Makomi
Yakobo 7


Mokapo 7

Selemi awangani Klisto, aweli na Yakobo, asengi elembo, mpe abetami na Nzambe—Baprofeta nyonso balobeli Klisto mpe Bomikabi na Ye—Banefi bawumeli mikolo na bango lokola batelengani, bato babotami na mikakatano, mpe bayinami na Balamani. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki wana elekaki mwa mibu, moto ayaki na kati ya bato ya Nefi, oyo kani nkombo ezalaki Selemi.

2 Mpe esalemaki ete abandaki koteya na kati ya bato, mpe koyebisa epayi na bango ete ekozala na Klisto te. Mpe ateyaki makambo mingi oyo ezalaki ya koleteka epayi ya bato; mpe asalaki makambo oyo ete akoka kokweisa malongi ya Klisto.

3 Mpe asalaki na molende ete akoka kobungisa nzela ya mitema ya bato, na lolenge ete abungisaki nzela ya mitema ya bato; mpe lokola ayebaki ete ngai, Yakobo, nazali na bondimi na Klisto oyo akoya, alukaki mingi libaku ete akoka koya epayi na ngai.

4 Mpe azalaki moto ayekola, ete azalaki na boyebi moko ya kobonga nie ya lokota ya bato; yango wana, akokaki kosalela malete mingi, mpe nguya mingi ya maloba, engebene na nguya ya zabulu.

5 Mpe azalaki na elikya ya koningisa ngai uta na bondimi, atako bimoniseli mingi mpe makambo mingi oyo namonaki mpo na oyo etali makambo oyo; mpo solo namonaki banjelu, mpe basalelaki ngai. Mpe lisusu, nayokaki mongongo ya Nkolo kolobelaka ngai na liloba mpenza, mbala na mbala; yango wana, nakokaki koningisama te.

6 Mpe esalemaki ete ayaki epayi na ngai, mpe na lolenge oyo alobelaki ngai, kolobaka: Ndeko ya Yakobo ya mobali, naluki mingi libaku ete nakoka koloba na yo; mpo nayokaki mpe nayebi lisusu ete otambolaka mingi, koteyaka oyo obiangi nsango malamu, soki te malongi ya Klisto.

7 Mpe obungisi mosika ebele ya bato oyo ete basantola nzela ya semba ya Nzambe, mpe babatela te mobeko ya Mose oyo ezali nzela semba; mpe babongola mobeko ya Mose na bokumbameli ya moto uta na lola oyo olobi akoya nsima ya mibu nkama uta sikawa. Mpe sikawa tala, ngai, Selemi, nalobi epayi na yo ete oyo ezali botuki; mpo moto moko te ayebi makambo ya lolenge wana; mpo akoki te kolobela makambo ekoya. Mpe na lolenge oyo Selemi awelaki na ngai.

8 Kasi tala, Nkolo Nzambe asopaki Molimo na ye kati na molimo na ngai, na lolenge ete nayokisaki ye nsoni na maloba na ye nyonso.

9 Mpe nalobaki epayi na ye: Ozali kowangana Klisto oyo akoya? Mpe alobaki: Soki ezalaka na Klisto nalingaki kowangana ye te; kasi nayebi ete ezali na Klisto te, mpe azalaki te, to mpe te akozala soki moke te.

10 Mpe nalobaki epayi na ye: Ondimaka makomi? Mpe alobaki, Iyo.

11 Mpe nalobaki epayi na ye: Bongo ososolaka yango te; mpo ezali solo kotatola Klisto. Tala nalobi epayi na yo ete moko te ya baprofeta akomaki, to asakolaki, longola se soki balobaki mpo na ntina ya Klisto oyo.

12 Mpe oyo ezali nyonso te—yango emonisamaki epayi na ngai, mpo nayokaki mpe namonaki; mpe lisusu emonisamaki epayi na ngai na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana, nayebi ete soki ezalaki ete bomikabi esalemaka te bato nyonso basengelaki kobunga.

13 Mpe esalemaki ete alobaki epayi na ngai: Lakisa ngai elembo na nguya oyo ya Molimo Mosantu, na oyo kani ozali koyeba mingi boye.

14 Mpe nalobaki epayi na ye: Nini nazali mpo ete nasenginia Nzambe mpo na kolakisa epayi na yo elembo na makambo oyo oyebi ezali solo? Kasi olingi kowangana yango, mpo ozali ya zabulu. Nzokande bolingi na ngai esalema te; kasi soki Nzambe akobeta yo, tika yango ezala elembo epayi na yo mpo ete ye azali na nguya, na lola mpe na mabele; mpe lisusu, ete Klisto akoya. Mpe bolingi na yo, O Nkolo, esalema, kasi na ngai te.

