Masalisi mpo na Makomi
BJS, Yisaya 29


BJS, Yisaya 29:1–8. Meka na Yisaya 29:1–8

Bansango esakolamaki kala na Yelusaleme na baprofeta ya kala ekosakolama na mikolo ya nsuka uta na Buku ya Mormon, oyo ebimi “libanda ya mabele.”

1 Mawa mpo na Ariel, na Ariel, engumba oyo Dawidi afandaki! kobakisa mobu na mobu; tika bango baboma makabo.

2 Na yango nakotungisa Ariel, mpe ekozala na bozito mpe mawa; mpo Nkolo alobi na ngai bongo, Ekosalema na Ariel;

3 Ete ngai Nkolo nakotia ka nzinganzinga pene na yango, mpe nakokangisa yango na ngomba, mpe nakotombola moboko elenda mpo na ye.

4 Mpe ye akokweisama na nse, mpe ye akoloba na mabele, mpe liloba na ye ekozala na mongongo ya nse libanda ya putulu; mpe mongongo na ye ekozala lokola ya moto oyo azali na molimo ya bonsomi, libanda ya mabele, mpe liloba na ekoyimayima na nse ya putulu.

5 Mpe ebele ya bapaya na ye bakozala lokola mputulu moke, mpe ebele ya bato na ye bapesaka nsomo bakozala lokola matiti ya kokawuka oyo ezali kolimwa; iyo, mpe mpwasa ekozala na ntango moke.

6 Mpo Nkolo ya bokasi nyonso akoya kotala yo, na kake mpe na boningani ya mabele mpe na makelele makasi, na mopepe makasi mpe na ekumbaki mpe na ndemo ya moto ya bozikisi nye.

7 Mpe ebele ya bikolo oyo ebundaki na Ariel, atako oyo ebundaki na ye mpe manduki na ye, mpe ete esalaki ye mpasi, ekozala lokola ndoto ya bomoni ya butu.

8 Iyo, mpo na bango ekozala lolenge moko lokola moto ya nzala, oyo azali kolota, ete, azali kolia, kasi alamuki molimo na ye ezali mpamba; to lokolo moto azali na mposa ya komela, azali kolota ete ameli, kasi alamuki, alembi mpe molimo na ye ezali na mposa ya komela. Iyo, atako bongo bikolo nyonso ebele ekoya kobunda na ngomba ya Siona.

Bimisa na lokasa