Likita Linene
Atombolamaki Likolo Ya Ekulusu
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


13:6

Atombolamaki Likolo Ya Ekulusu

Kozala molandi ya Yesu Klisto moto asengeli ntango mosusu komema mokumba mpe kokende epai wapi esengeli libonza mpe mpasi ekoki kozanga te.

Bambula eleki, kolandaka lisolo etali mambi ma kala ya biyamba na Amerika, moninga moko ya kelasi atunaki ngai, “Mpo na nini Basantu ba Mikolo mya Nsuka bandimaki ekulusu te oyo Baklisto mosusu basalelaka lokola elembo ya bondimi na bango?”

Lokola mituna ya boye etali ekulusu ezali kotunama mbala na mbala motuna etali bomipesi na biso na Klisto, na mbala moko nayebisaki ye ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekanisi ete libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto ezali eloko oyo esimbi mpenza, moboko ya monene, malongi mokonzi, mpe bolakisi ya ntina mpenza ya bolingo ya bonzambe kati na mwango monene mpo na libiki ya bana na Ye.1 Nalimbolaki ete ngolu ya kobikisa oyo ezali eteni ya libonza ya bomikabi ezalaki ntina mpe likabo monene epesameli na libota ya moto na mokili mobimba uta na Adama mpe Eva kino nsuka ya mokili.2 Natangaki maloba ya Profeta Joseph Smith, oyo alobaki, “Biloko … nyonso oyo ezali ya lingomba na biso ezali bobele bobakisi” na Bomikabi ya Yesu Klisto.3

Nsima natangelaki ye oyo Nefi akomaka mibu 600 yambo ya mbotama ya Yesu: “Mpe … mwanze alobaki na ngai … , kolobaka: Tala! Mpe natalaki mpe tala mwana mpate ya Nzambe, … [oyo] batombolaki likolo ya ekulusu mpe babomaki mpo na masumu ya mokili.”4

Elongo na ”bolingo na ngai, nakaboli, mpe nabengisi” na mpila koliaka ngai makasi mpenza, Nakobaki kotanga! Epai ya Banefi na Mokili ya Sika mosekwi Klisto alobaki, “Tata na ngai atindaki ngai ete nakoka kotombolama likolo ya ekulusu; … ete nakoka kobenda bato nyonso epai na ngai, … mpe mpo na ntina oyo nde natombolamaki likolo.”5

Nalingaki kolobela Apostolo Paulo ntango namonaki ete miso ya moninga na ngai ebandaki kongenga. Natalaki na lobangu montre na ye nakundwelaki ye ete asengelaki kozala esika moko boye—esika nyonso wapi—akendaki mbangu na elaka na ye ya makanisi. Yango wana lisolo na biso esukaki.

Na ntongo ya lelo, mwa mibu 50 eleki, nazali na ekateli ya kosilisa ndimbola wana—kutu soki moko moko na bino abandi kotala montre na ye. Ntango nameki kolimbola mpo na nini mbala mingi tosalelaka te elembo ya ekulusu, Nalingaki kokomisa yango polele limemya na biso mpe bokumisi na mozindo mpo na makanisi etondisami na bondimi mpe bomoi ya baoyo basalaka.

Ntina moko tobetaka sete te na ekulusu lokola elembo euti na misisa na biso uta na biblia. Mpo ete bobakisi na ekulusu ezalaki moko ya balolenge ya mpasi ya koboma ya Ampire ya Roma, bayekoli ebele ya liboso ya Yesu baponaki te kolobela esaleli wana ya mabe ya mpasi. Ndimbola ya liwa ya Klisto ezalaki ya solo na kati kati ya bondimi na bango, kasi mpo na mbula soki nkama misato eleki balukaki koteya bomoto na bango ya nsango malamu na nzela ya bandenge mosusu.6

Na bikeke ya minei to ya mitano, ekulusu eyebanaki mbala mingi lokola elembo ya Boklisto ya lolenge ya bato nyonso, kasi ya biso ezali “Boklisto ya lolenge ya bato nyonso te.” Kozanga kozala Katolike to Protesta, tozali, kutu eklezia ezongisama eklezia ezongisama ya Kondimana ya Sika. Yango wana, misisa mpe bokonzi na biso ebandi yambo ntango ya makita, boyambi, mpe elembo.7 Na bongo, kozanga elembo oyo ekomaki kosalelama nsima na bato nyonso ezali kasi bosolo mosusu ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bozongisi ya ebandeli ya Boklisto ya solo.

Ntina mosusu ya kozanga kosalela elembo ya ekulusu ezali ete tobetaka sete na likamwisi mobimba ya etinda ya Klisto—Lisekwa na Ye ya nkembo mpe lokola mpasi mpe kufa na ye ya libonza. Nakobetaka sete na boyokani wana, namoni biteni mibale ya ntoki8 oyo ezalaka esika kitoko na efelo mpo na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale na likita na bango ya bule ya tempelo mokolo ya minei nyonso ya poso na Salt Lake City. Bililingi oyo ezali lokola babokundoli ya ntango nyonso na biso ya motuya ya oyo efutamaki mpe elonga oyo ezwamaki na Ye oyo tozali basali.

