Zala Sembo na Nzambe mpe na Mosala na Ye
Biso banso tosengeli koluka litatoli na biso moko ya Yesu Klisto, kosimba bamposa na biso, koyambola masumu na biso mpe kozala sembo na Nzambe mpe mosala na Ye.
Na sanza ya zomi eleki, napesamaki mosala, elongo na Mokambi M. Russell Ballard mpe Mpaka Jeffrey R. Holland, mpo na kokende na Royaume-Uni, epai wapi biso misato tosalelaki nzambe lokola bilenge bamisionele. Tozalaki na litomba ya koteya mpe kotatola, mpe ya kokanisa lisusu mambi ya kala ya Eklezia ya ebandeli na Bisanga ya Angleterre epai wapi nkoko ya nkoko na ngai ya mobali Heber C. Kimball mpe baninga na ye bazalaki bamisionele ya yambo.1
Mokambi Russell M. Nelson, atumolaki biso na etali mokumba oyo, alobaki ete ezalaki momesaano te kopesa Bapostolo misato mokumba ya kokende kotala esika wapi basaleka Nzambe lokola bamisionele na bolenge na bango. Ye alobaki ete banso bazalaka na mposa ya kopesama mokumba ya kokende kotala misio na bango ya ebandeli. Na mungamunga makasi na elongi na ye, na mokuse alimbolaki oyo tolobeli liboso ete soki ezali na liboke mosusu ya Bapostolo misato oyo basalalelaki Nzambe na misio se moko koleka mibu 60 kala, boye bakoki mpe kozwa mokumba ya lolenge moko.
Na bomibongisi mpo na mokumba oyo, natangaki lisusu Bomoi ya Life of Heber C. Kimball, ekomama na nkoko moko, Orson F. Whitney, oyo nsima abiangamaki na bopostolo. Buku oyo epesamelaki ngai na mama na ngai ya motuya ntango nazalaki pene na mobu nsambo. Tozalaki komilengela mpo na kozala na molulu ya bobulisi ya This Is the Place Monument (Oyo Ezali Esika ya Monima) na sanza ya nsambo na mokolo ya 24, 1947, na Mokambi George Albert Smith.2 Alingaki ngai nayeba mingi etali nkoko na ngai, Heber C. Kimball.
Buku ezalaki na liloba ya ntina mingi oyo balobaki ya Mokambi Kimball oyo ezali na ndimbola mpo na mikolo na biso. Yambo ya kokabola liloba yango, tika napesa mwa makambo elekaki liboso.
Ntango Profeta Joseph Smith akangamaki na Boloko ya Liberty, Bapostolo Brigham Young mpe Heber C. Kimball bazalaki na mokumba, na bantango ya mikakatano, ya kokamba bolongwi ya Basantu uta na Missouri. Bolongwi esengamaki mingi mingi mpo na motindo epesamaki na Moyangeli Lilburn W. Boggs ya koboma bango.3
Pene ya mibu 30 nsima Heber C. Kimball, ntango azalaki kati na Bokambi ya Yambo, kokanisaka lisusu etali lisolo oyo na nkola ya sika, ateyaki, “Tika nalobela bino, ete mingi na bino bakomona ntango oyo bakozwa banso motungisi, bomekami mpe monyoko oyo bokoki kotelemela mpe mingi ya makoki ya kolakisa ete bozali sembo na Nzambe mpe na Mosala na Ye.”4
Heber akobaki: “Mpo nakolonga mikakatano oyo ezali koya, ekosengela mpo na bino bozala na boyebi ya bosolo ya mosala oyo bino moko. Mikakatano ekozala ya mpasi mpenza ete mobali to mwasi oyo akozanga boyebi ya moto ye moko oyo to litatoli akokweya. Soki ozali na litatoli te, bika na bosembo mpe belela Nkolo mpe kotika te [kino] yo [okozwa] yango. Soki ozwi te okotelema te. … Ngonga ekoya ntango mobali to mwasi moko te akokoka koyika mpiko na pole ya kodefa. Moko na moko akosengela kokambama na pole oyo ezali kati na yemei. … Soki ozali na yango te okotelema te; yango wana luka litatoli ya Yesu mpe tya elikya na yango, ete ntango ngonga ya momekano ekoya okoka te kobeta libaku mpe kokweya.”5
Biso nyonso tosengeli na litatoli ya moto ye moko ya mosala ya Nzambe6 mpe ntina mpenza ya Yesu Klisto. Eteni 76 ya Malongi mpe Mayokani elobeli mituya misato ya nkembo mpe ekokanisi nkembo ya selesitiale na moi. Nsima ekokanisi bokonzi ya teresitiale na sanza.7
Ezali esengo ete moi ezali na pole na yango, kasi sanza ezali pole ya komonisa to “pole ya kodefa.” Kolobelaka bokonzi ya teresitiale, molongo 79 elobi, “Oyo ezali baoyo bazangi litatoli ya Yesu.” Tokoki te kozwa bokonzi ya selesitiale mpe kobika elongo na Nzambe Tata na pole ya kodefa; tozali na mposa ya litatoli na bisomei ya Yesu mpe nsango malamu na Ye.
