe kopesa epayi na bango bilei mpo na lisalisi na bango, tala nakotika eteni moko ya bato- nsomi na ngai mpo na kosimba eteni oyo ya mboka na biso, mpe nakotika bokasi mpe mapamboli ya Nzambe likolo na bango, ete nguya mosusu te ekoka kosala na kobundisa bango—

26 Mpe oyo na ntina ya bondimi na bango koleka, mpe bompikiliki na bango na mikakatano na bango—

27 Mpe nakoya epayi na bino, mpe soki ezali moko na kati na bino oyo azali na mposa mpo na kozwa bonsomi, iyo, soki kutu ekozala na mwa montentei moko ya bonsomi oyo etikali, tala nakolamusa botomboki na kati na bino, kutu kino bango oyo bazali na mposa ya nguya mpe likoki bakosila.

28 Iyo, tala nakobanga te nguya na bino to likoki na bino mpe te, kasi ezali Nzambe na ngai nde nakobanga; mpe ezali engebene na mitindo na ye nakokamata mompanga na ngai mpo na kobatela ntina ya ekolo na ngai, mpe ezali na ntina ya mabe na bino ete toyoki mpasi ya bobungisi boike.

29 Tala ntango ekoki, iyo, ntango ebelemi sikawa, ete longola se soki bosali bino moko mpo na bobateli ya ekolo na bino mpe bana mike na bino, mompanga ya boyengebene modiembeli likolo na bino; iyo, mpe mokokweya likolo na bino mpe mokobimela bino kutu na bobebisami na bino nie.

30 Tala, nazali kozela lisalisi uta na bino; mpe, longola se soki bosali mpo na libondisi na biso, tala, nakoya epayi na bino, kutu na mboka ya Zalayemila, mpe nakobete bino na mompanga, na lolenge ete bokoka kozala lisusu te na nguya mpo na kopekisa botamboli liboso ya bato oyo mpo na oyo etali ntina ya bonsomi na biso.

31 Mpo tala, Nkolo akopesa te nzela ete bozala na bomoi mpe bokoma makasi na mabe na bino mpo na kobebisa bato na ye ya sembo.

32 Tala, ekoki bino kokanisa ete Nkolo akobikisa bino mpe akoya kosambisa Balamani, ntango ezali ete ezali mimesano ya batata na bango oyo ebimisi boyini na bango, iyo, mpe mibakisamaki mbala mibale na baoyo bakabwanaki uta na biso, nzokande mabe na bino ezali mpo na ntina ya bolingo na bino ya nkembo mpe biloko ya mpamba ya mokili?

33 Boyebi ete bozali kobuka mibeko ya Nzambe, mpe boyebi ete bozali koniata myango na nse ya makolo na bino. Tala, Nkolo alobi epayi na ngai: Soki bango oyo boponaki bakambi bituka na bino bayamboli te uta na masumu na bango mpe mabe na bango, bokomata mpo na kobunda na bango.

34 Mpe sikawa tala, ngai, Moroni, nasengisami, engebene na liyokani oyo nasali mpo na kobatela mitindo ya Nzambe na ngai; boye nalingi ete bokangama na liloba ya Nzambe, mpe botinda noki epayi na ngai bilei na bino mpe bato na bino, mpe na Elamani mpe lokola.

35 Mpe tala, soki bosali oyo te nakoya epayi na bino na lombangu; mpo tala, Nzambe akopesa te nzela ete towa na nzala; boye akopesa epayi na biso bilei na bino, kutu soki esengeli kozala na mompanga. Sikawa tala ete bokokisa liloba ya Nzambe.

36 Tala, nazali Moroni, kapitene mokonzi na bino. Nazali te koluka nguya, kasi kolongola yango. Nazali te koluka lokumu ya mokili, kasi nkembo ya Nzambe na ngai, mpe bonsomi mpe bolamu ya ekolo na ngai. Mpe boye nakangi mokanda na ngai.

Bimisa na lokasa