Makomi
Elamani 15


Mokapo 15

Nkolo apesaki Banefi etumbu mpo Alingaki bango—Balamani babongwana bazali ngwi mpe molende na bondimi—Nkolo akotondisama na boboto epayi ya Balamani na mikolo ya nsuka. Penepene na mobu 6 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, tala, nayebisi epayi na bino ete longola se soki boyamboli bandako na bino ekotikala mpamba.

2 Iyo, longola se soki boyamboli, basi na bino bakozala na ntina monene ya kolela na mokolo oyo wapi bakomelisa bana mabele; mpo bakomeka kokima mpe esika ya kobombana ekozala te; iyo, mpe lisuma epayi na bango oyo bakozala na mwana, mpo bakozala bozito mpe bakokoka kokima te; boye, bakoniatama na nse mpe bakotikala mpo na kowa.

3 Iyo, lisuma epayi ya bato oyo babiangami bato ya Nefi longola se soki bayamboli, ntango ekomona bango bilembo oyo nyonso mpe makamwisi oyo makolakisama epayi na bango; mpo tala, bazalaki bato baponami na Nkolo; iyo, bato ya Nefi alingaki bango, mpe lisusu apesaki bango etumbu; iyo, na mikolo ya mabe na bango nde apesaki bango etumbu mpo alingaka bango.

4 Kasi tala bandeko na ngai, Balamani ayinaki bango mpo misala na bango ezalaki ntango nyonso mabe, mpe oyo na ntina ya mabe ya momeseno ya batata na bango. Kasi tala, lobiko eyaki epayi na bango na nzela ya mateya ya Banefi; mpe mpo na ntina oyo Nkolo abendaki mikolo na bango molai.

5 Mpe nalingi botala ete eteni eleki mingi na bango bazali na nzela ya lotomo na bango, mpe bazali kotambola na bokebi liboso ya Nzambe, mpe batosi kobomba mitindo na ye mpe meko na ye mpe masambisi na ye engebene na mobeko ya Mose.

6 Iyo, nalobi epayi na bino, ete eteni eleki mingi na bango bazali kosala oyo, mpe bazali kosalaka makasi na molende ya kolembe te ete bakoka komema ndambo etikali ya bandeko na bango na boyebi ya bosolo; boye bazali mingi baoyo babakisami mokolo na mokolo na motango na bango.

7 Mpe tala, boyebi mpo na bino moko, mpo botatoli yango, ete lokola mingi na bango bamemami na boyebi ya bosolo, mpe bayebi mimesano ya nkuna mpe ya nsomo ya batata na bango, mpe bakambami mpo na kondima makomi masantu, iyo, masakoli ya baprofeta basantu, oyo ekomami, oyo matindaka bango kozala na bondimi epayi ya Nkolo, mpe na boyamboli, boye bondimi mpe boyamboli ememaka mbongwana ya motema epayi na bango—

8 Boye, mingi lokola bayei na boyebi boye, boyebi mpo na bino moko ete bazali ngwi mpe molende kati na bondimi, mpe kati na likambo mpo na oyo wapi bakomisami nsomi.

9 Mpe boyebi lisusu ete bakundaki bibundeli na bango ya bitumba mpe babangi kokamata yango lisusu ete mbele na yokna nzela soki te mosusu bakosumuka; iyo, bokoki komona ete babangi kosumuka—mpo tala bakopesa nzela bango moko ete baniatama na nse mpe babomama na banguna na bango, mpe bakotombola te mipanga na bango mpo na kobunda na bango, mpe oyo na ntina ya bondimi na bango na Klisto.

10 Mpe sikawa, na ntina ya molende na bango ntango bandimeli likambo wana oyo bandimi, mpo na ntina ya botelemi ngwi na bango ntango pole engengisi bango, tala, Nkolo akopambola bango mpe akoyeisa mikolo na bango molai, ata mabe na bango—

11 Iyo, kutu soki bokobeba moke moke kati na bozangi boyambi Nkolo akoyeisa mikolo na bango molai, kino ntango ekoya oyo elobamaki na batata na biso, mpe lisusu na profeta Zenosi, mpe baprofeta basusu mingi, mpo na oyo etali bozongisi ya bandeko na biso, Balamani, lisusu na boyebi ya bosolo—

12 Iyo, nalobi epayi na bino, ete na bantango ya nsuka bilako ya Nkolo epesami na bandeko na biso, Balamani; mpe ata mitungisi mingi oyo bakozwa, mpe ata bakobenganama epayi na epayi likolo ya etando ya mabele, mpe bakolandama, mpe bakobetama mpe bakopanzama bipayi na bipayi, kozalaka na esika mpo na kobombana te, Nkolo akotondisama na boboto epayi na bango.

13 Mpe oyo ezali engebene na lisakoli, ete bakomemama lisusu na boyebi ya solo, boye ezali boyebi ya Mosikoli na bango, mpe mobateli monene mpe ya solo na bango, mpe bakotangama na kati ya mpate na ye.

14 Boye nalobi epayi na bino, ekozala malamu mingi mpo na bango koleka mpo na bino longola se soki boyamboli.

15 Mpo tala, soki misala ya bokamwi elakisami epayi na bango oyo elakisamaki epayi na bino, iyo, epayi na bango oyo babebisami moke moke kati na bozangi boyambi na ntina ya mimesano ya batata na bango, bokoki komona na bino moko ete balingaki mokolo moko lisusu te kobebisama moke moke kati na bozangi bondimi.

16 Boye, elobi Nkolo: Nakobebisa bango nie, kasi nakosala ete na mokolo ya bwania na ngai bakozonga lisusu epayi na ngai, elobi Nkolo.

17 Mpe sikawa tala, elobi Nkolo, mpo na oyo etali bato nyonso ya Banefi: Soki bakoyambola te, mpe bakotosa kosala bolingi na ngai te, nakobebisa bango nie, elobi Nkolo, na ntina ya bozangi boyambi na bango ata misala ya bokamwi mingi oyo nasali na kati na bango; mpe na ntembe te lokola Nkolo azali na bomoi makambo oyo ekozala, elobi Nkolo.

Bimisa na lokasa