Banguya ya Bonganganzambe
Bonene ya bonganganzambe ya bule oyo bozali na yango ezali ntina koleka na mosala ya Nkolo na mabota na bino mpe na mabiangi na bino.
Toyokaki lisakola ya emoniseli uta na Moambi Russell M. Nelson. Toyokaki malengeli malamu ya ntina na Bampaka Christopherson mpe Rasband mpe na Mokambi Eyring. Oyo ekolobama sima, lisusu na ebele kowuta na Mokambi Nelson, akolengela oyo bino, bakambi ya Nkolo mpe banganganzambe, bakosala sikawa na mikumba na bino, Mpo na kosunga na yango, nakolobela mikano ya ntina koyangelaka bonganganzambe oyo bozali na yango.
I. Bonganganzambe
Bonganganzambe ya Melekisedeke ezali likoki ya bonzambe ya Nzambe oyo apesi mpo na kokokisa mosala na Ye “mpo na kokokisa … bomoi ya seko ya motofe of man” (Moses 1:39). Na 1829, epesamaki na Joseph Smith mpe Oliver Cowdery na Bapostolo ya Mobikisi Petelo, Yakobo mpe John (tala D&A 27:12). Ezali bule mpe nguya likolo ya banguya na biso mpo na kosalela.
Ba fungola ya bonganganzambe ezali banguya ya kokamba mosala ya likoki ya bonganganzambe. Na yango, ntango bapostolo bapesaki Bonganganzambe ya Melikisedeki na Joseph mpe Oliver, bapesaki bango lisusu bafungola ya bokambi mosala na yango (tala D&A 27:12–13). Kasi bafungola nyonso ya bonganganzambe epesamaki nan a ntango wana. Bafungola nyonso mpe boyebi ya ntina mingi mpo na “eleko oyo ya botondi ya bantango” (D&A 128:18) epesamaki “molongo likolo ya molongo” (mokapo 21). Bafungola ya bobakisi epesamaki na Tempelo ya Kirtland mibu nsambo nsima (tala D&A 110:11–16). Bafungola oyo epesamaki mpo na kokamba likoki ya bonganganzambe na bobakisami ya misala oyo epesamaki na ntango wana keys were given to direct priesthood authority in the additional assignments being given at that time, such as baptism for the dead.
Bonganganzambe ya Melikisedeke ezali ekeko to ekela te. Ezali nguya ya bonzambe epesami na bondimi mpo na kosalela mpo na litomba ya mosala ya Nzambe mpo na bana na Ye. Tosengeli ntango nyonso komikundola ete mibali oyo bazali na bonganganzambe bazali te “bonganganzambe.” Ezali malamu te kokokanisa “bonganganzambe mpe basi.” Tosengeli okokanisa “ banganganzambe ya bonganganzambe mpe basi.”
II. Ntoma ya Mosala
Sikawa tika toyeba nini Nkolo Yesu Klisto azelaka uta na baoyo basimbaka bonganganzambe na Ye—lolenge nini tosengeli komema milimo epai na Ye.
Mokambi Joseph F. Smith ateyaki: “elobelamaki na bosolo ete Eklezia elengelami na bobongi nie koleka. Motungisi moko ezali ete mangomba oyo ezali mpenza na bomoi te na babosenga ya oyo ezali likolo na bango. Ntango bamipesi mobimba na babosenga oyo esengeli mpo na bango, bakokokisa mikumba na bango na bondimi koleka, mpe mosala ya Nkolo ekozala nyonso makasi mpe nguya koleka mpe ekolakisama na mokili.”1
Mokambi Smith akebisaki lisusu:
“Nkoma epesama ya Nzambe ya lokumu … esangana na babilo ebele na kati mpe milongo ya Bonganganzambe ya Bule, esengeli te kosalema to kozwamalokola ezali nkoma ya moto; ezali mpo na biloko ya mpauni te oyo etalamisama mpo na molakisi, kasi ezali mpo na mosala ya bomikitisi na mosala ya Molakisi moko oyo tosakolaka mpo na kosalela. …
“… Tozali kosala mpo na lobiko ya milimo, mpe tosengeli koyoka ete oyo ezali mokumba monene koleka epesameli biso. Na yango, tosengeli koyoka bolingi ya kobonza eloko nyonso, soki esengeli, mpo na bolingo ya Nzambe, lobiko ya bato nkembo ya bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele.”2
III. Babilo ya Bonganganzambe
Kati ya Eklezia ya Nkolo, babilo na Bonganganzambe ya Milikisedeki ezali na bisalelo ekesana. Malongi mpe Mayokani etalisi banganganzambe minene lokola “bakambi balobeli to basungi koyangelaka likolo ya makonzi ekesena na bamboka ya bapaya” (D&A 124:134). Ezali lokola bampaka “bantoma balobeli na eklezia na ngai” (D&A 124:137). Oyo ezali mateya nan gai misusu na oyo etali bokeseni ya bisaleli oyo.
