Makomi
Etele 3


Mokapo 3

Ndeko ya Yelede ya mobali amoni mosapi ya Nkolo wana ezalaki Ye kosimba mabanga zomi na motoba—Klisto alakisi nzoto na Ye ya molimo na ndeko ya Yelede ya mobali—Bango oyo bazali na boyebi ya bobongi nie bakoki kobombama te uta na koleka na elamba—Bibongolelo epesami mpo na komema lisolo ya makomi ya Bayelede na pole.

1 Mpe esalemaki ete ndeko ya Yelede ya mobali, (sikawa motango ya masuwa oyo malengelamaki ezalaki mwambe) akendaki epayi na ngomba, oyo babiangaki ngomba ya Salemi, na ntina ya bosanda koleka na yango, mpe aniangolaki uta na libanga moko mabanga ya mike mike zomi na motoba; mpe ezalaki mpembe mpe polele, kutu lokola talatala emonisaka na kati; mpe akumbaki yango na maboko na ye likolo ya nsonge ya ngomba, mpe abelelaki lisusu epayi ya Nkolo, kolobaka:

2 O Nkolo, olobaki ete tokozingama na mpela. Sikawa tala, O Nkolo, mpe kozala na nkanda na mosali na yo na ntina ya bolembu na ye liboso na yo te; mpo toyebi ete yo ozali mosantu mpe ofandaka na lola, mpe ete tolongobani te liboso na yo; na ntina ya te bokwei lolenge na biso ya mokili ekomaki ntango nyonso kaka mabe; nzokande, O Nkolo, opesaki biso motindo ete tosengeli kobelela yo, ete uta na yo tokoka kozwa engebene na bamposa na biso.

3 Tala, O Nkolo, obetaki biso na ntina ya mabe na biso, mpe obenganaki biso, mpe mibu oyo mingi tofandaki kati na esobe; nzokande, otondisamaki na boboto mpo na biso. O Nkolo, tala ngai na mawa, mpe lola mosika nkanda na yo uta na bato oyo ya yo, mpe kotika te ete bakatisa mozindo oyo ezali kongala kati na molili; kasi tala biloko oyo, oyo naniangoli uta na libanga.

4 Mpe nayebi, O Nkolo, ete ozali na nguya nyonso, mpe okoki kosala nini olingi mpo na litomba ya moto; yango wana simba mabanga oyo, O Nkolo, na mosapi na yo, mpe lengela yango ete makoka kongenga na molili; mpe makongenga mpo na biso kati na masuwa oyo tolengeli, ete tokoka kozala na pole wana ekokatisa biso mbu.

5 Tala, O Nkolo, okoki kosala oyo. Toyebi ete ozali na makoki mpo na kolakisa nguya monene, oyo ekomonana moke na bososoli ya bato.

6 Mpe esalemaki ete ntango ndeko ya Yelede ya mobali alobaki maloba oyo, tala, Nkolo asembolaki loboko na ye mpe asimbaki mabanga moko na moko na mosapi na ye. Mpe elamba elongwaki uta na miso ya ndeko ya Yelede ya mobali, mpe amonaki mosapi ya Nkolo; mpe ezalaki lokola mosapi ya moto, lokola se ya mosuni mpe makila; mpe ndeko ya Yelede ya mobali akweyaki na nse liboso ya Nkolo, mpo abetamaki na bobangi.

7 Mpe Nkolo amonaki ete ndeko ya Yelede ya mobali akweyaki na mabele; mpe Nkolo alobaki epayi na ye: Telema, okwei mpo na nini?

8 Mpe alobaki epayi ya Nkolo: namonaki mosapi ya Nkolo, mpe nabangaki mbele abeta ngai; mpo ngai nayebaki te ete Nkolo azalaki na mosuni mpe makila.

9 Mpe Nkolo alobaki epayi na ye: Na ntina ya bondimi na yo omoni ete nakokamata likolo na ngai mosuni mpe makila; mpe moto moko te atikala soki moke koya liboso na ngai na bondimi mingi koleka ya lolenge oyo lokola ozali na yango; mpo soki ezalaka bongo te okokaki komona mosapi na ngai te. Emoni yo mingi koleka oyo?

10 Mpe ayanolaki: Te; Nkolo, milakisa epayi na ngai.

11 Mpe Nkolo alobaki epayi na ye: Endimi yo maloba oyo nakoloba?

12 Mpe ayanolaki: Iyo, Nkolo, nayebi ete yo olobaka bosolo, mpo ozali Nzambe ya bosolo, mpe okoki kokosa te.

13 Mpe ntango alobaki maloba oyo, tala, Nkolo amilakisaki epayi na ye, mpe alobaki: Mpo oyebi makambo oyo okosikolama uta na bokwei; boye ozongisami na miso na ngai; boye namilakisi epayi na yo.