Bobakami na ekulusu, na Harry Anderson
Lisekwa, na Harry Andersen

Elilingi liboso ya bato mingi ya biteni mibale ya bolongi ya Klisto ezali esaleli na biso ya elilingi ya moke ya Thorvaldsen ya Klisto mosekwi kobimaka na nkembo uta na nkunda elongo na bampota na Ye ya Bobakemi komonana naino na miso.9

Elembo ya Eklezia

Nsuka nsuka tomikundolki ete Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki mokolo moko, “Bomoi ya bato na biso esengeli kozala elembo ya bondimi na biso.”10 Kotalaka makambo maye—mingi mingi maye ya nsima—ememi ngai na maye ekoki kozala ya ntina monene koleka ya matangi na makomi manso na maye etali ekulusu. Ezali na eloko moko te ya kosala na biloko ya motoyi to bawolo, na bangonga to bililingi ya nzela. Ezali ete kutu, na bosembo na biso liboso ya momekano nyonso, na moboko ya makanisi makasi nde Baklisto basengeli komema na libiangi Yesu apesaki na moko na moko ya bayekoli na Ye. Na mokili mpe eleko nyonso, Ye alobaki na biso banso, “Soki mobali [to mwasi] akolanda ngai, amiwangana, mpe amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai.”11

Oyo elobeli baekulusu tomemaka na esika ya baoyo tolataka. Kozala molandi ya Yesu Klisto moto asengeli ntango mosusu komema bozito—ya yo moko to ya moto mosusu—mpe kokende epai wapi mbeka esengami libonza mpe minyoko ekoki kozanga te. Moklisto ya solo akoki te kolanda Moteyi bobele na makambo oyo mobali to mwasi andimi. Soki moke te. Tolandaka Ye bisika nyonso, esangisi mpe, soki esengeli, kati na mabanda ya masano etondisami na mpisoli mpe mobulu, epai wapi ntango mosusu tokoki kotikala biso moko ntango molayi.

Nayebi bato, kati mpe libanda ya Eklezia, oyo bazali kolandaka Klisto se na bosembo nyonso. Nayebi bana na bukabuka ya makasi, mpe nayebi baboti oyo basungaka bango. Namoni bango nyonso kosala ntango mosusu kino na kolemba makasi na nzoto, kolukaka makasi, kimya, mpe mwa ntango moke ya esengo oyo eyaka na lolenge mosusu te. Nayebi ebele ya mikolo banzemba baoyo bazali na mposa, mpe babongi na, moninga moko ya bolingo, libala ya malamu, mpe ndako etondi na bana na bango moko. Mposa moko te ekoki koleka boyengebene, kasi mibu nsima na mibu bozwi ya boye esili naino kokoma te. Nayebi baoyo bazali kobunda na bokono ya moto ya ndenge nyonso, baoyo balingi lisungi ntango bazali kosambela mpe koyoka mposa makasi ya mokili na elaka ya kimya ya molimo. Nayebi baoyo bazali kobika na bobola makasi kasi, kobundisaka bozangi elikya, basengi bobele libaku ya kobika malamu mpo na balingami na bango mpe basusu na bosenga nzinganzinga na bango. Nayebi ebele baoyo bazali kobunda na makambo ya mpasi makasi ya bomoto, kimobali mpe kimwasi, mpe kosangisa nzoto. Naleli mpo na bango, mpe naleli elongo na bango, koyebaka lolenge nini malandi ya mikano na bango ekozala.

Oyo nyonso ezali mwa moke ya mabaku mingi oyo tokoki kokutana na yango na bomoi, makambo ya kokundola ya lipombo ete ezali na ntalo ya solo ya kofuta mpo na kokoma moyekoli ya solo. Epai ya Araunah, oyo amekaki kopesa ye ngombe mpe nkoni ya ofele mpo na mbeka ya kotumba , Mokonzi Dawidi alobaki, “Te; kasi nakosomba yango solo epai na yo na motuya: … [mpo ngai] nakopesa [te] … epai na Nkolo Nzambe na ngai … oyo nasombi te.”12 Bongo lisusu tolobaka biso banso.

