Makomi
Mose 4


Mokapo 4

(Sanza ya motoba–Sanza ya zomi 1830)

Lolenge nini Satana akomaki zabulu—Asengini Eva—Adama mpe Eva bakwei, mpe kufa ekoti na mokili.

1 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki epayi ya Mose, kolobaka: Satana wana, oyo opesi motindo na nkombo ya Mobotami se Moko na ngai, azali se moko oyo wana uta na ebandeli, mpe ayaki liboso na ngai, kolobaka—Tala, nazali awa, tinda ngai, nakozala mwana mobali na yo, mpe nakosikola bato nyonso, ete molimo moko te akobunga, mpe solo mpenza nakosala yango; yango wana pesa ngai lokumu na yo.

2 Kasi, tala, Mwana Molingami na ngai, oyo azalaki Molingami mpe Moponami uta na ebandeli, alobaki na ngai—Tata, bolingi na yo esalema, mpe nkembo ezala na yo libela.

3 Yango wana, mpo na ntina wana Satana atombokaki na ngai, mpe alukaki kobebisa nguya ya boponi ya moto, oyo ngai, Nkolo Nzambe, napesaki ye, mpe lisusu, ete nasengeli kopesa ye nguya ya ngai moko; na nguya ya Mobotami se Moko na ngai, natindaki ete asengeli kobwakama na nse;

4 Mpe akomaki Satana, iyo, kutu zabulu, tata ya lokuta nyonso, mpo na kokosa mpe kozipa bato miso, mpe komema bango bakangemi na bolingi na ye, kutu mingi lokola bakoyoka mongongo na ngai te.

5 Mpe sikawa nioka azalaki mayele mabe koleka nyama nyonso mosusu ya zamba oyo, ngai, Nkolo Nzambe, nasalaki.

6 Mpe Satana akotisaki yango na motema ya nioka, (mpo abendaki mingi nsima na ye,) mpe alukaki lisusu kokosa Eva, mpo ayebaki mayele ya Nzambe te, yango wana alukaki kobebisa mokili.

7 Mpe alobaki epayi na mwasi: Iyo, Nzambe alobaki—Bokoki kolia mbuma ya nzete moko ya elanga te? (Mpe alobaki na monoko ya nioka.)

8 Mpe mwasi alobaki epayi na nioka: Tokoki kolia mbuma ya banzete ya elanga;

9 Kasi mpo na mbuma ya nzete oyo ozali kotala kati kati na elanga, Nzambe alobaki—Bokoki kolia yango te, bokoki kosimba yango mpe te, mbele bokufa.

10 Mpe nioka alobaki na mwasi: Solo bokokufa te;

11 Mpo Nzambe ayebi mpenza ete mokolo bokolia mbuma na yango, na ntango wana miso na bino makofungolama, mpe bokozala lokola banzambe, koyebaka bolamu mpe mabe.

12 Mpe ntango mwasi amonaki ete nzete ezalaki malamu mpo na kolia, mpe ete ekomaki kitoko na miso, mpe nzete ya koyokela mposa mpo na kokomisa ye bwania, akamataki mbuma na yango, mpe aliaki yango, mpe apesaki lisusu epayi ya mobali na ye, ye mpe aliaki yango.

13 Mpe miso na bango mibale efungwamaki, mpe bayebaki ete bazalaki bolumbu. Mpe bazipaki nkasa ya mosuke esika moko mpe bamisalelaki mangwanda.

14 Mpe bayokaki mongongo ya Nkolo Nzambe, wana ezalaki bango kotambola na elanga, na mpokwa; mpe Adama mpe mwasi na ye bakendaki kobombana uta na miso ya Nkolo Nzambe na kati ya banzete ya elanga.

15 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nabiangaki Adama, mpe nalobaki epayi na ye: Okeyi wapi?

16 Mpe alobaki: Nayokaki mongongo na yo na elanga, mpe nabangaki, mpo namonaki ete nazali bolumbu, mpe nabombanaki.

17 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki epayi ya Adama: Nani ayebisaki yo ete ozali bolumbu? Esili yo kolia mbuma ya nzete oyo wapi napesaki yo motindo ete osengeli kolia te, soki bongo okokufa solo mpenza?

18 Mpe mobali alobaki: Mwasi opesaki ngai, mpe oyo opesi ngai motindo ete asengeli kotikala na ngai, ye nde apesaki ngai mbuma ya nzete mpe naliaki.

19 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki epayi na mwasi: Eloko nini oyo osali? Mpe mwasi alobaki: Nioka akosaki ngai, mpe naliaki.

20 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki epayi na nioka: Mpo ete osali oyo okolakelama mabe likolo ya bibwele nyonso, mpe likolo ya nyama nyonso ya zamba; okotambola likolo ya libumu na yo, mpe okolia putulu mikolo nyonso ya bomoi na yo;

21 Mpe nakotia bonguna kati na yo mpe mwasi, kati ya nkona na yo mpe nkona na ye; mpe akotuta yo na moto, mpe okotuta ye na litindi na ye.

22 Epayi na mwasi, ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki: Nakobakisa mingi mpenza mpasi na yo mpe kobota na yo. Na mpasi nde okobota bana, mpe mposa na yo ekozala se na mobali na yo, mpe akokonza likolo na yo.

23 Mpe epayi ya Adama, ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki: Mpo ete oyoki mongongo ya mwasi na yo, mpe osili kolia mbuma ya nzete oyo wapi napesaki yo motindo, kolobaka—Okolia te mbuma na yango, mabele malakelami mabe mpo na ntina na yo; na mpasi nde okolia uta na mabele yango mikolo nyonso ya bomoi na yo.

24 Makobimisa lisusu nsende, mpe nkamba ya nzube mpo na yo, mpe okolia ndunda ya bilanga.

25 Na motoki ya elongi na yo nde okolia lipa, kino okozonga na mabele—mpo na ntembe te okokufa—mpo ete uta na mabele okamatamaki: mpo ozalaki putulu, mpe okozonga na putulu.

26 Mpe Adama abiangaki nkombo ya mwasi na ye Eva, mpamba te azalaki mama ya banso oyo bazali na bomoi; mpo boye nde ngai, Nkolo Nzambe, nabiangaki ya yambo kati na basi nyonso, oyo bazali mingi.

27 Mpo na Adama, mpe lisusu mpo na mwasi na ye, nasalaki, ngai, Nkolo Nzambe, kazaka ya mposo ya nyama, mpe nalatisaki bango.

28 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki epayi na Mobotami se Moko na ngai: Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba bolamu mpe mabe; mpe sikawa mbele atia loboko mpe alia lisusu mbuma ya nzete ya bomoi, mpe alia mpe azala na bomoi libela na libela,

29 Boye ngai, Nkolo Nzambe, nakobimisa ye uta na Elanga ya Edene, mpo na kolona mabele oyo uta wapi azwamaki;

30 Mpo lokola ngai, Nkolo Nzambe, nazali na bomoi, kutu bongo nde maloba na ngai makoki kozonga mpamba te, mpo lokola ebimi uta na monoko na ngai masengeli kokokisama.

31 Bongo nabimisaki mobali libanda, mpe natiaki na esti ya Elanga ya Edene, mukelupa mpe mompanga moko na moto, oyo ezalaki kobaluka bipayi nyonso mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.

32 (Mpe oyo ezali maloba oyo nalobaki epayi ya mosali na ngai Mose, mpe ezali solo kutu lokola nalingi; mpe nalobeli yo yango. Keba ete olakisa yango epayi ya moto te, kino nakotinda yo, longola se na bango oyo bandimi. Amene.)

Bimisa na lokasa