14 Tala, nazali ye oyo alengelamaki uta na bokelami ya mokili mpo na kosikola bato na ngai. Tala, nazali Yesu Klisto. Nazali Tata mpe Mwana. Na ngai bato nyonso bakozwa bomoi, mpe boye ya seko, kutu bango oyo bakondima na nkombo na ngai; mpe bakokoma bana mibali na ngai mpe bana basi na ngai.

15 Mpe namilakisi soki moke te epayi ya moto oyo nakelaki, mpo moto moko te atikala kondima na ngai lokola yo. Emoni yo ete okelamaki na elilingi ya ngai moko? iyo, kutu bato nyonso bakelamaki na ebandeli na elilingi ya ngai moko.

16 Tala, nzoto oyo, oyo omoni sikawa, ezali nzoto ya molimo na ngai; mpe moto nakelaki ye na lolenge ya nzoto ya molimo na ngai; mpe kutu lokola namonani epayi na yo mpo na kozala na molimo nakomonana epayi ya bato na ngai na mosuni.

17 Mpe sikawa, ngai, Moroni, nalobaki, nakokaki te kosala lisolo mobimba ya makambo oyo ekomami, boye ekoki na ngai mpo na koloba ete Yesu amilakisaki epayi na moto oyo na molimo, na lolenge mpe na bokokani ya nzoto se moko oyo wana kutu lokola amilakisaki epayi na Banefi.

18 Mpe asalaki epayi na ye kutu lokola asalaki epayi ya Banefi; mpe nyonso oyo, ete moto akoka koyeba ete azalaki Nzambe, na ntina ya misala minene oyo Nkolo alakisaki epayi na ye.

19 Mpe na ntina ya boyebi ya moto oyo, bakokaki te kobombama uta na koleka na elamba; mpe amonaki mosapi ya Yesu, oyo, ntango amonaki yango, akweyaki na bobangi; mpo ayebaki ete ezalaki mosapi ya Nkolo; mpe azalaki lisusu te na bondimi, mpo ayebaki, kotiaka ntembe na eloko te.

20 Yango wana, lokola azalaki na boyebi ya bobongi nie ya Nzambe, akokaki kobombama te uta na koleka na elamba; yango wana amonaki Yesu; mpe ye asalelaki ye.

21 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi ya ndeko ya Yelede ya mobali: Tala, okopesa nzela te ete makambo oyo, oyo omoni mpe oyoki makende epayi na mokili, kino ntango ekoya ete nakembela nkombo na ngai na mosuni; yango wana, okotuya makambo oyo omonaki mpe oyokaki, mpe okolakisa yango na moto moko te.

22 Mpe tala, ntango okoya epayi na ngai, okokoma yango mpe okokanga yango, ete moko te akoka kolimbola yango; mpo okokoma yango na lokota moko ete makoka kotangama te.

23 Mpe tala, nakopesa epayi na yo mabanga mibale oyo, mpe okokanga yango esika moko na makambo oyo okokoma.

24 Mpo tala, lokota oyo okokoma nabulunganisi yango; yango wana nakosala na ntango esengeli ya ngai moko ete mabanga oyo makomisa makambo oyo okokoma polele na miso ya bato.

25 Mpe ntango Nkolo alobaki maloba oyo, alakisaki epayi na ndeko ya Yelede ya mobali bafandi nyonso ya mabele oyo bazalaki, mpe lisusu nyonso oyo bakozala; mpe alongolaki bango uta na bomoni na ye te, kutu kino na nsuka ya mabele.

26 Mpo alobaki epayi na ye na ntango ya liboso, ete soki akondima na ye ete akoka kolakisa epayi na ye makambo nyonso—ekolakisama epayi na ye; boye Nkolo akokaki kolongola eloko moko te uta na ye, mpo ayebaki ete Nkolo akokaki kolakisa ye makambo nyonso.

27 Mpe Nkolo alobaki epayi na ye: Koma makambo oyo mpe kanga yango; mpe nakolakisa yango na ntango esengeli ya ngai moko epayi ya bana ya bato.

28 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki ye kokanga mabanga mibale oyo azwaki, mpe alakisa yango te, kino Nkolo akolakisa yango epayi ya bana ya bato.

Bimisa na lokasa