Masalisi mpo na Makomi
BJS, Nzembo 14


BJS, Nzembo 14:1–7. Meka na Nzembo 14:1–7

Moyembi banzembo amoni bobungisi ya bososlo na mikolo ya nsuka mpe azali kozela bozongisi ya Siona.

1 Elema alobi kati na motema na ye, Moto moko azali te oyo amona Nzambe. Mpo ete azali komimonisama epayi na biso te, boye Nzambe azali te. Tala, bazali bato basili kobeba; basalaki misala ya nsomo, mpe moko te na kati ya bango azali kosala bolamu.

2 Mpo Nkolo uta na lola atalaki bana ya bato na nse, mpe na mongongo na ye alobaki epayi ya mosali na ye, Luka na kati ya bana ya bato, mpo na kotala soki moko oyo azali kososola Nzambe azali. Mpe afungolaki monoko na ye epayi ya Nkolo, mpe alobaki, Tala, banso oyo bazali koloba bazali bato na yo.

3 Nkolo azongisaki maloba, mpe alobaki, Banso basili kopengwa, basili banso kokoma bosoto, okoki te komona moko kati na bango oyo azali kosala bolamu, te, moko te.

4 Banso oyo bazali na bango lokola bateyi bazali basali ya mabe, mpe boyebi bozali te kati na bango. Bango nde baoyo bazali kolia bato na ngai. Bazali kolia lipa kasi babelelaka Nkolo te.

5 Bazali kati na bobangi monene, mpo Nzambe afandi na nkola ya basembo. Azali toli mpo na babola, mpo ete bayokaka nsoni na bato ya nkuna, mpe bakimaka epayi ya Nkolo, lokola ekimelo na bango.

6 Bazali na nsoni mpo na oyo etali toli ya babola mpo ete Nkolo azali ekimelo na bango.

7 O ete Siona etiamaki uta na lola, lobiko ya Yisalaele. O Nkolo, ntango nini ekotia yo Siona? Ntango Nkolo akozongisa bato na ye uta na bokangemi, Yakobo akozala na esengo, Yisalaele ekosepela.

Bimisa na lokasa