Makomi
Alma 62


Mokapo 62

Moroni atamboli mpo na kosalisa Pawolani na mboka ya Gideona—Bato ya mokonzi baoyo baboyi kobunda mpo na kobatela ekolo na bango babomami—Pawolani mpe Moroni bakamati lisusu Nefiya—Mingi ya Balamani basangani na bato ya Amona—Teakumi abomi Amoloni mpe abomami mpe lokola—Balamani Babenganami uta na mboka, mpe kimia efandisami—Elamani azongi na mosala mpe atongi Eklezia. Penepene na mibu 62–57 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Moroni azwaki mokanda oyo motema na ye mozwaki mpiko, mpe etondaki na bosepeli monene koleka na ntina ya bosembo ya Pawolani, ete azali lisusu moto oyo atekaki bonsomi mpe ntina ya ekolo na ye te.

2 Kasi alelaki mingi koleka mpe lisusu na ntina ya mabe ya bato oyo babenganaki Pawolani uta na kiti ya bosambisi, iyo, mpo na kosukisa, na ntina na bango oyo batombokaki na ekolo na bango mpe lisusu Nzambe na bango.

3 Mpe esalemaki ete Moroni akamataki motango moke ya bato, engebene na mposa ya Pawolani, mpe apesaki Lehi mpe Teakumi kozala bakomanda likolo ya ndambo etikali ya limpinga na ye, mpe akamataki botamboli na ye epayi na mboka ya Gideona.

4 Mpe atombolaki elembo ya lipanda na bisika nyonso akotaki, mpe azwaki basoda nyonso oyo akokaki na nzela ya botamboli nyonso na ye epayi na mboka ya Gideona.

5 Mpe esalemaki ete nkoto na nkoto bayaki ebele kosangana na esika ya bendele na ye, mpe bakamataki mipanga na bango mpo na bobateli ya bonsomi na bango, ete bakoka kokota kati na boumbu te.

6 Mpe boye, ntango Moroni asangisaki bato nyonso esika moko akokaki kozwa na nzela ya botamboli nyonso na ye, ayaki na mboka ya Gideona; mpe ntango basangisaki basoda na ye elongo na baye wana ya Pawolani bakomaki makasi mingi koleka, kutu makasi mingi koleka bato ya Pakusi, oyo azalaki mokonzi ya bakabwani bana oyo babenganaki bato-nsomi uta na mboka ya Zalayemila mpe bakamataki mboka.

7 Mpe esalemaki ete Moroni mpe Pawolani bakitaki elongo na mampinga na bango kati na mboka ya Zalayemila, mpe babundaki na engumba yango, mpe bakutanaki na bato ya Pakusi, na lolenge ete bayaki mpo na kobunda.

8 Mpe tala, Pakusi abomamaki mpe bato na ye bakamatamaki bato ya boloko, mpe Pawolani azongisamaki na kiti na ye ya bosambisi.

9 Mpe bato ya Pakusi bazwaki bosambisi na bango, engebene na mobeko, mpe lisusu bato wana ya mokonzi oyo bakamatamaki mpe babwakamaki kati na boloko; mpe babomamaki engebene na mobeko; iyo, bato wana ya Pakusi mpe bato wana ya mokonzi, nyonso oyo balingaki te kokamata manduki mpo na kobatela ekolo na bango, kasi balingaki kobunda na yango, babomamaki.

10 Mpe boye ekomaki likambo elongobani ete mobeko oyo etosama sikisiki mpo na bokengi ya ekolo na bango; iyo, mpe moto nyonso oyo bakutaki kowanganaka bonsomi na bango abomamaki na lombangu engebene na mobeko.

11 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi; Moroni mpe Pawolani bazongisaki kimia na mboka ya Zalayemila, na kati ya bato na bango moko, mpe bapesaki liwa na bango nyonso baoyo bazalaki solo te na ntina ya bonsomi na bango.

12 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku misato na moko ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, Moroni asalaki sasaipi ete bilei bitindama, mpe lisusu limpinga moko ya bato nkoto motoba epayi ya Elamani, mpo na kosalisa ye na kobatelaka eteni wana ya mboka.

