Makomi
Mosiya 4


Mokapo 4

Mokonzi Benyamina akobi na maloba na ye—Lobiko eyaki na ntina ya Bomikabi—Ndimela Nzambe mpo na kobikisama—Kanga bolimbisi ya masumu na yo na nzela ya bosembo—Kaba ndambo ya biloko na bino na babola—Sala makambo nyonso na bwania mpe na molongo. Penepene na mobu 124 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete etiaki mokonzi Benyamina nsuka na maloba oyo epesamaki epayi na ye na anjelu ya Nkolo, ete abwakaki miso na ye nzinganzinga mpembeni likolo ya ebele ya bato, mpe tala bakweyaki na mabele, mpo bobangi ya Nkolo eyaki likolo na bango.

2 Mpe bamimonaki na ezalela na bango moko ya mosuni, kutu mike koleka mputulu ya mabele. Mpe babelelaki na makasi bango nyonso na mongongo moko, kolobaka: O lakisa boboto, mpe tia makila ya bomikabi ya Klisto ete tokoka kozwa bolimbisi ya masumu na biso, mpe mitema na biso mikoka kopetolama; mpo tondimi na Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, oyo akelaki lola mpe mabele, mpe biloko nyonso; oyo akokita na kati ya bana ya bato.

3 Mpe esalemaki ete esilaki bango koloba maloba oyo Molimo ya Nkolo ayaki likolo na bango, mpe batondisamaki na bosepeli, kozwaka bolimbisi ya masumu na bango, mpe kozalaka na kimia ya mayele ya motema, na ntina ya bondimi mingi koleka mpenza boye bazalaki na yango na Yesu Klisto oyo akoya, engebene na maloba oyo mokonzi Benyamina alobaki epayi na bango.

4 Mpe mokonzi Benyamina afungolaki lisusu monoko na ye mpe abandaki kolobela bango, kolobaka: Baninga na ngai mpe bandeko na ngai, baboti na ngai mpe bato na ngai, nalingi lisusu kobenda bokebi na bino, ete bokoka koyoka mpe kososola ndambo oyo etikali ya maloba na ngai oyo nakoloba epayi na bino.

5 Mpo tala, soki boyebi ya bolamu ya Nzambe na ntango oyo malamusi bino mpo na koyoka ete bozali biloko mpamba mpe bozali kati na ezalela elongobani te mpe ya bokwei—

6 Nalobi epayi na bino, soki boyei na boyebi ya bolamu ya Nzambe, mpe nguya na ye ezangi emekiseli, mpe bwania na ye, mpe bompikiliki na ye, mpe motema molai na ye epayi na bana ya bato; mpe lisusu, bomikabi boye elengelamaki uta na bokelami ya mokili, ete na yango lobiko ekoka koya na ye oyo akotia motema na ye na Nkolo, mpe akozala na molende na kobombaka mitindo na ye, mpe akokoba kati na bondimi kutu kino na nsuka ya bomoi na ye, nalingi koloba bomoi ya nzoto ya kufa—

7 Nalobi, ete oyo azali moto oyo akozwa lobiko, na nzela ya bomikabi boye elengelamaki uta na bokelami ya mokili mpo na bato nyonso, baoyo bazalaki uta ntango wana na bokweisami ya Adama, soki te baoyo bazali, soki te baoyo bakozala, kutu kino na nsuka ya mokili.

8 Mpe oyo ezali nzela oyo wapi lobiko ekoya. Mpe ezali na lobiko mosusu te longola se oyo elobamaki; mpe ezali masengami mpe te na oyo wapi moto akoki kobikisama longola se masengami oyo nayebisaki bino.

9 Bondiya Nzambe; bondima ete azali, mpe ete akelaki biloko nyonso, na lola mpe na mabele mpe lokola; bondima ete azali na bwania nyonso, mpe nguya nyonso na lola mpe na mabele mpe lokola; bondima ete moto asosolaka te makambo nyonso oyo Nkolo akoki kososola.

