Likita Linene
Nguya ya Bolingi ya Kotambola na Molimo
Likita linene ya sanza ya minei 2022


17:18

Nguya ya Bolingi ya Kotambola na Molimo

Nalingi naloba makambo mitano ya motuya tokoki kosala mpo na kosunga biso tobatela elonga malamu ya molimo.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, nalingaka bino. Nalingi mingi libaku oyo ya koloba na bino lelo. Nasambelaka mikolo nyonso ete bobatelama na bitumba nyonso ya mabe ya monguna mpe bozala na makoki ya kolonga mimekano nyonso oyo ekoyela bino.

Mikakatano mosusu ezalaka mpenza mikumba ya moto yemei oyo moto mosusu akoki komona te. Misusu esalemaka na libanda ya mokili. Bondongwani ya bitumba na esiti ya Eropa ezali moko ya makambo oyo. Nakenda mibembo mbala ebele na Ukraine mpe na Russie. Nalingaka mikili wana, bato, mpe nkota na bango. Naleli mpe nasambeli mpo na baoyo nyonso bakutani na etumba oyo. Lokola eklezia tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosunga bato oyo bazali konyokwama mpe komitungisa mpo na kobika. Tozali kobengisa bato nyonso bakoba kokila mpe kosambela mpo na bato nyonso batungisami na libebi oyo. Etumba nyonso ezalaka bobebisi ya somo ya makambo nyonso oyo Nkolo Yesu Klisto ateyaki mpe atelemelaka.

Moto moko te kati na biso akoki kokonza bikolo, to misala ya basusu, to kutu ya mabota na biso moko. Kasi biso moko tokoki komikonza. Libiangi na ngai ya lelo, bandeko mibali mpe basi, ezali ya kosukisa bondongwani oyo ezali kati na ya bino motema, ya bino libota, mpe na ya bino bomoi. Bokunda eloko oyo nyonso ezali kobenda mpo na kosala basusu mabe—bobendi yango ezala lolenge elongi ezali komonana, maloba ya kanda, to boyinani ya moto oyo asala yo mabe. Mobikisi atindaki biso topesa litama mosusu,1 kolinga banguna na biso, mpe kosambela mpo na baoyo bazali konyokola biso.2

Ekoki kozala mpasi makasi ya kotika nkanda oyo emonisami kozala ntina. Ekoki komonana ete ekoki koslema te ete olimbisa baoyo kani misala ya bobebisi esili kosala mpasi na bato oyo bayebi likambo te. Mpe bongo, Mobikisi ayebisaki biso “tolimbisa bato nyonso.”3

Tozali bayekoli ya Nkumu ya Kimia. Uta sikawa kino libela, tosengeli na kimia bobele nde Ye akoki kopesa yango. Lolenge nini tokoki kozela ete kimia ezala na mokili ntango tozali te moto moko moko koluka kimia mpe boyokani na biso moko te? Bandeko mibali mpe basi, nayebi ete oyo nazali koloba ezali pete te. Kasi bayekoli ya Yesu Klisto basengeli kozala ndakisa mpo ete mokili elanda. Nabondeli bino bosala manso bokoki kosala mpo na kosukisa bitumba ya moko na mosusu bondongwani oyo ezali kopela kati ya bomoi na bino.

Nakoki kobeta nsete na libiangi oyo na kosololaka likanisi moko nakanisaki kala te ntango nazalaki kotala lisano ya basketball.

Kati ya lisano, eteni ya yambo ezalaki bondongwani makasi, liboso mpe nsima. Nsima, ya basekondi mitano elandaki yambo eteni ya yambo esila, gardien ya ekipi mosusu atiaki mongete ya bapwe misato. Kaka na sekondi moko etikalaki, moninga na ye ya ekipi ayibaki ndembo mpe atiaki mongete mosusu na buzzer! Mpo ete ekipi wana ekendaki na ndako ya bopemi na elikya ya mingete minei koleka mpe bolingeli ya kokende liboso. Bazalaki na makoki ya komema bolingi wana na eteni ya mibale mpe kolonga lisano.

