Makomi
Abalayama 4


Mokapo 4

Banzambe basali mwango ya bokeli ya mabele mpe nyonso ya bomoi likolo na yango—Miango na bango mpo na mikolo motoba ya bokeli milimbolami.

1 Mpe nsima Nkolo alobaki: Tika tokita na nse. Mpe bakitaki na ebandeli, mpe bango, elingi koloba Banzambe, babongisaki mpe basalaki lola mpe mabele.

2 Mpe mabele, esilaki yango kosalema, mazalaki mpamba mpe na lolenge te, mpo ete basalaki naino eloko moko te longola se mabele; mpe molili moyangelaki likolo ya etando ya mozindo, mpe Molimo ya Banzambe ezalaki kotambola likolo ya etando ya mai.

3 Mpe bango (Banzambe) balobaki: Tika ete pole ezala; mpe pole ezalaki.

4 Mpe bango (Banzambe) basosolaki pole, mpo ezalaki kongenga; mpe bakabolaki pole, to basalaki ete ekabwana, uta na molili.

5 Mpe Banzambe babiangaki pole Moi, mpe molili babiangaki Butu. Mpe esalemaki ete uta na mpokwa kino na ntongo babiangaki butu; mpe uta na ntongo kino na mpokwa babiangaki moi; mpe oyo ezalaki ya yambo, to ebandeli, ya oyo babiangaki moi mpe butu.

6 Mpe Banzambe balobaki lisusu: Tika ete etando ezala na katikati ya mai, mpe ekokabola mai uta na mai.

7 Mpe Banzambe batindaki etando, na lolenge ete ekabolaki mai oyo ezalaki na nse ya etando uta na mai oyo ezalaki likolo ya etando; mpe ezalaki bongo, kutu lokola batindaki.

8 Mpe Banzambe babiangaki etando yango, Lola. Mpe esalemaki ete ezalaki uta na mpokwa kino na ntongo oyo babiangaki butu; mpe esalemaki ete ezalaki uta na ntongo kino na mpokwa nde babiangaki moi; mpe oyo ezalaki mbala ya mibale ete babiangaki butu mpe moi.

9 Mpe Banzambe batindaki, kolobaka: Tika ete mai na nse ya lola esangana nyonso na esika moko, mpe tika ete mabele ekawuka; mpe ezalaki bongo lokola batindaki;

10 Mpe Banzambe babiangaki mokili mokawuka, Mabele; mpe bosangisani ya mai esika moko, babiangaki, Mai Monene; mpe Banzambe bamonaki ete batosamaki.

11 Mpe Banzambe balobaki: Tika ete tolengela mabele mpo na kobimisa matiti; ndunda oyo epesaka nkona; nzete ya mbuma kobimisaka mbuma na lolenge na yango, oyo kani nkona ebimisaka se nzete moko wana na lolenge na yango moko likolo ya mabele; mpe ezalaki bongo, kutu lokola batindaki.

12 Mpe Banzambe babongisaki mabele mpo na kobimisa matiti uta na nkona na yango moko, mpe ndunda mpo na kobimisa ndunda uta na nkona na yango moko, kopesaka nkona na lolenge na yango moko; mpe mabele mpo na kobimisa nzete uta na nkona na yango moko, kopesaka mbuma, oyo kani nkona ebimisaka se nzete moko wana, na lolenge na yango; mpe Banzambe bamonaki ete batosamaki.

13 Mpe esalemaki ete batangaki mikolo; uta na mpokwa kino na ntongo babiangaki butu; mpe esalemaki, uta na ntongo kino na mpokwa babiangi moi; mpe ezalaki mbala ya misato.

14 Mpe Banzambe babongisaki minda na etando ya lola, mpe basalaki ete mikabola moi uta na butu; mpe babongisaki minda yango kozala lokola bilembo mpo na bileko, mpe mpo na mikolo mpe mpo na mibu;

15 Mpe babongisaki yango kozala lokola minda na etando ya lola mpo na kopesa pole likolo ya mabele; mpe ezalaki bongo.

16 Mpe Banzambe babongisaki minda mibale minene, ya monene koleka mpo na kokonza na moi, mpe ya moke mpo na kokonza na butu; elongo na mwinda ya moke batiaki lisusu minzoto;

17 Mpe Banzambe batiaki yango na etando ya lola, mpo na kopesa pole likolo ya mabele, mpe kokonza na moi mpe na butu, mpe mpo na kokabola pole uta na molili.

