Likita Linene
Mpo ete Nzambe Alingaki Biso Mpenza
Likita linene ya sanza ya minei 2022


9:58

Mpo ete Nzambe Alingaki Biso Mpenza

Nzambe alingaki biso mpenza ete Atindaki Mwana na Ye Mobotami se Moko mpo na kokweisa biso te kasi mpo na kobikisa biso.

“Mpo ete Nzambe alingaki mokili, ete apesaki Mwana na ye moko ya likinda, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi ete azala na bomoi ya seko” (Yoane 3:16). Mbala ya yambo natangaki molongo oyo, nazalaki na ndako nzambe to na likita ya libota na mpokwa te. Nazalaki kotala pologalame ya lisano na televizio. Likambo te lisano nini lisano yango ezalaki, atako bongo moto moko atombolaki elembo moko bakoma “Yoane 3:16.”

Nayaki kolinga mbala moko molongo 17: “Mpo Nzambe atindaki Mwana na Ye te na mokili mpo na kopesa etumbu na mokili; kasi mpo ete mokili na nzela na Ye ekoka kobika.”

Nzambe atindaki Yesu Klisto, Mwana na Ye Mobotami se Moko na mosuni, mpo na kopesa bomoi na Ye mpo na moto nyonso kati na biso. Asalaki yango mpamba te Alingaka biso mpe asalaki mwango mpo ete moko na moko kati na biso azonga na ndako na Ye.

Kasi oyo ezali mwango ya bulanketi te, oyo ekokanga nyonso, ezanga ntina. Ezali mpo na moto se moko, etiama na Tata ya Lola ya bolingo, oyo ayebi mitema na biso, bankombo na biso, mpe maye Azali na mposa biso tosala. Mpo na nini tondimelaka yango? Mpamba te makomi masantu eteyaka biso yango.

Mose mbala mingi ayokaki Tata na Lola koloba maloba “Mose, mwana na ngai” (tala Mose 1:6; tala lisusu milongo 7, 40). Abalayama ayekolaki ete azalaki mwana ya Nzambe, aponama mpo na kokokisa etinda na ye kutu liboso abotama (tala Abraham 3:12, 23). Na loboko ya Nzambe, Esetele atiamaki na esika ya nguya mpo na kobikisa bato na ye (tala Esetele 4). Mpe Nzambe andimaki elenge mwasi moko, mosali, mpo na kotatola na ntina ya mosakoli na bomoi mpo ete Namana akoka kobikisama (tala 2 Mikonzi 5).

Nalingaka mingi mingi moto malamu wana, mokuse na nzoto, oyo amataki na nzete mpo na komona Yesu. Mobikisi ayebaki ete azalaki kuna, atalaki likolo ya bitape, mpe alobaki maloba oyo: “Zakai, … kita na nse” (Luka 19:5). Mpe tokoki te kobosana elenge mobali ya mibu 14 oyo akendaki na zamba mpe ayekolaki lolenge nini mwango ya moto moko ezali mpenza: “[Joseph,] Oyo azali Mwana na Ngai ya Bolingo. Yokela Ye!” (Joseph Smith—History 1:17).

Bandeko mibali mpe basi, tozali bokebi ya mwango ya Tata na biso ya Lola mpe ntina ya etinda ya Mobikisi. Moko na moko na biso, moto na moto, azali mosala na Bango mpe nkembo na Bango.

Mpo na ngai, buku moko te ya makomi etalisaka yango polele mingi koleka boyekoli na ngai ya Boyokani ya Kala. Mokapo nsima ya mokapo tomonaka bandakisa ya lolenge nini Tata na Lola mpe Yehova bakotaka na bolingo kati na bomoi na biso.

Tozalaki kala te koyekola oyo etali Yosefe, mwana mobali ya bolingo ya Yakobo. Uta na bolenge na ye, Yosefe azwaki ngolu na Nkolo, kasi akutanaki na mimekano minene na maboko ya bandeko na ye ya mibali. Poso mibale nsima, mingi na biso tosimbamaki na lolenge Yosefe alimbisaki bandeko na ye ya mibali. Na Yaka,Landa, Ngai totangi: “Na ndenge mingi, bomoi ya Yosefe ekokokani na oyo ya Yesu Klisto. Atako masumu esalaki mpasi makasi, Mobikisi apesaka bolimbisi, akangolaka biso banso uta na mabaku ya mabe mosika koleka nzala. Soki tosengeli kozwa bolimbisi to kopesa yango to te—na esika mosusu biso banso tosengeli kosala nyonso mibale—ndakisa ya Yosefe elakisi biso epai ya mobikisi, liziba ya solo ya libiki mpe boyokani lisusu.”1

Liteya nalingaka na lisolo wana ewuti na ndeko mobali ya Yosefe Yuda, oyo asalaki eteni moko kati na mwango na ye moko Nzambe mpo na Yosefe. Ntango Yosefe atekamaki na bandeko na ye ya mibali, Yuda andimisaki bango balongola bomoi ya Yosefe te kasi bateka na ye bowumbo (tala Genese 37:26–27).