15 Mpe esalemaki ete esilaki ngai, Yakobo, koloba maloba oyo, nguya ya Nkolo eyaki likolo na ye, na lolenge ete akweyaki na mabele. Mpe esalemaki ete aleisamaki mpo na ntaka ya mikolo mingi.

16 Mpe esalemaki ete alobaki epayi ya bato: Bosangana esika moko na mokolo ya nsima, mpo nakokufa; yango wana, nazali na mposa ya kolobela bato yambo nakufa.

17 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima ebele ya bato basanganaki esika moko; mpe alobelaki bango polele mpe awanganaki makambo oyo alakisaki bango, mpe atatolaki Klisto, mpe nguya ya Molimo Mosantu, mpe lisalisi ya banjelu.

18 Mpe alobelaki bango polele, ete akosamaki na nguya ya molimo ya zabulu. Mpe alobelaki lifelo, mpe boseko mpe etumbu ya seko.

19 Mpe alobaki: Nazali kobanga mbele nasalaki lisumu oyo elimbisamaka te, mpo ete nakosaki Nzambe; mpo nawanganaki Klisto, mpe nalobaki ete nandimi makomi; mpe solo ezali kotatola ye. Mpe lokola boye nakosaki Nzambe nazali kobanga mpenza mbele likambo na ngai ekozala ya nsomo; kasi natubeli epayi ya Nzambe.

20 Mpe esalemaki ete esilaki ye koloba maloba oyo akokaki lisusu koloba te, mpe azongisaki molimo.

21 Mpe ntango ebele ya bato bamonaki ete alobaki makambo oyo wana ezalaki ye penepene ya kozongisa molimo, bakamwaki mpenza; mpo ete nguya ya Nzambe ekitaki likolo na bango, mpe balongamaki ete bakweyaki na mabele.

22 Sikawa, likambo oyo ezalaki elengi epayi na ngai, Yakobo, mpo nasengaka yango na Tata na ngai oyo azali na lola; mpo ayokaka koganga na ngai mpe ayanolaka losambo na ngai.

23 Mpe esalemaki ete kimia mpe bolingo ya Nzambe ezongisamaki lisusu na kati ya bato; mpe balukaki kososola makomi, mpe bayokaki lisusu te maloba ya moto oyo ya nkuna.

24 Mpe esalemaki ete nzela mingi ekanisamaki mpo na kobongisa mpe kozongisa Balamani na boyebi ya bosolo; kasi yango nyonso ezalaki mpamba, mpo basepelaki mingi na bitumba mpe na bosopi makila, mpe bazalaki na boyini ya seko na biso, bandeko na bango. Mpe balukaki na nguya ya manduki na bango kobebisa biso ntango nyonso.

25 Yango wana, bato ya Nefi balendaki na kotelemela bango na manduki na bango, mpe na bokasi na bango nyonso, kotiaka motema na bango na Nzambe mpe libanga ya lobiko na bango; yango wana, bakomaki sikawa, balongi ya banguna na bango.

26 Mpe esalemaki ete ngai, Yakobo, nabandaki kokoma mobange; mpe lisolo ya makomi ya bato oyo ebombamaki na bapalaki mosusu ya Nefi, yango wana, nasukisi lisolo ya makomi oyo, koyebisaka ete nakomaki engebene na boyebi malamu koleka na ngai, na kolobaka ete ntango esili koleka mpo na biso, mpe lisusu bomoi na biso elekaki lokola soki ezalaki ndoto mpo na biso, mpo tozalaki bato boko ya etike mpe ya lipombo, mitelengani, tobwakamaki uta na Yelusaleme, tobotamaki na mokakatano, na esobe, mpe toyinamaki na bandeko na biso, yango nde ebimisaki bitumba mpe boweli; yango wana, tolelaki mpenza na nsuka ya mikolo na biso.

27 Mpe ngai, Yakobo, namonaki ete nasengelaki kala mingi te kokita na lilita na ngai; yango wana nalobaki epayi ya mwana na ngai Enosa: Kamata bapalaki oyo. Mpe nayebisaki ye makambo oyo ndeko na ngai ya mobali Nefi atindaki ngai, mpe alakaki botosi mpo na etinda yango. Mpe natiaki nsuka na nkoma na ngai likolo ya bapalaki oyo, oyo nkoma ezalaki moke; mpe na motangi natombeli sese, kolikyaka ete mingi ya bandeko na ngai bakoki kotanga maloba na ngai. Bandeko na ngai, eseseli.

Bimisa na lokasa