Makomi
Bilili ya Nkoma na Maboko 2


Bilili ya Nkoma na Maboko uta na Buku ya Abalayama

No. 2

Elilingi
Bilili ya Nkoma na Maboko 2

Ndimbola

Elili 1. Kolobi, elingi koloba ekelamo ya yambo, penepene na mokili ya selesitiale, soki te efandeli ya Nzambe. Yambo na kotalaka boyangeli, nsima na kotalaka emekelo ya ntango. Emekelo engebene na ntango ya selesitiale, oyo ntango ya selesitiale elingi koloba mokolo moko na molai ya lipeko moko. Mokolo moko mokokani na mibu nkoto engebene na emekelo ya mabele oyo, oyo ebiangami na Baejipito Yah-oh-eh.

Elili 2. Monzoto oyo ezwami penepene ya Kolobi, ebiangami Olibilisi na Baejipito, oyo ezali penepene ya bokeli bonene koyangelaka penepene na selesitiale to esika wapi Nzambe afandi; ezali lisusu na fungola ya nguya, oyo etali minzoto minene misusu; lokola ebimisami uta na Nzambe epayi ya Abalayama, wana ezalaki ye kotumba mbeka likolo ya etumbelo, oyo atongaki mpo na Nkolo.

Elili 3. Esalemi mpo na kolakisa Nzambe, wana efandi ye likolo ya kiti ya bokonzi na ye, lokola alatisami na nguya mpe likoki; na motole ya pole ya seko likolo ya moto na ye; kolakisaka lisusu Maloba makonzi ya Bonganganzambe Bosantu, lokola ebimisamaki epayi ya Adama na Elanga ya Edene, lokola lisusu na Sete, Noa, Melikisedeki, Abalayama, mpe banso epayi ya nani Bonganganzambe bobimisamaki.

Elili 4. Ekokani na liloba ya Ebele Laukiyangi, elingi koloba etando, to bofungwami ya polele ya lola; lisusu elili ya motuya, na Ejipito elingi koloba nkoto yoko; ekokani na emekelo ya ntango ya Obilisi, oyo ezali ndenge moko na Kolobi na mozolongano na yango mpe na emekelo na yango ya ntango.

Elili 5. Ebiangami na Ejipito Enis-go-on-dosi; oyo ezali lisusu moko ya monzoto monene oyo eyangelaka, mpe eyebani na Baejipito lokola Moi, mpe edefaka pole na yango uta na Kolobi na lisalisi ya Kaye-e-vanilisi, oyo ezali Fungola monene, to, na maloba mosusu, nguya ya boyangeli, oyo eyangelaka minzoto mosusu minene mikangama to minzoto zomi na mitano, lokola lisusu Fuluese soki mpe Sanza, Mabele mpe Moi kati na mizolongano na bango na mobu moko. Monzoto monene oyo ezwaka nguya na yango na lisalisi ya Kli-filosi-isi-esi, to A-ko-kau-bimi, minzoto mikundolami na mituya 22 mpe 23, kozwaka pole uta na mizolongano ya Kolobi.

Elili 6. Elakisi mabele oyo na nsuka minei na mango.

Elili 7. Elakisi Nzambe kofandaka likolo ya kiti ya bokonzi na ye, kobimisaka na nzela ya lola Maloba makonzi ya Bonganganzambe; lokola, elakisi lisusu, elembo ya Molimo Mosantu epayi ya Abalayama, na lolenge ya ebenga.

Elili 8. Ezali na makomi oyo ekoki kobimisama epayi na mokili te; kasi ekoki kozwama na Tempelo Esantu ya Nzambe.

Elili 9. Esengeli kobimisama te na ntango oyo.

Elili 10. Lolenge moko.

Elili 11. Lolenge moko. Soki mokili mokoki kozwa mituya oyo, tika ete ezala bongo. Amene.

Bilili 12, 13, 14, 15, 16, 17, 18, 19, 20, mpe 21 ekopesama na ntango esengeli ya Nkolo ye moko.

Bobongoli boye ezwami likolo epesami na lolenge ete tozali na makoki ya kosala yango na ntango oyo.

Bimisa na lokasa