Makomi
Mosiya 14


Mokapo 14

Yisaya alobi na ntina ya Masiya—Bosambwisi mpe mpasi ya Masiya elimbolami—Akomisi molimo na ye libonza mpo na masumu mpe asali libondeli mpo na babuki mobeko—Meka na Yisaya 53. Penepene na mobu 148 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Iyo, kutu Yisaya alobi te ete: Nani andimaki mbando na biso, mpe na nani ebimisami loboko ya Nkolo?

2 Mpo akokola liboso na ye lokola nzete ya petepete, mpe lokola mosisa libanda ya mabele ekawuka; azalaki na lolenge te soki te na lipombo te; mpe ntango tokomona ye ezali na kitoko te ete tozala na mposa na ye.

3 Atiolamaki mpe abwakamaki na bato; moto ya mawa, mpe amesenaki na mpasi; mpe tobombanaki, lokola soki ezalaki ete tobalusi bilongi na biso uta na ye; atiolamaki, mpe topesaki ye lokumu te.

4 Na ntembe te akumbaki mpasi na biso, mpe amemaki mawa na biso; nzokande tomonaki ye aniokwamaki, abetamaki na Nzambe, mpe atungisamaki.

5 Kasi azokisamaki mpota mpo na bobuki mobeko na biso, akatamaki mpota mpo na mabe na biso; etumbu ya kimia na biso ezalaki likolo na ye; mpe na mapipi na ye tobikisami.

6 Biso nyonso, lokola mpate, tokendaki mpembeni; tobalukaki moto na moto na nzela ya ye moko; mpe Nkolo atiaki likolo na ye mabe na biso nyonso.

7 Anyokwamaki, mpe atungisamaki, nzokande afungolaki monoko na ye te; amemamaki lokola mwana ya mpate epayi na mobomi, mpe lokola mpate azalaka baba liboso ya bakati nsuki na ye boye afungolaki te monoko na ye.

8 Azwamaki uta na boloko mpe uta na bosambisi; mpe nani akolobela nkola na ye? Mpo babomaki ye uta na mboka ya baye ya bomoi; mpo na bobuki mobeko na bato na ngai nde aniokwamaki.

9 Mpe asalaki lilita na ye elongo na bato ya nkuna, mpe liwa na ye elongo na moto na bozwi; mpo asalaki mabe te, mpe ezalaki na bobubi te na monoko na ye.

10 Nzokande esepelisaki Nkolo kozokisa ye mpota; atiaki ye na mpasi; ntango ekosila yo kobonza molimo na ye mpo na masumu akomona nkona na ye, akokomisa mikolo na ye molai, mpe elengi ya Nkolo ekofuluka na loboko na ye.

11 Akomono mosala ya molimo na ye, mpe akosepelisama; na boyebi na ye mosali na ngai ya sembo akolongisa mingi; mpo akokumba mabe na bango.

12 Boye nakokabela ye ndambo elongo na bato minene, mpe akokabola bopunzi elongo na bato ya makasi; mpo asopaki motema na ye kino na liwa; mpe atangamaki elongo na babuki mobeko; mpe akumbaki masumu ya bato mingi, mpe asalaki libondeli mpo na babuki mobeko.

Bimisa na lokasa