Bolingi ya Kotambola ezali liloba ya nguya. Biso banso tosila koyoka yango na lolenge moko mpe mosusu—ndakisa, na motuka oyo ekamataka mbango to na bozangi boyokani oyo ebalukaka na boswani.

Yango wana natuni nini ekoki kopelisa bolingi ya botamboli na molimo? Tomoni bandakisa ya bolingi ya botamboli mabe mpe ya malamu. Toyebi bayekoli ya Yesu Klisto oyo bakomaka babongwani mpe bakoli na bondimi na bango. Toyebi mpe lisusu bandimi oyo yambo bazalaki na komipesa nsima bapengwi. Bolingi ekoki kotambola na ngambo mibale.

Naino tosengela na bolingi ya malamu ya molimo te koleka oyo tosengeli na yango lelo, mpo na kosukisa lombango ya mabe mpe bilembo ya bantango ezali komata. Bolingi ya malamu ya molimo ekobatela biso tokende liboso na kati ya bobangi mpe bozangi elikya oyo esalemaki na babokono ya mokili mobimba, t ba tsunami, moto ya volcan mpe bobebisi ya mandoki. Bolingi ya molimo ekoki kosunga biso totelemela bitumba makasi mpe ya nkanda ya monguna mpe kotelemela babokasi na ye ya kobuka moboko na biso ya molimo.

Bandakisa ebele ekoki kosunga bolingi ya botamboli malamu na molimo. Botosi, bolingo, komikitisa, lisungi, mpe botondi4 kaka oyo moke.

Lelo nalingi naloba makambo mitano ya motuya tokoki kosala mpo na kosunga biso tobatela bolingi ya kotambola malamu na molimo.

Ya yambo: Kota na nzela ya liyokani mpe tikala kuna.

Kala mingi te, nazwaki ndoto ya lokola limoni mpenza wapi nakutanaki na lingomba monene ya bato. Batunaki ngai mituna mingi, ya mingi koleka ezalkaki na ntina ya nzela ya liyokani mpe mpo na nini ezali ntina?

Na ndoto na ngai, nalimbolaki ete ntango tokotaka na nzela ya mayokani nakobatisamaka mpe na kosalaka liyokni na ngai ya liboso na Nzambe.5 Ntango nyonso koliaka elambo, tolakaka lisusu kokamata nkombo ya Mobikisi likolo na biso, mpo na kokanisa Ye, mpe kobatela mitindo na Ye.6 Na bozongi, Nzambe alaki biso ete tokoki ntango nyonso kozala na Molimo ya Nkolo elongo na biso.

Nsima, tosalaka mayokani mosusu na tempelo, esika wapi tokozwaka kutu bilaka minene. Makuli mpe mayokani epesaka biso ndingisa ya kozwa nguya ya bonzambe. Nzela ya liyokani ezalaka bobele nzela oyo ekambaka na bonetolami mpe bomoi ya seko.

Na ndoto na ngai, mwasi moko atunaki na ntango wana lolenge nini moto oyo abukaki mayokani na ye azongaka na nzela. Eyano na ngai na motuna na ye ememaki na likanisi na ngai ya mibale:

Zwa esengo ya boyamboli ya mokolo na mokolo.

Lolenge nini boyamboli ezali ntina? Alma ateyaki ete tosengeli “koteya eloko mosusu te longola kaka boyamboli mpe bondimi na Nkolo.”7 Boyamboli esengaka mokumba ya moto nyonso oyo azali na mposa ya nkembo ya seko.8 Ezali na moto moko te alongolami. Na emoniseli ya Profeta Joseph Smith, Nkolo apesaki bakambi ya Eklezia ya ebandeli etumbu mpo na baboyaki koteya bana na bango nsango malamu.9 Boyamboli ezali likambo ya ntina monene mpo na kokende liboso. Bondimi ya peto ebatelaka biso tokende liboso na nzela ya liyokani.