Mibu mingi nsima, Yuda mpe bandeko na ye ya mibali basengelaki komema leki na bango ya mobali ya elenge mpenza, Benyamina, na Ezipito. Na ebandeli tata na bango aboyaki. Kasi Yuda alakaki Yakobo—akozongisa Benyamina na ndako.

Na Ezipito, elaka ya Yuda etielamaki ntembe. Elenge Benyamina afundamaki na lokuta kosalaka mabe. Yuda, engebene na elaka na ye, andimaki kotiama na boloko na esika ya Benyamina. “Mpo ete,” alobaki, “ngai nakoka kozonga epai ya tata na ngai boni soki mwana yango azali na ngai elongo te?” (tala Genese 44:33–34). Yuda azalaki na mokano ya kobatela elaka na ye mpe kozongisa Benyamina na kimia. Esila kokomela yo oyoka na bomoi na yo mpo na basusu lolenge Yuda ayokaki mpo na Benyamina?

Ezali boye te lolenge baboti bayokaka mpo na bana na bango? Lolenge bamisionele bayokaka mpo na bato basalisaka? Lolenge bakambi ya Eteyelo ya bana mpe bilenge bayokaka mpo na baye bateyaka mpe balingaka?

Kotala te nani ozali sikawa to makambo na yo sikawa, moto moko ayokaka lolenge to oyo mpo na yo. Moto moko alingaka kozonga epai ya Tata na Lola elongo na yo.

Nazali na botondi mpo na baoyo batikaka biso mokolo moko te, baoyo bakobaka kosopa mitema na bango na losambo mpo na biso, mpe bakobaka koteya mpe kosalisa biso tolongobana mpo na kozonga na ndako epai ya Tata kati na Lola.

Kala mingi te moninga moko ya bolingo alekisaki mikolo 233 na lopitalo na COVID-19. Na ntango wana, bakendeki kotala ye na tata na ye akufa oyo asengaki ete apesa nsango epai ya bankoko na ye. Kutu uta na ngambo mosusu ya elamba, nkoko malamu oyo azalaki na mposa ya kosalisa bankoko na ye ya bana bazonga na ndako na bango ya Lola.

Mingi mingi, bayekoli ya klisto bazali komikundola “Babenyamina” na bomoi na bango. Na mokili mobimba bayokaki etinda ya polele ya profeta na bomoi, Mokambi Russell M. Nelson. Bilenge mibali mpe bilenge basi bamipesi na limpinga ya bilenge ya Nkolo. Bato mpe mabota bazali kosalisa na molimo ya kosalisa—ya bolingo, kokaba, mpe kobengisa baninga mpe baninga ya penepene mpo na koya epai ya Klisto. Bilenge mpe bakolo bazali komikundola mpe koluka kobatela mayokani na bango—kotondisaka batempelo ya nzambe, kozwaka bankombo ya bato ya libota bakufa, mpe kosalaka makuli na nkombo na bango.

Mpo na nini mwango ya moto se moko ya Tata na Lola mpo na biso ezali ya kosalisa basusu bazonga epai na Ye? Mpamba te oyo ezali lolenge tokokoma lokola Yesu Klisto. Na nsuka, lisolo ya Yuda mpe Benyamina eteyi biso oyo etali libonza ya Mobikisi mpo na biso. Na nzela ya Bomikabi na Ye, Apesaki bomoi na Ye mpo na komema biso na ndako. Maloba ya yuda ezali koloba bolingo ya Mobikisi: “ngai nakoka kozonga epai ya tata na ngai boni soki [yo] ozali na ngai elongo te?” Lokola basangisi ya Yisalaele, oyo ekoki kozala maloba na biso mpe lokola.