Tozali kobika na mokili oyo etondi na mabe8 mpe mitema milongwe na Nzambe mpo na malako ya bato.9 Moko ya bandakisa monene na kati na makomi ya mitungisi ya Heber C. Kimball etali koluka litatoli ya mosala ya Nzambe mpe Yesu Klisto elobelami kati na toli ya Alma na bana na ye ya mibali misato—Elamani, Sibiloni, mpe Koliatoni.10 Mibale ya bana na ye ya mibali bazalaka embo na Nzambe mpe na mosala na Ye. Kasi mwana moko ya mobali azalaka na mikano ya mabe. Mpo na ngai ntina monene mpenza ya toli ya Alma ezali ete azalaki kopesa yango lokola tata mpo na litomba ya bana na yemei.
Motungisi ya Alma ya yambo, lokola ya Heber C. Kimball, ezalaki ete moko na moko na bango azwa litatoli ya Yesu Klisto mpe azala sembo na Nzambe mpe na mosala na Ye.
Na liteya monene ya Alma na mwana na ye ya mobali Elamani, asalaki elaka ya mozindo ete baoyo “bakotia elikya ya bango na Nzambe bakosalisama o mikakatano mya bango, mpe mobulu mwa bango, mpe mitungisi ma bango, mpe bakotombalama likolo o mokolo mwa nsuka.”11
Atako Alma azwaka liyoki epai wapi amonaki anzelu, emonanaka mingi mpenza te. Makanisi Molimo Mosantu apesaka ezali ya ndenge wana mpenza. Makanisi oyo ekoki kokokana na ntina lokola mayoki ya anzelu. Mokambi Joseph Fielding Smith ateyaki: “Makanisi na motema oyo euti na Molimo Mosantu ezali na ntina mosika koleka mpenza emoniseli. Ntango Molimo azali koloba na molimo, nkoma likolo ya motema ezali mpasi koleka mpo kolongola.”12
Oyo ekambi biso na toli ya Alma epai ya mwana na ye ya mibale, Sibiloni. Sibiloni azalaki sembo, lokola ndeko na ye ya mobali Elamani. Toli nalingi kobetela sete ezali Alma 38:12, oyo etangami ndambo, “Tala ete osimba mposa inso ya yo, ete okoka kotondisama na bolingo.”
Osimba ezali liloba moko malamu. Ntango totambwisaka mpunda, tosalelaka basinga mpo kokamba yango. Liloba likokani malamu koleka mpenza ekoki kozala kotambwisa, kopekisa, to koboya. Kondimana na Kala elobi na biso ete togangaki na esengo ntango toyebaki ete tokozwa banzoto ya mosuni.13 Nzoto ezali mabe te—ezali kitoko mpe ntina—kasi boko bamposa soki esalelami malamu te mpe esimbami malamu te, ekoki kokabola biso na Nzambe mpe Mosala na Ye mpe kobebisa litatoli na biso.
Tika tolobela se bamposa mibale—ya yambo, nkanda mpe ya mibale, bonsoni.14 Ezali malamu ete nyonso mibale kozanga kosimba to koboya ekoki kopesa bokono makasi ya motema, kokitola bopusi ya Molimo, mpe kokabola biso na Nzambe mpe mosala na Ye. Monguna azwaka libaku nyonso mpo kotondisa bomoi na biso na bililingi ya bokasi bokasi mpe bonsoni.
Kati na mabota mosusu, ezali likambo ya kokamwa te mpo na mobali to mwasi ya nkanda kobeta mwasi to mwana. Na sanza ya nsambo nazalaki na likita ya All Party Parliamentary na Royaume-Uni na engumba Londres.15 Mobulu na basi mpe bilenge emonisamaki polele lokola likambo ya ntina na mokili mobimba. Lisusu na bokasi bokasi, basusu bamipesaki na maloba mabe. Esakola etali libota elobeli biso ete “baoyo babetaka balongobani to bana … bakoyanola mokolo moko liboso na Nzambe.”16
Mokambi Nelson abetaki sete na makasi nyonso na likambo oyo lobi na ntango.17 Nasengi na bino bozwa mokano ete atako baboti na bino babetaki bino to babetaki bino te, bokobeta na nzoto to na maloba to na makanisi basi to bana na bino te.
Na mikolo na biso moko ya mikakatano ya ntina koleka mpenza ezali boswani mpe kobeta na maloba etali makambo ya mokili. Mbala mingi nkanda mpe maloba mabe ezwi esika ya bwanya, lisolo, mpe bonkonde. Mingi batikaki toli ya Apostolo ya nkulutu ya Mobikisi, Petelo, mpo na koluka bizaleli ya Boklisto lokola kimia, bompikiliki, bonzambe, bosembo ya bondeko, mpe bolingani.18 Batikaki lisusu ezaleli ya Boklisto ya komikitisa.