Nasengi bobanga te to bowumelisa boyamboli te. Satana asepelaka na mpasi na bino. Kata yango mokuse. Bimisa nguya na ye libanda ya bomoi na bino. Bobanda lelo koluka esengo ya kolongola lolenge ya bomoto.10 Mobikisi alingaka biso ntango nyonso kasi mingi mingi ntango toyambolaka. Ye alakaki ete atako “bangomba ekotombwama, mpe bangomba kolongwa … boboto na gai ekolongwa te epai na bino.”11

Soki omoni ete olongwe na nzela ya liyokani mosika to banda kala mpenza, ezali mpenza ya solo te.12 Nasengi bokutana na episikopo to mokambi ya etape na bino. Azali moto ya Nkolo mpe akosunga bino boyoka esengo mpe kimia ya boyamboli.

Sikawa, likebisi: Bozongi na nzela ya liyokani elimboli te ete bomoi ekozala pete. Nzela oyo ezali mpasi mpe ntango mosusu okoyoka lokola komataka malembe malembe.13 Bomati oyo, nzokande, etiami mpo na komeka mpe koteya biso, kolengela biso malamu, mpe kosunga biso tokoma Basantu. Ezali nzela bobele moko oyo ememaka na bonetoli. Profeta moko14 alimbolaki “ezalela epambolama mpe ya esengo ya baoyo babatelaka mitindo ya Nzambe. Mpo tala, bapambolami na makambo nyonso, na ntango mpe na molimo lokola; mpe soko batikali botongono kino na nsuka bayambami na … [mpe], bakoka kofanda elongo na Nzambe na bozali moko ya esengo ekosuka mokolo moko te.”15

Kotambola na nzela ya liyokani, esangisami na boyamboli ya mokolo na mokolo, esungaka elonga malamu ya molimo.

LIkanisi na ngai ya misato: Boyekola na ntina ya Nzambe mpe lolenge nini Ye asalaka.

Moko ya mikakatano na biso monene lelo ezali ya kokesenisa babosolo ya Nzambe mpe balokuta ya Satana. Yango wana Nkolo akebisi biso “tosambela ntango nyonso, … mpo ete [biso] tokoka kolonga Satana, mpe … kokima na maboko ya basali ya Satana oyo bazali kosunga mosala na ye.”16

Mose apesaki ndakisa malamu ya boyekoli mpo na kolimbola bokeseni ya Nzambe mpe Satana. Ntango Satana asenginyaki Mose, ye ayebaki lokuta mpo ete asilaki kokutana na Nzambe miso na miso. Mose asosolaki na lombango nani Satana azalaki mpe abenganaki ye.17 Ntango Satana atiaki moto makasi, Mose ayebaki lolenge nini ya kobelela Nzambe mpo na lisungi makasi. Mose azwaki bokasi ya bonzambe mpe abenganaki satana lisusu, kolobaka, “Longwa liboso na ngai, Satana, nakosanjola bobele Nzambe na ngai moko oyo.”18

Tosengeli kolanda ndakisa wana. Kobengana nguya ya Satana libanda ya bomoi na yo! Tosengi bolanda ye te epai akiti na ya ye “libulu ya mpasi mpe ezanga nsuka.”19

Na lombango ya bobangi, litatoli oyo esungami mokolo na mokolo te “na liloba malamu ya Nzambe”20 ekoki kokweya. Na yango, nkisi ya mwango ya Satana ezali polele: tosengeli mokolo na mokolo kosalela bosanjoli Nkolo mpe koyekola nsango malamu na Ye. Nabondeli bino botika Nzambe akamba bomoi na bino. Bopesa Ye mwa ndambo ya sembo ya ntango na bino. Ntango bokosala yango, tala malamu oyo ekosalema nsima na elonga malamu na bino ya molimo.

Likanisi ya minei 4: Boluka mpe bolikya makamwisi.