13 Mpe asalaki lisusu ete limpinga moko ya bato nkoto motoba, elongo na boike ya bilei, bitindama na mampinga ya Lehi mpe Teakumi. Mpe esalemaki ete oyo esalemaki mpo na kolendisa mboka na etumba ya Balamani.

14 Mpe esalemaki ete Moroni mpe Pawolani, nsima ya kotika liboke moko monene ya bato na mboka ya Zalayemila, bakamataki nzela ya botamboli na bango elongo na liboke moko monene ya bato epayi na mboka ya Nefiya, mpo bazalaki na mokano ya kokweisa Balamani na engumba wana.

15 Mpe esalemaki ete lokola ezalaki bango kotambolaka epayi na mboka yango, bakamataki liboke moko monene ya bato ya Balamani, mpe babomaki mingi na bango, mpe bakamataki bilei na bango mpe bibundeli na bango ya bitumba.

16 Mpe esalemaki ete esilaki bango kokamata bango, basalaki ete bakota kati na liyokani ete bakokamata lisusu te bibundeli na bango ya bitumba mpo na kobunda na Banefi.

17 Mpe ekotaki bango kati na liyokani oyo batindaki bango bafanda elongo na bato ya Amona, mpe bazalaki na motango penepene na nkoto minei baoyo babomamaki te.

18 Mpe esalemaki ete ntango batindaka bango bakobaki botamboli na bango epayi na mboka ya Nefiya. Mpe esalemaki ete ekomaki bango na engumba ya Nefiya, batelemisaki biema na bango na esobe ya Nefiya, oyo ezali penepene na engumba ya Nefiya.

19 Sikawa Moroni azalaki na mposa ete Balamani babima mpo na kobunda na bango, likolo ya mabele ya polele; kasi Balamani, lokola bayebaki mpiko monene koleka ya bango, mpe lokola bamonaki motango monene na bango, boye bamekaki te kobima mpo na kobunda na bango; boye bayaki te kobunda na mokolo wana.

20 Mpe ntango eyaki butu, Moroni apusanaki na molili ya butu, mpe akendaki likolo ya nsonge ya efelo mpo na kononga na eteni nini ya engumba Balamani batiaki nganda elongo na limpinga na bango.

21 Mpe esalemaki ete bazalaki na esti, mpembeni na monoko ya lobala; mpe nyonso balalaki. Mpe sikawa Moroni azongaki epayi na limpinga na ye, mpe asalaki ete bango balengela singa ya makasi mpe bibutele na lombangu, mpo na kokitisama uta na nsonge ya efelo kokota kati na efelo.

22 Mpe esalemaki ete Moroni asalaki ete bato na ye bapusana mpe bamata likolo na nsonge ya efelo, mpe bakita bango moko kati na eteni wana ya engumba, iyo, kutu na westi, wapi Balamani batiaki te nganda elongo na mampinga na bango.

23 Mpe esalemaki ete nyonso bakitisamaki kati na engumba na butu, na nzela ya singa ya makasi na bango mpe bibuteli na bango; boye ntango ntongo etanaki bazalaki nyonso kati na bifelo ya engumba.

24 Mpe sikawa, elamukaki Balamani mpe emonaki bango ete mampinga ya Moroni ezalaki kati na bifelo, babangaki mingi koleka, na lolenge ete bakimaki libanda na monoko ya lobala.

25 Mpe sikawa emonaki Moroni ete bazalaki kokimaka liboso na ye, asalaki ete bato na ye bapusana mpo na kobunda na bango, mpe babomaki mingi, mpe bazingaki basusu mingi, mpe bakamataki bango bato ya boloko; mpe ndambo etikalaki bakimaki kati na mboka ya Moroni, oyo ezalaki na ndelo mpembeni na libongo ya mbu.

26 Boye ezwaka Moroni mpe Pawolani engumba ya Nefiya na kozangaka kobungisa ata molimo moko; mpe ezalaki na Balamani mingi baoyo babomamaki.