Na kobakisa na kotambwisa to kosimba bamposa mosusu, tozali na mposa ya kobika na makanisi ya bopeto na kokambaka makanisi, maloba, mpe misala na biso. Tosengeli koboya kotala pornografi, kotalela bolongobani ya oyo tozali kotala na bandako na biso, mpe koboya eloko nyonso oyo ya bomoi ya masumu.
Oyo ememi biso na toli ya Alma na mwana na ye ya mobali Koliatoni. Na bokeseni na bandeko na ye mibali, Elamani mpe Sibiloni, Koliatoni amipesaki na bobuki mobeko ya bomoto.
Lokola Koliatoni amipesaki na bozangi bomoto, ezalki ntina mpenza mpo ete Alma ateya ye oyo etali boyamboli. Asengelaki koteya ye mabe makasi ya lisumu mpe nsima lolenge nini ya koyambola.19
Yango wana toli ya bopekisi ya Alma ezalaki kosimba bamposa, kasi mpo na boayo babukaki mobeko toli ezalaki koyambola. Mokambi Nelson apesaki na bandeko ya Eklezia toli ya mozindo etali boyamboli na Likita Linene ya sanza ya minei 2019. Akomisaki yango polele ete boyamboli ya mokolo na mokolo ezali eteni ya bomoi na biso. “Boyamboli ezali likambo esalemaka na mbala moko te; ezali mosala. Ezali fungola ya esengo. mpe kimia ya mayele,” ateyaki. “Boyamboli ya mokolo na mokolo ezali nzela ya bopeto, mpe bopeto ememaka nguya.”20 Soki Koliatoni asalaka oyo Mokambi Nelson apeselaki toli, akokaki koyambola na ntango kaka abandaki kobomba makanisi mabe. Babobuki mibeko ya minene ekokaki kosalema te.
Toli ya kosukisa oyo Alma apesaki bana na ye ezali malongi mosusu ya ntina mpenza kati na makomi mobimba. Elobeli Bomikabi oyo ekokisamaki na Yesu Klisto.
Alma atatolaki ete Klisto akolongola lisumu.21 Kozanga Bomikabi ya Mobikisi, mobeko ya seko ya bosembo ekokaki kosenga etumbu.22 Mpo na Bomikabi ya Mobikisi, mawa ekoki kozala mpo na baoyo bayamboli mpe kolingisa bango kozonga liboso na Nzambe. Tokosala malamu na komaniola malongi oyo ya kafukafu.
Moko te akoki kozonga epai ya Nzambe na nzela kaka ya misala na yemei ya malamu; biso nyonso tozali na mposa ya litomba ya libonza ya Mobikisi Banso tosumukaki, mpe ezali bobele se na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto ete tokoki kozwa boboto mpe kobika elongo na Nzambe.23
Alma apesaki lisusu toli ya malamu epai ya Koliatoni mpo na biso banso baoyo bazali to bakokende na nzela ya boyamboli kozangaka kotala soki masumu ezali minene to mike to makasi lokola oyo esalaki Koliatoni. Molongo 29 ya Alma 42 elobi, “Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nazali na mposa ete otika makambo maye matungisa yo lisusu te, mpe bobele tika masumu ma yo matungisa yo, na matungisi maye makomeme yo epai ya boyamboli.”
Koliatoni ayokaki toli ya Alma mpe ayambolaki mpe asalelaki nzambe nyonso mibale na lokumu. Mpo na Bomikabi ya Mobikisi, libiki epesami na bato banso.
Na mikolo ya Alma, na mikolo ya Heber, mpe solo na mikolo na biso, biso banso tosengeli koluka litatoli na biso moko ya Yesu Klisto, kosimba bamposa na biso, koyambola masumu na biso, mpe kozwa kimia na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe kozala sembo na Nzambe mpe mosala na Ye.
Na lisukulu moko ya kala te mpe na media social batiaki Mokambi Russell M. Nelson alobaki yango lolenge oyo: “Nabondeli bino na kozwa mokumba ya litatoli na bino ya Yesu Klisto. Bosala mpo na yango. Bokomisa yango ya bino. Bobatela yango. Boleisa yango mpo ete ekola. Nsima botala makamwisi ekosalema kati na bomoi na bino.”24
Nazali na botondi ete sikawa tokoyoka Mokambi Nelson. Natatoli ete Mokambi Nelson azali profeta ya Nkolo mpo na mikolo na biso. Nalingaka mpe napesaka motuya na bofuli mpe bokambami ya malamu tozwaka na nzela na ye.
Lokola Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto, Napesi litatoli na ngai ya solo ya bonzambe ya Mobikisi mpe bosolo ya Bomikabi na Ye na Nkombo ya Yesu Klisto, amene.