Moroni andimisi biso ete “Nzambe atiki naino te kozala Nzambe ya makamwisi.”21 buku nyonso ya makomi elakisi lolenge nini bolingi ya Nkolo esalemaka na bomoi ya baoyo bandimelaka Ye.22 Akabolaki Mbu ya Motane mpo na Mose, asungaki Nefi azwa bapalaki, mpe azongisaki Eklezia na Ye na nzela ya Profeta Joseph Smith. Moko na moko ya makamwisi oyo ezwaki ntango mpe ekoki kozala te oyo bato basengaki na ebandeli epai na Nkolo.

Na lolenge moko, Nkolo akopambola bino na makamwisi bosengeli na yango soki bondimeli Ye, “botia ntembe na eloko te.”23 Bosala misala ya molimo mpo na koluka makamwisi. Bosenga Nzambe na losambo mpo na kosalisa bino bosalela bondimi ya lolenge oyo. Nalaki ete bokoki komona bino moko ete Yesu Klisto “apesaka nguya na batau; mpe epai na baoyo bazali na makasi te amatisaka makasi na bango.”24 Mwa makambo moke ekotambwisa mbango bolingi na biso ya molimo koleka komonaka ete Nkolo azali kosunga bino bomata ngomba ya bomoi na bino.

Likanisi ya 5: Bosukisa Bozangi koyokana na bato na bomoi na bino.

Nabandeli libiangi na ngai bosukisa bondongwani na bomoi na bino. Bosalela komikitisa, mpiko, mpe bokasi esengaka nyonso mibale mpo na kolimbisa mpe koluka bolimbisi. Mobikisi alakaki ete “soki [biso] tokolimbisa bato bambeba na bango, [Tata] na lola akolimbisa biso mpe [lisusu].”25

Mposo mibale nsima tokosepela na Pasika. Uta lelo, nabengisi bino boluka kosukisa babondongwani na bomoi na bino oyo ezali kopesa bino bozito. Ekoki kozala na likambo moko wana ya botondi epai ya Yesu Klisto mpo na Bomikabi na Ye? Soki bolimbisi emonisami kozala mpasi sikawa, bosenga nguya na nzela ya makila ya bomikabi ya Yesu Klisto mpo na kosunga bino. Ntango bokosala bongo, nalaki bino kimia ya motema mpe bolingiya molimo.

Ntango Mobikisi asikolaki bato nyonso, Afungolaki nzela na baoyo bakolanda Ye bakoka kozala na ndingisa ya kozwa libiki na Ye, bokasi, mpe nguya ya bosikoli. Mabaku malamu oyo ya molimo ezali mpo na banso oyo bazali koluka koyoka Ye mpe kolanda Ye.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, na mabondeli na ngai nyonso ya motema, nasengi bino bokota na nzela ya liyokani mpe botikala kuna. Boyoka esengo ya boyamboli mokolo na mokolo. Yekola maye etali Nzambe mpe lolenge nini Ye asalaka. Boluka mpe bolikya makamwisi. Boluka kosukisa bondongwani na bomoi na bino.

Ntango bokolandela bantina oyo, nalaki bino makoki ya kokende liboso na nzela ya liyokani na bolingi makasi, kotala te mikakatano nini bokoki kokutana na yango. Mpe nalaki bino bokasi makasi mpo na kotelemela masenginya, kimia koleka na makanisi mpe bobangi te, mpe bomoko makasi na mabota na bino.

Nzambe azali na bomoi! Yesu azali Klisto! Azali na bomoi! Alingi biso mpe akosunga biso. Na yango Natatoli na nkombo ya bule ya Mosikoli na biso, Yesu Klisto, Amene.

