Makomi
Alma 9


Maloba ya Alma, mpe lisusu maloba ya Amuleki, oyo basakolaki epayi ya bato oyo bazalaki na mboka ya Amoniya. Mpe lisusu babwakami kati na boloko, mpe bakangolami na nguya ya makamwisi ya Nzambe oyo ezalaki na bango, engebene na lisolo ya makomi ya Alma.

Ezali na mikapo 9 kino na nsuka ya mokapo 14.

Mokapo 9

Alma atindi bato ya Amoniya bayambola—Nkolo akotondisama na boboto mpo na Balamani na mikolo ya nsuka—Soki Banefi batiki pole, bakobebisama na Balamani—Mwana ya Nzambe akoya kala mingi te—Akosikola bango oyo bokoyambola, bakobatisama, mpe bakozala na bondimi na nkombo na Ye. Penepene na mobu 82 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe lisusu, ngai, Alma, etindamaki ngai na Nzambe ete nakamata Amuleki mpe nakende koteya lisusu epayi ya bato oyo, soki te bato oyo bazalaki na engumba ya Amoniya, esalemaki ete lokola nabandaki koteya epayi na bango, babandaki kowela na ngai, kolobaka:

2 Ozali nani? Obanzi ete tokondima litatoli ya moto moko, ata soki ateyi biso ete mabele makoleka?

3 Sikawa basosolaki te maloba oyo balobaki; mpo bayebaki te ete mabele makoleka.

4 Mpe balobaki lisusu: Tokondima te maloba na yo soki osakoli ete engumba monene oyo ekobebisama na mokolo moko.

5 Sikawa bayebaki te ete Nzambe akokaki kosala misala ya kokamwa ya lolenge oyo, mpo bazalaki bato ya mitema makasi mpe ya matoyi mangongi.

6 Mpe balobaki: Nzambe azali nani, oyo atindaka lisusu likoki mingi te koleka se moto moko na kati ya bato oyo, mpo na kosakola bango bosolo ya makambo minene mpe na kokamwa?

7 Mpe batelemaki mpo na kotia maboko na bango likolo na ngai; kasi tala, basalaki yango te. Mpe natelemaki na mpiko mpo na kosakola epayi na bango, iyo, natatolaki na mpiko epayi na bango, kolobaka:

8 Tala, O bino nkola ya nkuna mpe ya mabe, lolenge boni bobosani momeseno ya batata na bino; iyo, lolenge boni kala mingi awa te bobosani mitindo ya Nzambe.

9 Emikundoli bino te ete tata na biso, Lehi, amemamaki libanda ya Yelusaleme na loboko ya Nzambe? Emikundoli bino te ete bakambamaki nyonso na nzela ya esobe?

10 Mpe ebosani bino kala mingi te awa lolenge boni mbala mingi abikisaki batata na biso na maboko ya banguna na bango, mpe abatelaki bango uta na bobebisami, kutu uta na maboko ya bandeko na bango moko?

11 Iyo, mpe soki ezalaka te na nguya na ye oyo azanga emekiseli, mpe boboto na ye, mpe motema molai na ye epayi na biso, na ntembe te tolingaki kokatama mosika uta na etando ya mabele kala yambo na eleko ya ntango oyo, mpe mbele kotindama kozala na ezalela ya mpasi mpe lisuma ezanga nsuka.

12 Tala, sikawa nalobi epayi na bino ete atindi bino koyambola; mpe longola se soki boyamboli, bokoki na lolenge moko te kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe. Kasi tala, oyo ezali nyonso te—atindi bino koyambola, soki te akobebisa bino mpenza uta na etando ya mabele; iyo, akobimela bino na nkanda na ye, mpe na nkanda na ye ya makasi akotika te.

13 Tala, emikundoli bino te maloba alobaki epayi na Lehi, kolobaka ete: Mbala mingi lokola ekobomba bino mitindo na ngai, bokofuluka na mboka? Mpe alobaki lisusu ete: Mbala mingi lokola bokobatela te mitindo na ngai bokokatama mosika uta na miso ya Nkolo.

14 Sikawa nalingi bomikundola, ete mbala mingi lokola Balamani babombaki te mitindo ya Nzambe, bakatamaki mosika uta na miso ya Nkolo. Sikawa tomoni ete bosolo ya liloba ya Nkolo elakisami na likambo oyo, mpe Balamani bakatamaki mosika uta na miso na ye, uta na ebandeli ya bobuki mobeko na bango na mboka.

15 Nzokande nalobi epayi na bino, ete ekozala malamu mingi mpo na bango na mokolo ya bosambisi koleka bino, soki botikali na masumu na bino, iyo, mpe kutu malamu mingi mpo na bango na bomoi oyo koleka bino, longola se soki boyamboli.

16 Mpo ezali na bilaka mingi oyo epesami na Balamani; mpo ezali na ntina ya mimesano ya batata na bango oyo esali ete bango batikala na ezalela ya bozangi koyeba; boye Nkolo akotondisama na boboto epayi na bango mpe akoyeisa bomoi na bango molai na mboka yango.

17 Mpe na yoko eleko ya ntango bakomemama na kondima liloba na ye, mpe na koyeba bozangi bosolo ya mimesano ya batata na bango; mpe mingi na bango bakobikisama, mpo Nkolo akotondisama na boboto mpo na nyonso oyo bakobelela na nkombo na ye.

18 Kasi tala, nalobi epayi na bino ete soki bokobi kozala na nkuna na bino ete mikolo na bino mikoyeisama molai na mboka te, mpo Balamani bakotindama likolo na bino; mpe soki boyamboli te bakoya na ntango moko oyo boyebi te, mpe bokobimelama na bobebisami ya nie mpenza; mpe ekozala engebene na nkanda makasi ya Nkolo.