Ntango tomemi baekulusu na biso mpe tolandi Ye, ekozala liwa ya nsomo soki bozito ya mikakatano na biso ekolembisa biso te mpe kokeba na bozito ememami na basusu. Ezali moko ya makambo ya nguya mpenza ya Bobakisi ete maboko ya Nkolo ebendamaki ya kofungwama makasi mpe na nsima babetaki yango basete, ete mobali, mwasi mpe mwana nyonso ya libota mobimba ya bato azali bobele boyei malamu te kasi lisusu abengisami na bosikoli, bonetoli.13

Lokola Lisekwa ya nkembo elandaki Bobakemi ya mpasi, boye mapamboli ya ndenge nyonso esopameli na baoyo balingi, lokola profeta Yakobo ya Buku ya Mormon alobi, “kondima Klisto, mpe komona liwa na ye, mpe koyoka mpasi ya ekulusu.”14 Ntango mosusu mapamboli yango eyaka mbango mpe ntango mosusu eyaka nsima, kasi nsuka ya kitoko epai na biso na dolorosa (nzela ya mpasi14 ezali elaka euti na Moteyi Yemei ete ekoya. Mpo na kozwa mapamboli ya boye, ekoki biso kolanda Ye—na koningana te, kolemba to kokima ata mokolo moko te, ata mokolo moko te kotika mosala, te ntango baekulusu na biso ezali na bozito makasi mpe te ntango, nzela ekoki kokoma molili. Mpamba te bokasi, boyengebene, mpe bolingo na yo, napesi matondi ya mozindo ya ngai moko. Na mokolo ya lelo napesi litatoli na ngai ya apostolo na ntina Ye oyo “atombwamaki”15 mpe ya mapamboli ya seko Ye azali kopesa na baoyo “batombwamaki” elongo na Ye, kutu Nkolo Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Jeffrey R. Holland, Encyclopedia of Mormonism (1992), “Atonement of Jesus Christ,” 1:83

  2. Amuleki alobeli Bomikabi ya Klisto lokola “mbeka monene mpe ya nsuka,” kozalaka “ya kozanga ndelo mpe ya seko” na lolenge na yango (Alma 34:10). Mpo “banso bakwei mpe babungi, mpe basengeli kowa longola se soko ezali na lisalisi ya bomikabii” (Alma 34:9; tala lisusu milongo 8–12). Mokambi John Taylor abakisi: “Na lolenge epai na biso mpasi mpo ya kososola mpe kolimbola, [Yesu] amemaki bozito ya masumu ya mokili mobimba, bobele ya Adama te, kasi ya bakitani na ye; mpe na kosalaka bongo, afungolaki bokonzi ya lola, bobele na bandimi nyonso te mpe baoyo banso batosaki mobeko na Nzambe, kasi na ebele koleka kati kati ya libota ya bato baoyo bakufaki yambo bakoma na bambula ya kokomela, lokola mpe [wana] baoyo … bakufaki libanda ya mobeko, bango, na nzela ya boyokanisi na Ye, bakosekwa libanda ya mobeko, mpe basambisama libanda ya mobeko, mpe bango basangana … na mapamboli ya Bomikabi na Ye” (An Examination into and an Elucidation of the Great Principle of the Mediation and Atonement of Our Lord and Savior Jesus Christ [1892], 148–49; Teachings of Presidents of the Church: John Taylor [2001], 52–53).

  3. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 49.

  4. 1 Nefi 11:32–33.

  5. 3 Nefi 27:14–15.

  6. Ya solo, ezali na makomi etali ekulusu na mateya ya Paulo (tala, na ndakisa, 1 Bakolinti 1:17–18; Bagalatia 6:14; Bafilipi 3:18), kasi yango elobeli eloko moko monene mpenza koleka putele mibale ya mabaya ebetamaki elongo na sete, to elembo songolo ya moke ya bongo. Boye, ntango Paulo alobelaka ekulusu, azali kosalela elembo ya malongi mpo na kolobela lokumu ya Bomikabi, libanda ya masano epai wapi Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakutanaka na Ye mpe balkotangela Ye.

  7. Baklisto bayebana ya ebandeli mpe ya momesano lokola moninga ya Martin Luther Andreas Karlstadt (1486–1541) bazalaki kondima na nsuka ya Moyen Age ete “ekulusu [na yango moko] elimbolaki bobele bampasi ya Klisto na bonzoto mpe ebosanaki kolakisa Lisekwa na Ye mpe [nguya]” ya bosikoli (in John Hilton III, Considering the Cross: How Calvary Connects Us with Christ [2021], 17

  8. Harry Anderson, The Crucifixion; Harry Anderson, Mary and the Resurrected Lord.

  9. Tala Russell M. Nelson, “Opening the Heavens for Help,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 72–74.

  10. Gordon B. Hinckley, “The Symbol of Christ,” Ensign, Sanza ya mitano 1975, 92.

  11. Matai 16:24.

  12. 2 Samwele 24:24.

  13. “Loboko na ye etandolami na bato banso baye bakoyambola mpe bakondima likolo ya nkombo ya ye” (Alma 19:36; tala lisusu 2 Nefi 26:33; Alma 5:33).

  14. Via dolorosa ezali liloba na monoko ya Latin kolimbolaka “nzela ya mpasi, nzela moke, to bolandani ya makambo mingi” (Merriam-Webster.com Dictionary, “via dolorosa”). Ezali mbala mingi ya kokangama elongo na bolongwe ya Yesu uta bokweisi na Ye na maboko ya Pilate kino na Bobakemi na ye na Kalivari.

  15. Tala 3 Nefi 27:14–15.