Makomi
Mosiya 8


Mokapo 8

Amona ateyi bato ya Limiyi—Ayekoli mpo na oyo etali bapalaki ntuku mibale na minei ya Bayelede—Masolo ya makomi ya kala makoki kobongolama na bamoni—Likabo moko te ezali monene koleka oyo ya bomoni. Penepene na mobu 121 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilaki mokonzi Limiyi kotia nsuka ya kolobaka na bato na ye, mpo alobelaki bango makambo mingi mpe na oyo bobele ya moke nde nakomi na buku oyo, ayebisaki bato na ye makambo nyonso etali bandeko na bango oyo bazalaki na mboka ya Zalayemila.

2 Mpe asalaki ete Amona ateleme liboso ya ebele ya bato, mpe azongelaki koyebisa epayi na bango nyonso oyo masalemaki epayi ya bandeko na bango uta na ntango oyo Zenifi amataki uta na mboka yango kutu kino na ntango oyo ye moko amataki uta na mboka yango.

3 Mpe azongelaki lisusu koyebisa mbangu maloba ya nsuka oyo mokonzi Benyamina alakisaki bango, mpe alimbolaki yango na bato ya mokonzi Limiyi, bongo ete bakoka kososola maloba nyonso oyo alobaki.

4 Mpe esalemaki ete esilaki ye kosala nyonso oyo, ete mokonzi Limiyi apanzaki ebele ya bato yango, mpe asalaki ete bazonga moko na moko na ndako epayi na ye moko.

5 Mpe esalemaki ete asalaki ete bapalaki oyo ezalaki na lisolo ya makomi ya bato na ye uta na ntango batikaki mboka ya Zalayemila, makoka komemama liboso ya Amona, ete akoka kotanga yango.

6 Sikawa, sasaipi lokola etangaki Amona lisolo ya makomi, mokonzi atunaki ye soki akokaki kolimbola nkota, mpe Amona alobelaki ye ete akoki te.

7 Mpe mokonzi alobaki epayi na ye: Lokola nazalaki koyoka mawa mingi mpo na mitungisi ya bato na ngai, nasalaki ete ntuku minei na misato ya bato na ngai bakende mobembo kati na esobe, ete na yango bakoka komona mboka ya Zalayemila, ete tokoka kobila epayi ya bandeko na biso mpo na kokangola biso uta na boumbu.

8 Mpe babungaki na esobe mpo na ntaka ya mikolo mingi, nzokande bazalaki na molende, mpe bamonaki te mboka ya Zalayemila kasi bazongaki na mboka oyo, nsima ya kokendaka mobembo na mboka na kati ya mai mingi, mpe nsima ya kobombolaka mboka oyo etonda na mikuwa ya bato, mpe ya banyama, mpe etondaki lokola na bonielengeni ya bandako ya ndenge na ndenge, lokola ebombolaki bango mboka efandamaki na bato oyo bazalaki motango monene lokola ebele ya bato ya Yisalaele.

9 Mpe mpo ezala litatoli makambo balobaki ezalaki solo bamemaki bapalaki ntuku mibale na minei oyo etondaki na minkoma, mpe ezali ya wolo ya peto.

10 Mpe tala, lisusu bamemaki bibende ya ntolo, oyo ezalaki minene, mpe ezalaki ya motako mpe ya mbengi, mpe ezalaki mobimba ya kobonga nie.

11 Mpe lisusu, bamemaki mipanga, ya yango bisimbelo ebeba, mpe mbeli na yango eguga mpenza na epomboli; mpe ezali na moto te na mboka oyo akoki kolimbola lokota to minkoma oyo ezali likolo ya bapalaki. Boye nalobaki epayi na yo: Ekoki yo kobongola?

12 Mpe nalobi epayi na yo lisusu: Oyebi moko oyo akoki kobongola? Mpo nazali na mposa ete masolo ya makomi oyo ebongolama na lokota na biso; mpo, mbele, makopesa biso boyebi ya montika ya bato oyo babebisamaki, uta wapi masolo ya makomi oyo ewuti; to, mbele, makopesa biso boyebi ya bato na ye mpenza oyo babebisamaki; mpe nazali na mposa ya koyeba ntina ya bobebisami na bango.

13 Sikawa Amona alobaki epayi na ye: Nakoki na ntembe te koyebisa yo, O mokonzi, moto moko oyo akoki kobongola masolo ya makomi yango; mpo azali na nini oyo wapi akoki kotala, mpe kobongola masolo ya makomi nyonso oyo ezali ya mikolo ya kala; mpe ezali likabo uta na Nzambe. Mpe biloko yango ebiangami bibongolelo, mpe moto te akoki kotala yango longola se soki atindami, na kobangaka ete atala oyo asengelaki te mpe akoka kowa. Mpe oyo nyonso atindami mpo na kotala yango, se ye moko wana kaka abiangami momoni.

14 Mpe tala, mokonzi na bato oyo bazali na mboka ya Zalayemila azali moto oyo atindami mpo na kosala makambo oyo, mpe oyo azali na likabo oyo monene uta na Nzambe.

15 Mpe mokonzi alobaki ete momoni azali monene koleka profeta.

16 Mpe Amona alobaki ete momoni azali mobimisi mpe profeta lokola; mpe likabo oyo ezali monene mingi moto te akoki kozwa yango, longola se soki azwi nguya ya Nzambe, oyo moto moko akoki te; nzokande moto akoki kozwa nguya monene epesami ye uta na Nzambe.

17 Kasi momoni akoki koyeba makambo oyo maleka, mpe lokola makambo oyo ekoya, mpe na nzela na yango makambo nyonso makobimisama, soki te, nde, makambo ya nkuku makomonisama, mpe makambo ebombama makobima na pole, mpe makambo eyobani te ekoyebisama na nzela na yango, mpe lisusu makambo ekoyebisama na nzela na yango oyo soki te makokaki koyebana te.

18 Boye Nzambe apesaki nzela ete moto, na nzela ya bondimi, akoka kosala makamwisi ya nguya; boye akomi litomba monene epayi na baninga na ye bato.

19 Mpe sikawa, etiaki Amona nsuka ya kolobaka maloba oyo mokonzi asepelaki mingi mpenza, mpe apesaki matondi na Nzambe, kolobaka: Na ntembe te libombami monene ezali kati na bapalaki oyo, mpe bibongolelo oyo bilengelamaki na ntembe te mpo na ntina ya kofungola libombami ya lolenge oyo na bana ya bato.

20 O lolenge boni ezali misala ya Nkolo ya kokamwa, mpe kino ntango molai boni ayokaki mpasi elongo na bato na ye; iyo, mpe lolenge boni bososoli ya bana ya bato ezali ya kokufa miso mpe ekoki kofungwama te; mpo balingi koluka bwania te, mpe bazali na mposa te ete akonza likolo na bango!

21 Iyo, bazali lokola bibwele ya zamba oyo ekimaka uta na mobateli, mpe epanzamaka, mpe ekimisami, mpe eliami na banyama ya zamba.

Bimisa na lokasa