19 Mpo ye akopesa nzela te ete bozala na mabe na bino, mpo na kobebisa bato na ye. Nalobi epayi na bino ete, Te; akopesa nde nzela ete Balamani babebisa bato na ye nyonso oyo babiangami bato ya Nefi, soki ekokaki kosalema bakweya kati na masumu mpe bobuki mibeko, nsima ya kozwa pole mingi mpe boyebi boike oyo epesamaki epayi na bango na Nkolo Nzambe na bango;

20 Iyo, nsima ya kozalaka bato basungami mingi lolenge oyo na Nkolo, iyo, nsima ya kozalaka bato basungama koleka bikolo, mabota, minoko, soki te bato nyonso mosusu; nsima ya koyebisamaka makambo nyonso epayi na bango, engebene na mposa na bango, mpe bondimi na bango, mpe sambosambo na bango, mpo na oyo etali oyo ezalaki, mpe oyo ezali, mpe oyo esengeli koya;

21 Esilaki bango kobimelama na Molimo ya Nzambe; nsima ya kosolola elongo na banjelu, mpe nsima ya kolobelama na mongongo ya Nkolo; mpe nsima ya kozwa molimo ya masakoli, mpe molimo ya emoniseli, mpe lisusu makabo mingi, likabo ya kolobaka minoko, mpe likabo ya koteyaka, mpe likabo ya Molimo Mosantu, mpe likabo ya bobongoli;

22 Iyo, mpe nsima ya kobikisama na Nzambe uta na mboka ya Yelusaleme, na loboko ya Nkolo; kobikisama uta na nzala, mpe uta na bokono, mpe na lolenge nyonso ya maladi ya ndenge na ndenge; mpe nsima ya kokolisama na bokasi na etumba, ete bakoka kobebisama te; nsima ya komemama uta na boumbu mbala na mbala, mpe nsima ya kobombama mpe kobatelama kino sikawa; mpe basila kofuluka kino bazwi bozwi na biloko ya ndenge nyonso—

23 Mpe sikawa tala nalobi epayi na bino, ete soki bato oyo, baoyo bazwaki mapamboli mingi boye uta na loboko ya Nkolo, babukaki mibeko na bokeseni ya pole mpe boyebi oyo bazwaki, nalobi epayi na bino ete soki ezali boye, ete soki bakweyaki kati na bobuki mobeko, ekozala mosika malamu mingi mpo na Balamani koleka bango.

24 Mpo tala, bilako ya Nkolo epesamaki na Balamani, kasi bipesameli mpo na bino te soki bozali kobuka mobeko; mpo Nkolo alakaki polele te mpe abimisaki yango sikisiki te, ete soki bokotomboka na ye ete bokobebisama nie mpenza na etando ya mabele?

25 Mpe sikawa mpo na ntina oyo, ete bokoka kobebisama te, Nkolo atindi anjelu na ye mpo na koya kotala mingi ya bato na ye, koyebisaka epayi na bango ete basengeli kokende kobelela makasi epayi ya bato oyo, kolobaka: Boyambola, mpo bokonzi ya lola ebelemi;

26 Mpe mikolo mingi te uta sikawa Mwana ya Nzambe akoya na nkembo na ye; mpe nkembo na ye ekozala nkembo ya Mobotami se Moko ya Tata, atonda na ngolu, alima, mpe bosolo, atonda na bompikiliki, boboto, mpe motema molai, mbangu mpo na koyoka kolela ya bato na ye mpe mpo na koyanola sambo na bango.

27 Mpe tala, akoya mpo na kosikola bango oyo bakobatisama mpo na boyamboli, na nzela ya bondimi na nkombo na ye.

28 Boye, bolengela nzela ya Nkolo, mpo ntango ebelemi oyo wapi bato nyonso bakobuka mbano ya misala na bango, engebene na oyo wana bazalaki—soki bazalaki sembo bakobuka lobiko ya milimo na bango, engebene na nguya mpe lobiko ya Yesu Klisto; mpe soki bazalaki bato mabe bakobuka bokweisami ya milimo na bango, engebene na nguya mpe bokangemi ya zabulu.

29 Sikawa tala, oyo ezali mongongo ya anjelu, kobelelaka epayi ya bato.

30 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, mpo ete bozali bandeko na ngai, mpe bosengeli kozala balingami, mpe bosengeli kobimisa misala elongobani mpo na boyamboli, komonaka ete mitema na bino eyeisamaki makasi koleka na liloba ya Nzambe, mpe komonaka ete bozali bato boko babunga mpe bakweya.

31 Sikawa esalemaki ete ngai, Alma, elobaki ngai maloba oyo, tala, bato badasukaki na ngai mpo nalobaki epayi na bango ete bazali bato ya mitema makasi mpe na matoyi mangongi.

32 Mpe lisusu lokola nalobaki epayi na bango ete bazali bato babunga mpe bakweya basilikaki na ngai, mpe balukaki kotia maboko na bango likolo na ngai, ete bakoka kobwaka ngai kati na boloko.

33 Kasi esalemaki ete Nkolo apesaki te nzela ete bakamata ngai na ntango wana mpe babwaka ngai kati na boloko.

34 Mpe esalemaki ete Amuleki akendaki mpe atelemeki liboso, mpe abandaki koteya bango mpe lokola. Mpe sikawa maloba ya Amuleki ekomami nyonso te, nzokande eteni yoko ya maloba na ye ekomami na buku oyo.

Bimisa na lokasa