Banganganzame minene basalaka mpe bayangelaka mpo na makambo ya molimo (tala D&A 107:10, 12). Lisusu, lokola Mokambi Joseph F. Smith ateyaki, “Na lolenge oyo akulisamaki nganganzambe monene, [ye] asengeli koyoka ete azali na mokumba … ya kozala ndakisa malamu liboso ya mobange mpe elenge, mpe komitia ye moko na esika ya kozala molakisi ya boyengebene, kaka na mokano te kasi mingi na ndakisa—kopesaka na elenge bamatomba ya boyebi ya mobu, mpe kokoma yemoko nguya na kati ya lingomba ya bato.”3
Ya mikumba ya mpaka, Mpaka Bruce R. McConkie ya Lisanga likoki ya Bazomi na mibale ateyaki: “Mpaka azali ntoma ya Nkolo Yesu Klisto. … Apesameli mosala ya kolobela na esika mpe kolobela Molakisi na ye … na kosalelaka bato baninga na ye. Azali mosaleli ya Nkolo.”4
Mpaka McConkie aboyaki likanisi ete ezali “bobele mpaka.” “Mpaka nyonso kati ya Eklezia azali na bonganganzambe lokola Mokambi ya Eklezia … ,” alobaki. “Nini ezali mpaka? Azali mobateli, mobateli asungaka kati ya etonga ya banyama ya Mobateli Malamu.”5
Na mosala ya ntina oyo ya kosalaka kati ya etonga ya banyama ya Mobateli Malamu, bokeseni ezali te kati kati ya babilo ya nganganzambe monene mpe mpaka kati ya Bonganganzambe ya Melekisedeki. Kati ya eteni monene 107 ya Malongi mpe Mayokani, Nkkolo alobi, “Banganganzambe minene nsima ya molongo ya Bonganganzambe ya Melekkisedeki bazali na likoki ya kosalisa na mosala na bango moko, na nse ya boambami ya bokambi, na kosalisaka makambo ya molimo, mpe lisusu na mosala ya mpaka [to mosala kati ya Bonganganzambe ya Alona]” (D&A 107:10; tala lisusu eteni 12).
Mokano ya ntina koleka mpo na banganganzambe nyonso ezali mokano eteyami na Buku ya Mormon ya profeta Yakobo. Sima ye mpe ndeko na ye ya mobali Joseph bakulisamaki banganganzambe mpe batei ya bato, alobaki: “Tosalaki makoki ya mosala na biso epai ya Nkolo, kozwaa likolo na biso mikumba, koyanolaka masumu ya bato likolo ya mito na biso soki toteyaki bango te liloba ya Nzambe na etingia nyonso” (Jacob 1:19).
Bandeko mibali, mikumba na biso lokola banganganzambe ya bonganganzambe ezali ntina koleka. Mangomba misusu ekoki ekoki kosepela na mibeko ya mokili ya bosaleli ya koteyaka bansango mpe kosalelaka misala na bango. Kasi biso baoyo tomemi bonganganzambe ya Nzambe tozali na nguya ya bonzambe oyo ezali koyangela kutu na boyingeli na bokonzi ya selesitiale ya Nzambe. Tozali na ntina mpe mokumba oyo Nkolo atiaki na nkasa ya yambo esakolama na Malongi mpe Mayokani. Tosengeli kosakola na mokili:
“Ete moto nyonso asengeli koloba na nkombo ya Nzambe Nkolo, kutu Mobikisi ya mokili;
“Ete bondimi esengeli lisusu komatisama na mabele;
“Liyokani ya seko ekoka kozongisama;
“Ete bofuluki ya nsango malamu na ngai ekoka kosakolama na batau mpe basembo na mokili” (D&A 1:20–23).
Mpo na kokokisa mbongwana oyo, tosengeli kozala na bondimi na “kosalelaka” mabiangi ya bonganganzambe na biso mpe mikumba (tala D&A 84:33). Mpaka Harold B. Lee alimbolaki oyo ezali elimboli kosalela bonganganzambe: “Ntango moto akomi nganganzambe, akomi mosaleli ya Nkolo. Asengeli kokanisa na ntina ya libiangi na ye lokola azalaki na mosala ya Nkolo. Yango ezali oyo elingi koloba kosalela bonganganzambe.”6
Na yango, bandeko mibali, soki Nkolo Yemoko asengelaki kotuna bino bosunga moko ya bana na Ye ya mibali to basi—oyo Asalaki na nzela ya basali na Ye—bokoki kosala yango? Mpe soki bosalaki yango, bokokakikosala lokola mosali na Ye, “na mosala ya Nkolo,” kotalelaka lisungi na Ye elakelama?
