Makomi
Bilili ya Nkoma na Maboko 1


Bilili ya Nkoma na Maboko uta na Buku ya Abalayama

No. 1

Elilingi
Bilili ya Nkoma na Maboko 1

Ndimbola

Elili 1. Anjelu ya Nkolo.

Elili 2. Bakangi Abalayama singa likolo ya etumbelo.

Elili 3. Nganganzambe mosambeli bikeko ya Elekena ameki kotumba Abalayama lokola mbeka.

Elili 4. Etumbelo ya mbeka elongo na banganganzambe basambeli bikeko, kotelemaka liboso ya banzambe ya Elekena, Libina, Mamakira, Kolasi, mpe Falo.

Elili 5. Nzambe ya ekeko ya Elekena.

Elili 6. Nzambe ya ekeko ya Libina.

Elili 7. Nzambe ya ekeko ya Mamakira.

Elili 8. Nzambe ya ekeko ya Kolasi.

Elili 9. Nzambe ya ekeko ya Falo.

Elili 10. Abalayama na Ejipito.

Elili 11. Elingi kolakisa makonzi ya lola, lokola esosolami na Baejipito.

Elili 12. Laukiyangi, elingi koloba bofungwami, to bofungwami ya polele likolo ya mitu na biso; kasi awa, na kotalaka likambo oyo, mokano ya Baejipito ezali ete elimbola Sawumawu, kozala likolo, soki te lola, oyo ekokani na liloba ya Baebele, Sawumayimi.

Bimisa na lokasa