Matangi

  1. Tala 3 Nefi 12:39.

  2. Tala 3 Nefi 12:44.

  3. Malongi mpe Mayokani 64:10; tala lisusu molongo 9.

  4. Lokola Apostolo Paulo alobaki, “Na makambo nyonso topesa matondi na Nzambe” (1 Batesaloniki 5:18). Moko ya bankisi makasi mpo na bozangi elikya, bozangi mpiko, mpe bolembu ya molimo ezali botondi. Makambo nini tosengeli kopesa matondi epai ya Nzambe? Botonda Ye mpo na bonzenga ya mabele, mpo na Bozongisi nsango malamu, mpe mpo na ndenge ebele Ye mpe Mwana na Ye basalaka ete nguya ekokisama epai na biso awa na mabele oyo. Botonda Ye mpo na makomi, mpo na banjelu oyo bayanolaka na nsambo na biso epai ya Nzambe mpo na lisungi, mpo na emoniseli, mpe mpo na mabota ya seko. Mpe mingimingi, botonda Nzambe mpo na libonza ya Mwana na Ye mpe Bomikabi ya Yesu Klisto, oyo ekokisaka yango mpo na biso mpo na kokokisa bamisio oyo totindamaki na mabele.

  5. Mpo na kososola nzela ya liyokani, ezali ntina kososola ete liyokani esengaka komipesa na nzela mibale ya Nzambe mpe Mwana na Ye. Na liyokani, Nzambe atiaka mibeko, mpe tondimaka mibeko yango. Na eyano, Nzambe asalaka bilaka epai na biso. Mayokani ebele etambolaka elongo na bilembo ya libanda—to makuli ya bule—na oyo tosalaka liboso ya banzeneneke. Mpo na ndakisa, libatisi ezali elembo epai ya Nkolo ete moto oyo abatisami asali liyokani ya kobomba mitindo ya Nzambe.

  6. Tala Moroni 4:3; 5:2; Malongi mpe Mayokani 20:77, 79.

  7. Moziya 18:20.

  8. Tala Moses 6:50, 57.

  9. Tala Malongi mpe Mayokani 93:40–48.

  10. Tala Moziya 3:19.

  11. Yisaya 54:10, nsete ebetamaki; tala lisusu 3 Nefi 22:10. Boboto ebongolami uta na lokota ya Baebele hesed, liloba ya nguya ya ndimbola ya bozindo oyo elakisi boboto, ngolu, bolingo ya liyokani, mpe koleka.

  12. Masumu mosusu elimbisamaka kasi masumu mosusu elimbisamaka te. Soki moto moko abuki mobeko ya bopeto to abundisi mosusu, to soki moko alongoli bomoi ya mosusu, bolimbisi mobimba ekoki kopesamela ye te. Mosumuki na makambo ya boye akoki bobele kosala eloko te, mpe ntina monene etikali ete akoka kosala boyamboli na ye moko. Mpo na bolingi ya Nkolo ya kolimbisa, tokoki koya epai na Ye kotala te lolenge nini tosumukaki. Ntango toyamboli na bosolo, Ye akolimbisa biso. Motango nyonso ya masumu mpe makoki na biso ya kolimbisama ekoki kofutama bobele na kosengaka Bosikoli ya Yesu Klisto, oyo akoki kopesa likabo ya ngolu. Bolingi na Ye ya kolimbisa motuya na biso ezanga motuya ya likabo.

  13. Tala 2 Nefi 31:18–20.

  14. Profeta ya Banefi Mokonzi Benyamini.

  15. Moziya 2:41.

  16. Malongi mpe Mayokani 10:5; nsete ebetamaki.

  17. Tala Mose 1:16; tala lisusu Mose 1:1–20.

  18. Mose 1:20.

  19. Elamani 5:12.

  20. Moroni 6:4.

  21. Mormon 9:15; tala lisusu molongo 19.

  22. Apostolo Yoane asakolaki ete akomaki makamwisi ya Mobikisi “mpo ete [biso] tokoka kondimela ete Yesu azali Klisto” (Yoane 20:31).

  23. Mormon 9:21.

  24. Yisaya 40:29.

  25. Matai 6:14.