2011
Malamu, Malamu Mingi, Malamu Mingi Koleka
sánzá ya libwa 2011


Bilenge

Malamu, Malamu Mingi, Malamu Mingi Koleka

Na lisolo lya ye lya likita linene lya Sanza ya Zomi 2007, Elder Dallin H. Oaks ya Lisanga Likoki lya Bapostolo Zomi na Babale asololaki etali milulu miye mizali “malamu, malamu mingi, mpe malamu mingi koleka.” Ntango akomaki na ndambo etali “kotondikasaka manaka ma bana,” nabukakibukaki na mbeba na kiti ya ngai.

Nayebaki nazalaki kosala mingi koleka. Nazalaki na masano ma eteyelo, kozwaka mateya ma kpokoso na eteyelo, mpe namikotisaki na milulu misusu mingi. Nazalaka te kokendaka na milulu mya botongono mya bilenge Basi, mpe Mikolo mya Eyenga mya ngai mitondisamaki na motungisi mwa komekaka kosilisa lotomo la minuti ya nsuka. Kosalaka miziki mpe kokomaka zulunale ya eteyelo ibungisaka eloko ya yango ya esengo mpe ikomaka mosala.

Lisolo ya Mpaka Oak esalaki ngai natala malamu manaka ma ngai. Milulu mya ngai mizalaki malamu, kasi ezalaki mingi koleka ya yango. Nasengelaka kopona ya malamu mingi koleka isusu. Wana emekaki ngai kokana milulu kani kosundola, nasosolaki ete nsango elamu ya Yesu Klisto ezalaki eloko ya koleka liboso ya malamu mingi koleka moto mosusu akoki kozala na yango. Natiaki losambo mpe boyekoli makomi na likolo ya molongo mwa ngai, mpe nde, bomoi bwa ngai ekimi mbangu na petepete mingi koleka.

Mpaka Oaks ateyaki ngai ete ntango tozali kosala nini Nkolo alingi biso kosala yambo, likambo na likambo likokweya mpenza na esika. Soki nayekoli makomi ma ngai yambo nasakana lisano to kutu yambo nasala lotomo la ngai, likambo na likambo lya motuya likosalema. Ntango nafandisi bomoi bwa ngai nzinganzinga na Nzambe, esika ya kobakisaka Ye na kati lokola eloko yoko ya kobakisa, bomoi bwa ngai bozali na meko moko ya kobakisa ya kimia mpe elonga.

Sikawa nazali na bokebi mpenza mpo na koyoka toli epesami na likita linene!

Liyemi na Paul Mann

Bimisa na lokasa