10 Mpe lisusu, bondima ete bosengeli koyambola uta na masumu na bino mpe kotika yango, mpe komikitisa liboso ya Nzambe; mpe kosenga na bosolo ya motema ete alimbisa bino; mpe sikawa, soki bondimi makambo nyonso oyo keba ete bosala yango.

11 Mpe lisusu nalobi epayi na bino lokola nalobaki liboso, ete lokola bokomi na boyebi ya nkembo ya Nzambe, to soki boyebaki bolamu na ye mpe bomekaki bolingo na ye, mpe bozwaki bolimbisi ya masumu na bino, oyo esali ete bozala na bosepeli monene koleka ya lolenge oyo na milimo na bino, kutu bongo nalingi ete bomikundola, mpe ntango nyonso bokanga na bokundoli, bonene ya Nzambe, mpe ete bozali bino moko biloko mpamba, mpe bolamu na ye mpe motema molai na ye epayi na bino, bikelamo oyo elongobani te, mpe bokomikitisa kutu kati na bozindo ya bomikitisi, kobelelaka na nkombo ya Nkolo na mokolo na mokolo, mpe kotelemaka ngwi kati na bondimi ya oyo esengeli koya, oyo elobamaki na monoko ya anjelu.

12 Mpe tala, nalobi epayi na bino ete soki bosali oyo bokozala na bosepeli ntango nyonso, mpe bokotondisama na bolingo ya Nzambe, mpe ntango nyonso bosimba bolimbisi ya masumu na bino; mpe bokokola na boyebi ya nkembo na ye oyo akelaki bino, soki te na boyebi ya oyo ezali alima mpe solo.

13 Mpe bokozala na likanisi moko te ya kosala mabe moko na mosusu, kasi ya kozala na kimia, mpe kopesa na moto na moto engebene na oyo esengeli na ye.

14 Mpe bokopesa te nzela ete bana na bino bakende na nzala, to bolumbu; mpe bokopesa nzela te ete babuka mibeko ya Nzambe, mpe babunda mpe baswana moko na mosusu, mpe basalela zabulu, oyo azali mokonzi ya masumu, to oyo azali molimo mabe oyo alobelamaki na batata na biso, ye kozalaka monguna ya bosembo nyonso.

15 Kasi bokoteya bango kotambola na nzela ya bosolo mpe ya lokengo; bokoteya bango kolingana bango na bango, mpe kosalisana bango na bango.

16 Mpe lisusu, bino moko bokosalisa baoyo batelemi na mposa ya lisalisi na bino; bokopesa biloko na bino epayi na ye oyo atelemi na mposa, mpe bokopesa te nzela ete mosengi amatisa bonsenga na ye ya mpamba, mpe bobengana ye libanda mpo na kowa.

17 Mbele okoloba: Moto yango nde amilukelaki ye moko mpasi na ye; boye nakokanga maboko na ngai, mpe nakopesa ye ndambo ya bilei na ngai te, soki te nakokabela ye ndambo ya biloko na ngai te ete akoka komona mpasi te, mpo bitumbu na ye ezali alima—

18 Kasi nakoloba epayi na yo, O moto, nyonso oyo akosala lolenge oyo azali na ntina monene ya koyambola; mpe longola se soki ayamboli na oyo asalaki akowa libela, mpe azali na litomba kati na bokonzi ya Nzambe te.

19 Mpo tala, ezali biso nyonso basengi te? Eyangelami biso nyonso te se na Mozali moko wana kaka, kutu Nzambe, mpo na biloko nyonso tozali na yango, mpo na bilei mpe bilamba mpe lokola, mpe mpo na wolo, mpe mpo na mpauni, mpe mpo na bozwi nyonso tozwi ya ndenge na ndenge?

20 Mpe tala, kutu na ntango oyo, bozalaki kobelela na nkombo na ye, mpe kosenga mpo na bolimbisi ya masumu na bino. Mpe apesi nzela ete bosenga na mpamba? Te; asopaki Molimo na ye likolo na bino, mpe asali ete mitema na bino mitondisami na bosepeli, mpe asali ete minoko na bino ekangama ete bokoka kozwa ya koloba, bongo mpo bosepeli na bino ezalaki ya monene koleka.

21 Mpe sikawa, soki Nzambe, oyo akelaki bino, na nani boyangelami mpo na bomoi na bino mpe mpo na nyonso oyo bozwi mpe bozali na yango, apesaka bino nyonso oyo bosengaka oyo ezali semba, na bondimi, kondimaka ete bokozwa, O bongo, lolenge boni esengeli bino te kokaba ndambo ya biloko oyo bozali na yango moko na mosusu.

22 Mpe soki bosambisi moto oyo akomatisa bosenga na ye epayi na bino mpo na biloko na bino mpo ete akoka kowa te, mpe bokweisi ye, lolenge boni ya alima koleka ekozala bokwei na bino mpo na kopimaka biloko na bino, oyo ezali ya bino te kasi ya Nzambe, epayi na ye oyo kani lisusu bomoi na bino ezali; mpe nzokande bomatisi bosenga te, to boyamboli mpo na likambo bosalaki mpe te.

23 Nalobi epayi na bino ete, lisuma ezala epayi ya moto wana, mpo biloko na ye ekowa elongo na ye; mpe sikawa, nalobi makambo oyo epayi ya baoyo bazali bato na bozwi mpo na oyo etali biloko ya mokili.

24 Mpe lisusu, nalobi epayi ya babola, bino baoyo bozangi kasi nzokande bozali na mingi ekoki, ete bobikaka mokolo na mokolo; nalingi koloba bino nyonso oyo bopimelaka basengi, mpo bozangi; nalingi ete boloba kati na mitema na bino ete: Nakopesa te mpo nazangi, kasi soki nazalaka na yango nalingaki kopesa.

25 Mpe sikawa, soki bolobi oyo kati na mitema na bino botikali bato na elindo te, soki bongo te bokweisami; mpe bokwei na bino ezali alima mpo boluli oyo bozwaki te.

26 Mpe sikawa, mpo na ntina ya makambo oyo nalobaki epayi na bino—elingi koloba, mpo na ntina ya kokangaka bolimbisi ya masumu ya bino mokolo na mokolo, ete bokoka kotambola na elindo te liboso ya Nzambe—Nalingi ete bokabaka ndambo ya biloko na bino na babola, moto na moto engebene na oyo azali na yango, lokola koleisaka oyo azali na nzala, kolatisaka oyo azali bolumbu, kokendaka kotala bakoni mpe kokabolaka mpo na bobondisi na bango, ezala na molimo mpe na nzoto mpe lokola, engebene na bamposa na bango.

27 Mpe keba ete makambo oyo nyonso masalema na bwania mpe na molongo; mpo esengeli te ete moto akima mbangu koleka makasi azali na yango. Mpe lisusu, elongobani ete azala na molende, ete na yango akoka kolonga mbano; boye, makambo nyonso esengeli kosalema na molongo.

28 Mpe nalingi ete bomikundola, ete moto nyonso na kati na bino oyo adefi uta na moto ya penepene na ye asengeli kozongisa eloko oyo adefaki, engebene na lokola ayokanaki, soki te okosala lisumu; mpe mbele okotinda moto ya penepene na yo asala lisumu mpe lokola.

29 Mpe na nsuka, nakoki te kolobela bino makambo nyonso wapi bokoki kosala masumu; mpo ezali na banzela mpe mibeko ya ndenge na ndenge, kutu boye mingi ete nakoki te kotanga yango.

30 Kasi mingi oyo nakoki koyebisa bino, ete soki bomikengeli bino moko te, mpe makanisi na bino, mpe maloba na bino, mpe misala na bino, mpe bobateli te mitindo ya Nzambe, mpe bokobi te kati na bondimi ya nini boyokaki mpo na oyo etali boyei ya Nkolo na biso, kutu kino na nsuka ya bomoi na bino, bosengeli kowa. Mpe sikawa, O moto, omikundola, mpe owa te.

Bimisa na lokasa