27 Sikawa esalemaki ete mingi ya Balamani baoyo bazalaki bato ya boloko bazalaki na mposa ya kosangana na bato ya Amona mpe ya kokoma bato oyo bazali nsomi.

28 Mpe esalemaki ete mingi lokola bazalaki na mposa, epayi na bango epesamaki engebene na mposa na bango.

29 Boye, bato nyonso ya boloko ya Balamani basanganaki na bato ya Amona, mpe babandaki kosala mosala mingi koleka, kolonaka mabele, kokolisaka ndenge nyonso ya mboto, mpe bibwele mpe bitonga na ndenge na ndenge; mpe boye Banefi babondisamaki uta na bozito monene; iyo, na lolenge ete babondisamaki uta na bato nyonso ya boloko ya Balamani.

30 Sikawa esalemaki ete, esilaki Moroni kozwa engumba ya Nefiya, nsima ya kokamata bato mingi ya boloko, oyo elongolaki ndambo ya mampinga ya Balamani mingi koleka, mpe nsima ya kozwa lisusu mingi ya Banefi oyo bakamatamaki bato na boloko, oyo elendisaki limpinga ya Moroni mpenza; boye Moroni akendaki uta mboka ya Nefiya na mboka ya Lehi.

31 Mpe esalemaki ete emonaki Balamani ete Moroni azalaki koya kobundisa bango, babangaki lisusu mpe bakimaki liboso ya limpinga ya Moroni.

32 Mpe esalemaki ete Moroni mpe limpinga na ye balandaki bango uta engumba na engumba, kino bakutanaki na Lehi mpe Teakumi; mpe Balamani bakimaki uta na Lehi mpe Teakumi, kutu kokitaka epayi na ndelo mpembeni na libongo ya mbu, kino bayaki na mboka ya Moroni.

33 Mpe mampinga ya Balamani masanganaki nyonso esika moko, na lolenge ete bazalaki nyonso liboke moko na mboka ya Moroni. Sikawa Amoloni, mokonzi ya Balamani, azalaki lisusu elongo na bango.

34 Mpe esalemaki ete Moroni mpe Lehi mpe Teakumi batiaki nganda elongo na mampinga na bango nzinganzinga mpembeni na ndelo ya mboka ya Moroni, na lolenge ete Balamani bazingamaki na ndelo mpembeni na esobe na sudi, mpe na ndelo mpembeni na esobe na esti.

35 Mpe boye batiaki nganda mpo na butu. Mpo tala, Banefi mpe Balamani mpe lokola balembaki na ntina ya molai mpe mpasi ya botamboli; boye bakanaki te kosala angele na ntango ya butu, longola se Teakumi; mpo asilikaki mpenza na Amoloni, na lolenge ete amonaki ete Amoloni, mpe ndeko na ye ya mobali Amalikia, bango nde bazalaki na ntina ya etumba monene mpe molai oyo kati na bango mpe Balamani, oyo ezalaki ntina ya etumba mpe bosopi makila mingi mpenza, iyo, mpe nzala mingi mpenza.

36 Mpe esalemaki ete Teakumi na nkanda na ye akendaki kati na nganda ya Balamani, mpe amikitisaki na nse likolo ya bifelo ya engumba. Mpe akendaki elongo na singa moko uta esika na esika, na lolenge ete amonaki mokonzi; mpe abwakelaki ye mosuki moko, oyo etobolaki ye penepene na motema. Kasi tala, mokonzi alamusaki basali na ye yambo akufa, na lolenge ete balandaki Teakumi, mpe babomaki ye.

37 Sikawa esalemaki ete ntango Lehi mpe Moroni bayebaki ete Teakumi akufaki, bazalaki na mawa mingi koleka; mpo tala, azalaki moto oyo abundaki lokola elombe mpo na ekolo na ye, iyo, moninga moko ya solo mpo na lipanda; mpe ayokaki mpasi mingi koleka ya mitungisi ya nsomo. Kasi tala, akufaki, mpe akendaki nzela ya mabele nyonso.