18 Mpe Banzambe bazalaki kotala biloko bina oyo bango batindaki kino bitosaki.

19 Mpe esalemaki ete ezalaki uta na mpokwa kino na ntongo ete ezalaki butu; mpe esalamaki ete ezalaki uta na ntongo kino na mpokwa ete ezalaki moi; mpe ezalaki mbala ya minei.

20 Mpe Banzambe balobaki: Tika ete tolengela mai mpo na kobimisa bikelamo beboo oyo bitambolaka mpe ezali na bomoi; mpe bandeke, ete ekoka kopumbwa likolo ya mabele na etando efungwami ya lola.

21 Mpe Banzambe balengelaki mai ete makoka kobimisa mbisi ya minene, mpe ekelamo na ekelamo ya bomoi oyo etambolaka, oyo mai esengelaki kobimisa beboo na lolenge na yango; mpe ndeke na ndeke ya mapapu na lolenge na yango. Mpe Banzambe bamonaki ete bakotosama, mpe ete mwango na bango ezalaki malamu.

22 Mpe Banzambe balobaki: Tokopambola bango, mpe kobotisa mpe kokomisa bango mingi, mpe batondisa mai ya mbu to mai monene; mpe kosala ete bandeke bakoma mingi likolo ya mabele.

23 Mpe esalemaki ete ezalaki uta na mpokwa kino na ntongo ete babiangaki butu; mpe esalamaki ete ezalaki uta na ntongo kino na mpokwa ete babiangaki moi; mpe ezalaki mbala ya mitano.

24 Mpe Banzambe balengelaki mabele mpo na kobimisa bikelamo ya bomoi na lolenge na yango, bibwele mpe biloko oyo bilandaka na nse, mpe banyama ya mabele na lolenge na yango; mpe ezalaki bongo, lokola balobaki.

25 Mpe Banzambe babongisaki mabele mpo na kobimisa banyama na lolenge na bango, mpe bibwele na lolenge na yango, mpe eloko nyonso oyo elandaka na nse likolo ya mabele na lolenge na yango; mpe Banzambe bamonaki ete bakotosa.

26 Mpe Banzambe bakamataki toli na kati ya bango moko mpe balobaki: Tika ete tokita na nse mpe tosala moto na elilingi na biso, na bokokani na biso; mpe tokopesa bango mpifo likolo ya bambisi ya mbu, mpe likolo ya bandeke ya likolo, mpe likolo ya bibwele, mpe likolo ya mabele nyonso, mpe likolo ya eloko nyonso elandaka na nse oyo ezali kolanda likolo ya mabele.

27 Bongo Banzambe bakitaki na nse kobongisa moto na elilingi na bango moko, na elilingi ya Banzambe basalaki ye, mobali mpe mwasi nde basalaki bango.

28 Mpe Banzambe balobaki: Tokopambola bango. Mpe Banzambe balobaki: Tokobotisa bango mpe kokomisa bango mingi, mpe bakotondisa mabele, mpe bakokonza yango, mpe kozala na mpifo likolo ya mbisi ya mbu, mpe likolo ya bandeke ya likolo, mpe likolo ya eloko nyonso ya bomoi oyo etambolaka likolo ya mabele.

29 Mpe Banzambe balobaki: Tala, tokopesa bango ndunda nyonso oyo ebotaka nkona oyo ekobima likolo ya etando ya mabele nyonso, mpe nzete nyonso oyo ekozala na mbuma likolo na yango; iyo, mbuma ya nzete oyo epesaka nkona tokopesa yango na bango; ekozala mpo na bilei na bango.

30 Mpe na nyama nyonso ya mabele, mpe na ndeke nyonso ya likolo, mpe na eloko nyonso oyo elandaka na nse likolo ya mabele, tala, tokopesa bango bomoi, mpe lisusu tokopesa na bango ndunda nyonso ya mai lokola mpondu mpo na bilei, mpe biloko oyo nyonso esengeli kobongisama boye.

31 Mpe Banzambe balobaki: Tokosala nyonso oyo tolobaki, mpe tokobongisa bango; mpe tala, bakozala na botosi mpenza. Mpe esalemaki ete ezalaki uta na mpokwa kino na ntongo babiangaki butu; mpe esalemaki ete ezalaki uta na ntongo kino na mpokwa babiangaki moi; mpe batangaki mbala ya motoba.

Bimisa na lokasa