Makomi
Mosiya 28


Mokapo 28

Bana mibali ya Mosiya bakei koteya Balamani—Kosalelaka mabanga mibale ya momoni, Mosiya abongoli bapalaki ya Bayelede. Penepene na mobu 92 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete esilaki bana mibali ya Mosiya kosala makambo oyo nyonso, bakamataki motango moko moke elongo na bango mpe bazongaki na tata na bango, mokonzi, mpe basengaki na ye apesa ndingisa epayi na bango ete bakoka, elongo na bato oyo baponaki, komata na mboka ya Nefi mpo ete bakoka koteya makambo oyo bayokaki, mpe ete bakoka kokabola liloba ya Nzambe na bandeko na bango, Balamani—

2 Ete mbele bakoka komema bango na boyebi ya Nkolo Nzambe na bango, mpe kondimisa bango mabe ya batata na bango; mpe ete mbele bakoka kosalisa bango uta na boyini na bango mpo na Banefi, ete bakoka lisusu kosepela na Nkolo Nzambe na bango, ete bakoka kokoma bato balingaka baninga na bango basusu, mpe ete boweli ezala lisusu te na mboka mobimba oyo Nkolo Nzambe na bango apesaki bango.

3 Sikawa bazalaki na mposa ete lobiko esakolama na ekelamo nyonso, mpo bakokaki te kondima ete molimo ya moto moko ewa; iyo, kutu makanisi mpenza ete molimo moko ewumela kati na monioko mozanga nsuka eningisaki mpe elengisaki bango.

4 Mpe boye Molimo ya Nkolo asalaki likolo na bango, mpo bazalaki bato mabe mpenza koleka na kati ya basumuki. Mpe Nkolo amonaki elongobani na boboto na ye ezanga ndelo ete abatela bango; nzokande bayokaki mpasi mingi ya nsomo ya molimo na ntina ya mabe na bango, koyokaka mpasi mpe bobangi mingi ete babwakama mosika libela.

5 Mpe esalemaki ete babondelaki tata ya bango mikolo mingi ete bakoka komata na mboka ya Nefi.

6 Mpe mokonzi Mosiya akendaki mpe atunaki na Nkolo soki asengeli kotika bana mibali na ye bamata na kati ya Balamani mpo na koteya liloba.

7 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Mosiya: Tika bango bamata, mpo mingi bakondima na maloba na bango, mpe bakozwa bomoi ya seko; mpe nakobikisa bana mibali na yo uta na maboko ya Balamani.

8 Mpe esalemaki ete Mosiya apesaki ndingisa ete bakoka kokende mpe kosala engebene na bonsenga na bango.

9 Mpe bakendaki mobembo na bango kati na esobe mpo na komata koteya liloba na kati ya Balamani; mpe nakopesa lisolo ya botamboli ya misala na bango nsima.

10 Sikawa mokonzi Mosiya azalaka lisusu na moto moko te epayi ya nai kopesa bokonzi likolo na ye, mpo ezalaki na moto moko te kati na bana mibali na ye oyo balingaki kondima bokonzi.

11 Boye akamataki masolo ya makomi oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, mpe lisusu bapalaki ya Nefi, mpe makambo nyonso oyo abombaki mpe abatelaki engebene na mitindo ya Nzambe, nsima ya kobongola mpe kosala ete masolo ya makomi oyo ezalaki likolo ya bapalaki ya wolo oyo ezwamaka na bato ya Limiyi, oyo epesamaki na ye na loboko ya Limiyi ekomama;

12 Mpe oyo asalaki na ntina ya motema likolo ya bato na ye; mpo bazalaki na mposa eleki ndelo ya koyeba na ntina ya bato oyo babebisamaki.

13 Mpe sikawa abongolaki yango na lisalisi ya mabanga mibale oyo ekangamaki kati ya nsonge mibale ya litimbo.

14 Sikawa biloko oyo bilengelamaki uta na ebandeli, mpe bikitanisamaki uta nkola na nkola, mpo na ntina ya kolimbolaka nkota;

15 Mpe bibombanaki mpe ebatelamaki na loboko ya Nkolo, ete akoka kobombola mabe mpe bonsomo ya bato na ye na ekelamo nyonso oyo akozwa mboka;

16 Mpe oyo nyonso akozala na biloko oyo abiangami momoni, na lolenge ya kala.

17 Sikawa esilaki Mosiya kobongola masolo ya makomi oyo, tala, apesaki lisitwale ya bato oyo babebisamaki, uta na ntango oyo babebisamaki kino nsima ya botongi ya linongi monene, na ntango Nkolo abulunganisaki lokota ya bato mpe bato nyonso bapanzamaki mosika likolo ya mabele nyonso, iyo, mpe kutu uta na ntango wana nsima kino na bokeli ya Adama.

18 Sikawa lisolo oyo esalaki ete bato ya Mosiya balela mingi koleka mpenza, iyo, batondisamaki na mawa; nzokande epesaki bango boyebi boike, na boye wapi basepelaki.

19 Mpe lisolo oyo ekokomama awa nsima; mpo tala, elongobani ete bato nyonso bayeba makambo oyo ekomami kati na lisolo oyo.

20 Mpe sikawa, lokola nalobaki epayi na bino, ete esilaki mokonzi Mosiya kosala makambo oyo, akamataki bapalaki ya motako, mpe biloko nyonso oyo abombaki, mpe apesaki yango epayi ya Alma, oyo azalaki mwana mobali ya Alma; iyo, masolo ya makomi nyonso, mpe lisusu bibongolelo, mpe apesaki yango epayi na ye, mpe atindaki ye ete abomba mpe abatela yango, mpe abatela lisusu lisolo ya makomi ya bato, kokitanisaka yango uta nkola yoko na mosusu, kutu lokola ekitanisamaki uta ntango Lehi atikaki Yelusaleme.

Bimisa na lokasa