38 Sikawa esalemaki ete Moroni atambolaki na mokolo ya nsima, mpe ayaki likolo ya Balamani, na lolenge ete babomaki mingi kati na bango na bobomi monene; mpe babenganaki bango uta na mboka; mpe bakimaki, kutu ete bazongaki te lisusu na ntango wana mpo na kobunda na Banefi.

39 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato na moko ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi; mpe boye bazwaki bitumba, mpe bosopi makila, mpe nzala, mpe litungisi, mpo na ntaka ya mibu mingi.

40 Mpe ezalaki na bobomi, mpe boweli, mpe bokabwani, mpe ndenge nyonso ya mabe na kati ya bato ya Nefi; nzokande mpo na ntina ya basembo, iyo, mpo na nsambo ya basembo, babikisamaki.

41 Kasi tala, na ntina ya bolayi monene koleka ya etumba kati na Banefi mpe Balamani mingi kati na bato bakomaki mitema makasi, na ntina ya bolayi monene koleka ya etumba; mpe mingi balembisamaki na ntina ya mitungisi na bango; na lolenge ete bamikitisaki liboso ya Nzambe, kutu kati na mozindo ya bomikitisi.

42 Mpe esalemaki ete esilaki Moroni kolendisa biteni wana ya mboka oyo ekokaki kozwama na pete mingi koleka na Balamani, kino bikomaki makasi ya kokoka, azongaki na engumba ya Zalayemila; mpe lisusu Elamani azongaki na esika ya bosangoli libula na ye; mpe kimia efandisamaki lisusu na kati ya bato ya Nefi.

43 Mpe Moroni atikaki mosala ya komanda ya mampinga na ye na maboko ya mwana mobali na ye, oyo kani nkombo ezalaki Moroniya; mpe azongaki na ndako na ye moko ete akoka kolekisa ndambo etikali ya mikolo na ye na kimia.

44 Mpe Pawolani azongaki na kiti na ye ya bosambisi; mpe Elamani andimaki lisusu mokumba na ye ya koteya liloba ya Nzambe epayi ya bato; mpo na ntina ya bitumba mpe boweli boye ezalaki mingi mpenza, ekomaki likambo elongobani ete libongisi etiama lisusu na eklezia.

45 Boye, Elamani mpe bandeko na ye bakendaki, mpe basakolaki liloba ya Nzambe na nguya mingi mpo na kondimisa bato mingi nkuna na bango, oyo esalaki ete bayambola masumu na bango mpe babatisama mpo na Nkolo Nzambe na bango.

46 Mpe esalemaki ete batiaki lisusu eklezia ya Nzambe, epayi nyonso na mboka mobimba.

47 Iyo, mpe mabongisi masalemaki mpo na oyo etali mobeko. Mpe basambisi na bango, mpe basambisi bakonzi na bango baponamaki.

48 Mpe bato ya Nefi babandaki kofuluka lisusu na mboka, mpe babandaki koyikana mingi mpe kokoma lisusu makasi mingi koleka na mboka. Mpe babandaki kokola mpenza na bozwi.

49 Kasi ata bozwi na bango, soki te bokasi na bango, soki te bofuluki na bango, batombwanaki te na lolendo na miso na bango; mpe bazalaki malembe te na komikundola Nkolo Nzambe na bango; kasi bamikitisaki mingi koleka liboso na ye.

50 Iyo, bamikundolaki makambo minene Nkolo asalaki mpo na bango, ete abikisaki bango uta na liwa, mpe uta na bankanga, mpe uta na boloko, mpe uta na ndenge nyonso ya mitungisi, mpe abikisaki bango uta na maboko ya banguna na bango.

51 Mpe basambelaki epayi ya Nkolo Nzambe na bango ntango nyonso, na lolenge ete Nkolo apambolaki bango, engebene na liloba na ye, boye ete bakomaki makasi mpe bafulukaki na mboka.

52 Mpe esalemaki ete makambo oyo nyonso masalemaki. Mpe Elamani akufaki, na mobu ya ntuku misato na mitano ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa