Makomi
Mosiya 6


Mokapo 6

Mokonzi Benyamina akomi nkombo ya bato mpe aponi banganganzambe mpo na koteya bango—Mosiya ayangeli lokola mokonzi ya sembo. Penepene na mibu 124–121 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mokonzi Benyamina akanisaki elongobanaki, esilaki ye koloba na bato, ete asengeli kokamata nkombo ya baoyo nyonso bakotaki kati na liyokani na Nzambe mpo na kobomba mitindo na ye.

2 Mpe esalemaki ete ezalaki na molimo moko te, longola se soki ezalaki bana mike, baoyo bakotaki te kati na liyokani mpe bakamataki likolo na bango nkombo ya Klisto.

3 Mpe lisusu, esalemaki ete etiaki mokonzi Benyamina nsuka na koloba makambo oyo nyonso, mpe abulisaki mwana na ye Mosiya mpo na kozala moyangeli mpe mokonzi likolo ya bato na ye, mpe apesaki ye mikumba nyonso etali bokonzi, mpe lisusu aponaki banganganzambe mpo na koteya bato, ete na yango bakoka koyoka mpe koyeba mitindo ya Nzambe, mpe kolamusa bango na bokundoli ya ndai oyo basalaki, apanzaki ebele ya bato yango, mpe bazongaki, moko na moko, engebene na mabota na bango, na bandako na bango moko.

4 Mpe Mosiya abandaki koyangela na esika ya tata na ye. Mpe abandaki koyangela na mobu ya ntuku misato ya mibu na ye, kokisaka na mobimba, penepene na mibu nkama minei na ntuku sambo na motoba uta ntango oyo Lehi atikaki Yelusaleme.

5 Mpe mokonzi Benyamina atikalaki na bomoi mibu misato mpe akufaki.

6 Mpe esalemaki ete mokonzi Mosiya atambolaki na banzela ya Nkolo, mpe atosaki masambisi na ye mpe meko na ye, mpe abatelaki mitindo na ye na makambo nyonso kani atindaki ye.

7 Mpe mokonzi Mosiya asalaki ete bato na ye basalaka bilanga. Mpe ye lokola, asalaki bilanga, ete na yango akoka te kozala mokumba epayi ya bato na ye, ete na makambo nyonso akoka kosala engebene na oyo tata na ye asalaki. Mpe ezalaki na boswani te na kati ya bato na ye mpo na ntaka ya mibu misato.

Bimisa na lokasa