Makomi
Yakobo 3


Mokapo 3

Bapeto na motema bazwi liloba ya elengi ya Nzambe—Boyengebene ya Balamani eleki boye ya Banefi—Yakobo akebisi bato na bondumba, bonsoni, mpe masumu nyonso. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Kasi tala, ngai, Yakobo, nalingi kolobela bino baoyo bozali peto na motema. Talela Nzambe na botelemeli ngwi ya mayele, mpe sambela na ye na bondimi ya koleka, mpe akobondisa bino na mitungisi na bino, mpe akosamba likambo na bino, mpe akotinda boyengebene na nse likolo ya baoyo bazali koluka bobebisami na bino.

2 O bino nyonso oyo bozali peto na motema, botombolamitu na bino mpe bozwa liloba ya elengi ya Nzambe, mpe bosala lipati likolo ya bolingo na ye; mpo bokoki, soki mayele na bino ezali ngwi, libela.

3 Kasi, lisuma, lisuma, epayi na bino baoyo bozali peto na motema te, baoyo bozali na mokolo oyo na bosoto liboso ya Nzambe; mpo longola se soki boyamboli mboka elakelami mabe mpo na ntina na bino; mpe Balamani, baoyo bazali na bosoto te lokola bino, ata soki balakelami mabe na bolakeli ya nsomo, bakofiakola bino kino na bobebisami.

4 Mpe ntango ezali koya na lombangu, ete longola se soki boyamboli bakozwa mboka ya bosangoli libula na bino, mpe Nkolo Nzambe akokamba mosika basembo uta na kati na bino.

5 Tala, Balamani bandeko na bino, baoyo boyini na ntina ya bosoto na bango mpe bolakeli mabe oyo eyaki likolo ya mposo na bango, bazali sembo mingi koleka bino; mpo babosani te motindo ya Nkolo, oyo mopesamaki epayi ya tata na biso—ete bakozala na mwasi soki azali bobele moko, mpe bamakango bakozwa moko te, mpe pite ekosalema te na kati na bango.

6 Mpe sikawa, motindo oyo nde bazali kotosa kobatela; yango wana, na ntina ya botosi boye, na kobombaka motindo oyo, Nkolo Nzambe akobebisa bango te, kasi akoyokela bango mawa; mpe mokolo moko bakokoma bato oyo bapambolami.

7 Tala, mibali na bango balingi basi na bango, mpe basi na bango balingi mibali na bango; mpe mibali na bango mpe basi na bango balingi bana na bango; mpe bozangi boyambi na bango mpe boyini na bango epayi na bino ezali mpo na mabe ya batata na bango; yango wana, lolenge boni bino bato oyo bozali malamu koleka bango, na miso ya Mokeli monene na bino?

8 O bandeko mibali na ngai, nazali kobanga ete longola se soki bokoyambola uta na masumu na bino ete mposo na bango ekozala mpembe koleka ya bino, ntango bokomemama elongo na bango liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.

9 Yango wana, motindo moko napesi epayi na bino, oyo mozali liloba ya Nzambe, ete botiola lisusu bango te na ntina ya boyindo ya mposo na bango; mpe bokotiola bango te na ntina ya bosoto na bango; kasi bokomikundola bosoto na bino moko, mpe bokomikundola ete bosoto na bango eyaki na ntina ya batata na bango.

10 Yango wana, bokomikundola bana na bino, lolenge boni ete boyokisi mitema na bango mpasi na ntina ya ndakisa oyo botie liboso na bango; mpe lisusu, bokomikundola ete bokoki, na ntina ya bosoto na bino, komema bana na bino na bobebisami, mpe masumu na bango ebakisama likolo ya mitu na bino na mokolo ya nsuka.

11 O bandeko na ngai, boyoka maloba na ngai; bolamusa nguya ya molimo na bino; boningana bino moko ete bokoka kolamuka uta na mpongi ya liwa; mpe bomikangola bino moko uta na bolozi ya lifelo ete bokoka kokoma banjelu ya zabulu te, mpo na kobwakama kati na liziba ya moto mpe libanga ya fofolo oyo ezali liwa ya mibale.

12 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nalobaki makambo mingi koleka epayi ya bato ya Nefi, kokebisaka bango na bondumba mpe mposa mabe ya bonsoni, mpe masumu ya ndenge na ndenge, na koyebisaka bango malandi na yango ya nsomo.

13 Mpe eteni ya nkama ya botamboli ya misala ya bato oyo, baye sikawa babandaki kokoma ebele, ekoki te kokomama likolo ya bapalaki oyo; kasi mingi ya botamboli ya misala na bango ekomami likolo ya bapalaki ya minene, mpe bitumba na bango, mpe boweli na bango, mpe biyangeli ya bakonzi na bango.

14 Bapalaki oyo ebiangami bapalaki ya Yakobo, mpe esalemaki na loboko ya Nefi. Mpe natie nsuka na kolobaka maloba oyo.

Bimisa na lokasa