2011
Nakoki kokuta biyano na nzela ya Likita Linene
sánzá ya libwa 2011


Bana

Nakoki Kokuta Biyano na nzela ya Likita Linene

Mokambi Uchtdorf ateyaka ete soki bozali kokanisa mituna yambo ya likita linene, Nkolo akoki koloba na bino na nzela ya baprofeta mpe bapostolo ba Ye na likita linene.

  1. Lokola libota to kelasi, solola nini bosengeli koyekola, ezala moto na moto to elongo. (Ndakisa: Boniboni nakoki kolendisa litatoli lya ngai? Boniboni nasengeli kosala na mokakatano na eteyelo?) Na eteni ya lokasa to na zulunale ya yo, koma mituna mya yo.

  2. Na mposo iye ikambi na likita linene, okoki kokanisa mpe kosambela etali mituna miye.

  3. Yokani na bokebi na likita linene (ekoki kosalisa mpo na kokoma). Nde koma boniboni Nkolo—na nzela ya bakambi ba Eklezia—ayanoliki mituna mya yo.

  4. Na eteni esusu ya lokasa, okoki koyema elilingi yoko ya yomei kosalaka nini oyekolaki.

Bimisa na lokasa