Boyokani ya Kala etondi na makamwisi mpe mawa ya boboto oyo ezali ezalela ekesana ya mwango ya Tata na Lola. Na 2 Mikonzi 4, liloba “ekweyaki na mokolo moko” esalelami mbala misato mpo na kobeta nsete na makambo ya motuya esalamaka engebene na ngonga ya Nzambe, mpe eloko moko te ezali moke mpenza mpo na Ye.

Moninga na ngai ya sika Paul atatolaka bosolo oyo. Paulo akolaki na ndako moko oyo ntango mosusu bazalaki kosala makambo na makasi mpe ntango nyonso ya kondima biyamba te. Ntango azalaki na eteyelo na ngada ya basoda na Allemangne, amonaki bandeko mibale ya basi oyo bazalaki lokola kozala na pole ya molimo. Kotunaka mpo na nini bazalaki ya kokesana ememaki eyano ete bazali ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikoio mya Nsuka.

Nokinoki Paulo abandaki kokutana na bamisionele mpe babengisaki ye na ndakonzambe. Mokolo ya eyenga oyo elandaki, ntango akitaki na bisi, amonaki mibali mibale balataki semisi ya mpembe mpe kalavati. Atunaki bango soki bazalaki bampaka ya Eklezia. Bayanolaki iyo, yango wana Paulo alandaki bango.

Ntango ya mayangani, moteyi alakisaki mosapi epai ya bato oyo bazalaki na lisanga mpe abengisaki bango batatola. Na nsuka ya litatoli moko na moko, mobeti mbunda apesaki mbote ya mbunda mpe lingomba egangaki, “Amene.”

Ntango moteyi aponaki Paulo, atelamaki mpe alobaki, “Nayebi ete Joseph Smith azalaki profeta mpe Buku ya Mormon ezali ya solo.” Ezalaki na mbote ya mbunda to baamene moko te. Paulo nsukansuka asosolaki ete akendaki na eklezia ya mabe. Nokinoki, Paulo amonaki nzela ememaka na esika malamu mpe azwaki libatisi.

Na mokolo ya libatisi ya Paulo, mondimi moko oyo ayebi te ayebisaki ye, “Obikisaki bomoi na ngai.” Mwa baposo liboso, moto oyo azwaka mokano ya koluka ndakonzambe mosusu mpe azalaki na liyangani moko na bambunda mpe baamene. Ntango moto yango ayokaki Paulo kopesa litatoli ya Joseph Smith mpe ya buku ya Mormon, asosolaki ete Nzambe ayebaki ye, ayebaki lisusu mitungisi na ye, mpe azalaki na mwango mpo na ye. Mpo na Paulo mpe moto yango lokola, “esalemaki mokolo moko,” solo mpenza!

Biso mpe toyebi ete Tata na Lola azali na mwango ya moto moko ya esengo mpo na moko na moko na biso. Mpamba te Nzambe atindaki Mwana na Ye ya bolingo mpo na biso, makamwisi tozali na yango mposa “ekokweya na mokolo yango [mpenza] esengeli mpo ete mwango ekokisama.

Natatoli ete mobu oyo tokoki koyekola mingi etali mwango ya Nzambe mpo na biso na Boyokani ya Kala. Buku ya bule wana ya bule eteyaka mosala ya basakoli na bangonga ya mpasi mpe loboko ya Nzambe na mokili ya nsoni mpe mbala mingi ya bowelani. Ezali lisusu mpo na ntina ya bandimi ya komikitisa oyo batalelaka na bondimi epai ya boyei ya Mobikisi na biso, kaka lokola totelelaka mpe tomilengelaka mpo na Boyei na Ye ya MibaleBozongi na Ye oyo esakolama kala, bozongi ya nkembo.

Kino mokolo wana, tokoki te komona, na miso na biso ya bomoto, mwango ya Nzambe mpo na ndenge nyonso ya bomoi na biso (tala Doctrine et Alliances 58:3). Kasi tokoki komikundola eyano ntango akutanaki na likambo moko asosolaki te: Ntango ayebaki ndimbola ya makambo nyonso te, ayebaki ete Nzambe alingaka bana na Ye (tala 1 Nefi 11:17).

Oyo ezali litatoli na ngai na ntongo ya Saba kitoko oyo. Tika tokoma yango na mitema na biso mpe topesa yango nzela etondisa milimo na biso na kimia, elikya, mpe bosepeli ya seko: Nzambe alingaki biso mpenza ete Atindaki Mwana na Ye Mobotami se Moko mpo na kokweisa biso te kasi mpo na kobikisa biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Litangi

  1. Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Kala 2022, 51.