Mpaka Lee apesaki liteya mosusu na ntina ya kosalelaka bonganganzambe: “Ntango olati lineti oyo ekomisaka biloko minene koleka soki olataki lineti te; wana ezali lineti ya mosala. Sikawa … soki asali asaleli bonganganzambe na ye—yango ezali, kokomisa yango monene koleka lianisi na ye ya yambo ezalaki ntina koleka likanisi ya moto mosusu ezalaki—oyo ezali lolenge osalelaka bonganganzambe na yo.”7
Oyo ezali ndakisa ya banganganzambe kosalelaka mokumba ya bonganganzambe. Nayoaki yango uta na Mpaka Jeffrey D. Erekson, moninga na ngai na likita ya likoki na Idaho. Lokola mpaka elenge mowelani, mobola mpe na bozangi ya kosilisa kelasi na ye ya mobu ya nsuka, Jeffrey azwaki mokano ya kotika mpe kondima kosala mosala makasi. Mwa mikolo moke sima bampaka na ye mokambi ya likoki ayaki na ndako na ye. “Ososolaka ntina ya bafungola ya bonganganzambe nazalaka na yango?” mokambi atunaki. Ntango Jeffrey alobaki ayebi, Mokambi ayebisaki ye ete koyokaka likanisi na ye ya kotika kelasi, Nkolo atungisaki ye na mpongi ya butu kopesa Jeffrey nsango oyo: “Lokola bozali bampaka ya likoki, natei yo otia kelasi te. Oyo ezali nsango epai na yo uta na Nkolo.” Jeffrey akobaki na kelasi. Mibu nsima nakutanaki na ye akomi molongi monene ya mombongo mpe nayokaki ye kobeta lisolo na banganganzambe, “Ete [liteya] esalaki boeseni ya nyonso na bomoi na ngai.”
Nganganzambe asalelaki bonganganzambe na ye mpe libiangi, mpe yango esalaki “bokeseni nyonso” kati ya bomoi ya mwana mosusu ya Nzambe.
IV. Bonganganzambe na Libota
Kino sikawa, nazali kolobela na ntina ya misala ya bonganganzambe na Eklezia. Sikawa nakolobela na ntina ya bonganganzambe kati ya libota. Nabandeli na bafungola. Mokano oyo likoki ya bonganganzambe ekoki bobele kosalema na nse ya bokambami ya moto oyo azali na bafungola mpo na mosala wana ezali ntina koleka kati ya Eklezia kasi esalemi te mpo na mosala ya likoki ya bonganganzambe na libota.8 Tata oyo azali nganganzambe ayangelaka na libota na likoki ya bonganganzambe oyo azali na yango. Azali na ntina te ya kozala na bokambami to bondimami ya bafungola ya bonganganzambe na ntina ya koyangela bato ya libota na ye, kosala makita ya libota, kopesa lipamboli ya bonganganzambe na mwasi mpe bana na ye, to kopesa mapamboli ya bokangoli na bato ya libota to basusu.
Soki batata bazali kosalela bonganganzambe na bango na mabota na bango mobimba, yango ekolendisa etinda ya Eklezia koleka eloko mosusu bakoki kosala. Batata oyo bazali banganganzambe ya Melekisedeki basengeli kotosa mitindo mpo na kozala na nguya ya kosalela bonganganzambe kati ya mabota na bango. Batata basengeli lisusu kosalela bolingo na bozalani ya libota mpo ete bandeko ya libota bakoki kosenga batata na bango mapamboli. Mpe baboti basengeli kolendisa mingi mapamboli ya bonganganzambe na libota.
Batata, bosala lokola “bozali lolenge moko” na basi na bino, lokola esakola ya libota etei.9 Mpe, baboti, ntango bozali na libaku ya kosala na nguya mpe na bokasi ya likoki ya bonganganzambe na bino, bosala yango “na bondimami, na bomipesi, na bosembo mpe na boyengebene, mpe na bolingo makasi” (D&A 121:41). Yango ezali mobeko ya likolo mpo na mosala ya likoki ya bonganganzambe ezali ntina kati na libota. Mokambi Harold B. Lee apesaki elikya oyo kaka bobele ntango akomaki Mokambi ya Elezia: “Nguya bonganganzambe oyo bozali na yango ezali ntina mingi koleka atako na ntango ya mpasi na libota, maladi makasi, to ekateli moko oyo esengeli kosalema. … Nguya ya bonganganzambe, oyo ezali nguya ya Nzambe ya Bokasi nyonso, ezali nguya ya kosalela bikamwisi soki Nkolo alingi yango esalema bongo, kasi na ntina mpo na biso tosalela bonganganzambe oyo, tosengeli kozala sembo mpo na kosalela yango. Bozangi ya bososoli mokano oyo ezali bozangi kozwa mapamboli ya kozala na bonganganzambe monene oyo.”10
Bandeko na ngai ya bolingo, bonene ya bonganganzambe ya bule oyo bozali na yango ezali ntina koleka mpo na kosala ya Nkolo na mabota na biso mpe na mabiangi ya Eklezia.
Natatoli na ntina na Ye oyo bonganganzambe ezali ya ye. Na nzela ya bomikabi na Ye monyokoli mpe likabo mpe lisekwa, mobali mpe mwasi nyonso bazali na elikya ya bozangi nkufa mpe libaku malamu mpo na bomoi ya seko. Moko na moko kati na biso asengeli kozala na bondimi mpe bompikiliki na kosalaka eteni na biso na mosala monene oyo ya Nzambe Tata na biso ya Seko, na nkombo ya Yesu Klistu, amene.